Mitángo 22:1-41

22  Na nsima bana ya Yisraele basimbaki nzela bakei mpe batyaki kaa na mokili patatalu oyo ekauká ya Moabe,+ na ngámbo mosusu ya Yordani oyo etalani na Yeriko.  Mpe Balake+ mwana ya Zipore amonaki nyonso oyo Yisraele esalaki Baamore.  Mpe Moabe ekómaki kobanga makasi mpo na bato yango, mpamba te bazalaki ebele; mpe Moabe ebandaki koyoka bana ya Yisraele nsɔmɔ mpe koyina bango makasi.+  Mpe Moabe elobaki na mikóló ya Midiane+ ete: “Sikoyo lisangá oyo ekolya biloko nyonso zingazinga na biso ndenge ngɔmbɛ-mobali elyaka matiti ya sika na elanga.” Mpe Balake+ mwana ya Zipore azalaki mokonzi ya Moabe na ntango yango.  Sikoyo ye atindelaki Balaama,+ mwana ya Beore, bamemi-nsango na Petore,+ oyo ezali na pembeni ya Ebale+ na mokili ya bana ya bato na ye, bábenga ye, na maloba oyo: “Talá! Bato babimi na Ezipito. Talá! Bazipi mabele tii koleka esika oyo moto akoki komona,+ mpe bafandi kaka liboso na ngai.  Mpe sikoyo yaká, nabondeli yo; lakelá ngai bato oyo mabe,+ mpo bazali na nguya mingi koleka ngai. Mbala mosusu nakokoka kobɛta bango mpe kobengana bango na mokili oyo; mpo nayebi malamu ete moto oyo yo opambolaka apambolamaka mpe moto oyo yo olakelaka mabe alakelamaka mabe.”+  Bongo mikóló ya Moabe mpe mikóló ya Midiane basalaki mobembo mpe na mabɔkɔ na bango bazalaki na lifuti ya kopesa moto oyo akosakola makambo oyo ebombaná+ mpe bakendaki epai ya Balaama+ mpe bayebisaki ye maloba ya Balake.  Bongo alobaki na bango ete: “Bólala awa butu ya lelo, mpe nakozongisela mpenza bino liloba kaka ndenge Yehova akoloba na ngai.”+ Bongo bankumu ya Moabe bafandaki elongo na Balaama.  Bongo Nzambe ayelaki Balaama mpe alobaki+ ete: “Mibali oyo bazali elongo na yo banani?” 10  Na bongo, Balaama alobaki na Nzambe ya solo ete: “Balake+ mwana ya Zipore, mokonzi ya Moabe, atindi bango epai na ngai, alobi: 11  ‘Talá! Bato oyo bazali kobima na Ezipito, mpe bazipi mabele tii koleka esika oyo liso ekoki komona.+ Sikoyo yaká, lakelá bango mabe mpo na ngai.+ Mbala mosusu nakokoka kobunda na bango mpe nakobengana mpenza bango.’” 12  Kasi Nzambe alobaki na Balaama ete: “Osengeli kokende elongo na bango te. Osengeli kolakela bato yango mabe te,+ mpo bapambolami.”+ 13  Nsima na yango, Balaama alamukaki na ntɔngɔ mpe alobaki na bankumu ya Balake ete: “Bókende na mboka na bino, mpamba te Yehova aboyi kopesa ngai nzela nakende elongo na bino.” 14  Bongo bankumu ya Moabe batɛlɛmaki mpe bayaki epai ya Balake mpe balobaki ete: “Balaama aboyi koya elongo na biso.”+ 15  Kasi Balake atindaki lisusu bankumu mosusu oyo balekaki baoyo ya liboso na mingi mpe na lokumu. 16  Bango mpe bayaki epai ya Balaama mpe balobaki na ye ete: “Talá oyo Balake mwana ya Zipore alobi: ‘Nabondeli yo, eloko moko te epekisa yo koya epai na ngai. 17  Mpo nakopesa yo lokumu mingi mpenza,+ mpe nakosala likambo nyonso oyo okoloba na ngai.+ Boye yaká, nabondeli yo. Lakelá ngai bato oyo mabe.’” 18  Kasi Balaama azongiselaki basaleli ya Balake maloba ete: “Ata soki Balake apesi ngai ndako na ye etondi na palata mpe na wolo, nakoki te kobuka etinda ya Yehova Nzambe na ngai mpo na kosala likambo moko ya moke to ya monene.+ 19  Mpe sikoyo bino mpe, nabondeli bino, bófanda awa butu ya lelo mpo nayeba oyo Yehova akoloba na ngai lisusu.”+ 20  Bongo Nzambe ayelaki Balaama na butu mpe alobaki na ye ete: “Soki mibali wana bayei nde mpo na kobenga yo, tɛlɛmá, kende na bango. Kasi kaka liloba oyo nakoloba na yo yango nde okoloba.”+ 21  Nsima na yango, Balaama alamukaki na ntɔngɔ mpe akangisaki kiti ya mpunda na ye ya mwasi mpe akendaki elongo na bankumu ya Moabe.+ 22  Mpe nkanda ya Nzambe ebandaki kongala mpo akendaki; mpe anzelu ya Yehova atɛlɛmaki na nzela mpo na kotɛmɛla ye.+ Mpe amataki likoló ya mpunda na ye, mpe basaleli na ye mibale bazalaki elongo na ye. 23  Mpe mpunda yango emonaki anzelu ya Yehova atɛlɛmi na nzela, na lobɔkɔ na ye, asimbi mopanga oyo abendi na libenga na yango,+ mpe mpunda yango elukaki kolongwa na nzela mpo na kokɔta na esobe, kasi Balaama abandaki kobɛta mpunda mpo na kozongisa yango na nzela. 24  Mpe anzelu ya Yehova atɛlɛmaki kaka na nzela ya nkaka oyo eleki na kati ya bilanga ya vinyo, oyo ezalaki na efelo moko ya mabanga na ngámbo oyo mpe na efelo moko ya mabanga na ngámbo oyo mosusu. 25  Mpe mpunda yango ezalaki kaka komona anzelu ya Yehova mpe ebandaki komifina na efelo mpe kofina lokolo ya Balaama na efelo; mpe azalaki kaka kobɛta yango lisusu. 26  Sikoyo anzelu ya Yehova alekaki lisusu mpe atɛlɛmaki na esika ya nkaka, epai nzela ezalaki te mpo na kobaluka na lobɔkɔ ya mobali to na lobɔkɔ ya mwasi. 27  Ntango mpunda yango emonaki anzelu ya Yehova, sikoyo elalaki na nse ya Balaama; bongo nkanda ya Balaama engalaki,+ mpe akobaki kobɛta mpunda yango na lingenda na ye. 28  Nsukansuka, Yehova afungolaki monɔkɔ ya mpunda+ mpe elobaki na Balaama ete: “Nasali yo nini mpo obɛta ngai mbala misato oyo mobimba?”+ 29  Na yango, Balaama alobaki na mpunda ete: “Mpo osaleli ngai nko. Soki kaka mopanga ezalaka na lobɔkɔ na ngai, mbɛlɛ nabomi yo sikoyo!”+ 30  Bongo mpunda yango elobaki na Balaama ete: “Nazali mpunda na yo te oyo otambolá na yango bomoi na yo mobimba tii lelo oyo? Namesaná kosala yo boye?”+ Bongo alobaki ete: “Te!” 31  Mpe Yehova afungolaki miso ya Balaama,+ bongo amonaki anzelu ya Yehova atɛlɛmi na nzela, asimbi na lobɔkɔ mopanga oyo abimisi na libenga na yango. Na mbala moko, agumbamaki mpe afukamaki elongi na nse. 32  Bongo anzelu ya Yehova alobaki na ye ete: “Mpo na nini obɛti mpunda na yo mbala misato oyo mobimba? Talá! Ngai nde nabimaki mpo na kotɛmɛla yo, mpamba te nzela na yo ezali mpenza kotɛmɛla mokano na ngai.+ 33  Mpe mpunda emonaki ngai mpe elukaki kolongwa na nzela liboso na ngai mbala oyo misato.+ Kanisá soki elongwaka na nzela te mpo na kokima liboso na ngai! Mbɛlɛ sikoyo nasili koboma yo,+ nde natiki yango na bomoi.” 34  Na yango, Balaama alobaki na anzelu ya Yehova ete: “Nasali lisumu,+ mpo nayebaki te ete yo nde otɛlɛmaki na nzela mpo na kokutana na ngai. Mpe sikoyo, soki ezali mabe na miso na yo, tiká ngai nazonga.” 35  Kasi anzelu ya Yehova alobaki na Balaama ete: “Kende elongo na mibali wana;+ kaka liloba oyo nakoloba na yo yango nde okoloba.”+ Mpe Balaama akobaki kokende elongo na bankumu ya Balake. 36  Ntango Balake ayokaki ete Balaama asili koya, na mbala moko ye abimaki kokutana na ye na engumba ya Moabe, oyo ezali pembenipembeni ya Arnone, oyo ezali na nsuka ya teritware.+ 37  Bongo Balake alobaki na Balaama ete: “Ngai natindaki bato bábenga yo te? Mpo na nini oyaki te epai na ngai? Ya solo mpenza ngai nakoki kopesa yo lokumu te?”+ 38  Bongo Balaama alobaki na Balake ete: “Talá nayei epai na yo sikoyo. Ngai nazali ata na mwa likambo oyo nakoki koloba?+ Liloba oyo Nzambe akotya na monɔkɔ na ngai yango nde nakoloba.”+ 39  Bongo Balaama akendaki elongo na Balake mpe bakómaki na Kiriate-huzote. 40  Mpe Balake apesaki bangɔmbɛ ná bampate mbeka+ mpe atindaki mwa ndambo epai ya Balaama mpe epai ya bankumu oyo bazalaki elongo na ye. 41  Mpe esalemaki boye: na ntɔngɔ Balake akendaki kozwa Balaama mpe amatisaki ye na Bamote-baala,+ mpo, uta na esika wana, akoka komona bato nyonso.+

Maloba na nse