Mitángo 21:1-35

21  Sikoyo Mokanana, mokonzi ya Arade,+ oyo afandaki na Negebe,+ ayokaki ete Yisraele ayaki na nzela ya Atarime, mpe abandaki kobunda na Yisraele mpe amemaki ndambo na bango bakangami.  Na yango, Yisraele asalaki elako epai ya Yehova mpe alobaki+ ete: “Soki okopesa mpenza bato oyo na lobɔkɔ na ngai, nakobebisa mpenza bingumba na bango.”+  Boye Yehova ayokaki mongongo ya Yisraele mpe akabaki Bakanana; mpe babebisaki bango ná bingumba na bango. Yango wana bapesaki esika yango nkombo Horoma.+  Wana bazalaki kokoba kotambola longwa na Ngomba Hore,+ na nzela ya Mbu Motane, mpo na koleka zingazinga na mokili ya Edome,+ molimo ya bato ebandaki kolɛmba mpo na nzela.  Mpe bato bazalaki kaka koloba mabe mpo na Nzambe+ ná Moize:+ “Mpo na nini bobimisaki biso na Ezipito mpo tókufa na esobe?+ Mpo mampa ezali te mpe mai ezali te,+ mpe molimo na biso ekómi koyoka mampa+ ya mpamba oyo mpii.”  Bongo Yehova atindaki banyoka+ ya ngɛngɛ na kati ya bato, mpe ezalaki koswa bato, bongo bato mingi ya Yisraele bakufaki.+  Nsukansuka, bato bayaki epai ya Moize mpe balobaki ete: “Tosali lisumu,+ mpamba te tolobi mabe mpo na Yehova mpe mpo na yo. Bondelá Yehova ete alongwela biso banyoka.”+ Mpe Moize abondelaki Yehova mpo na bato.+  Bongo Yehova alobaki na Moize ete: “Salá elilingi ya nyoka ya ngɛngɛ mpe tyá yango likoló ya likonzí ya elembo. Mpe ekosalema mpenza boye: ntango moto aswami, asengeli kotala yango mpe akotikala na bomoi.”+  Na mbala moko Moize asalaki nyoka ya motako+ mpe atyaki yango likoló ya likonzí ya elembo;+ mpe esalemaki boye: soki nyoka eswi moto mpe moto yango atali+ nyoka ya motako, atikali na bomoi.+ 10  Nsima na yango, bana ya Yisraele basimbaki nzela bakei mpe batyaki kaa na Obote.+ 11  Nsima basimbaki nzela bakei, balongwe na Obote mpe batyaki kaa na Iye-abarime,+ na esobe oyo ezali na ngámbo oyo etalani na Moabe, epai moi ebimaka. 12  Longwa kuna basimbaki nzela bakei mpe batyaki kaa pene na lobwaku ya mokɛli ya Zerede.+ 13  Longwa kuna basimbaki nzela mpe bakendaki kotya kaa na etúká ya Arnone,+ oyo ezali na esobe oyo etandani banda na ndelo ya Baamore; mpo Arnone ezali ndelo ya Moabe, kati na Moabe ná Baamore. 14  Yango wana elobami na buku ya Bitumba ya Yehova ete: “Vahebe na Sufa mpe mabwaku ya mikɛli ya Arnone, 15  mpe monɔkɔ ya mabwaku ya mikɛli, oyo etɛngami na ngámbo ya Are+ mpe elaleli ndelo ya Moabe.” 16  Na nsima, longwa kuna bakendaki na Beere.+ Ezali libulu ya mai oyo Yehova alobaki na Moize ete: “Yanganisá bato, napesa bango mai.”+ 17  Na ntango yango Yisraele babandaki koyemba loyembo+ oyo:“Bimisá mai, Ee libulu! Bózongisela yango maloba na loyembo! 18  Libulu ya mai, bankumu batimolaki yango. Bato ya lokumu na kati ya bato batimolaki yango,Na lingenda ya komanda,+ na mangenda na bango moko.” Na nsima, longwa na esobe bakendaki na Matana. 19  Mpe longwa na Matana bakendaki na Nahaliele, mpe longwa na Nahaliele bakendaki na Bamote.+ 20  Mpe longwa na Bamote bakendaki na lobwaku oyo ezali na mokili ya Moabe,+ na nsɔngɛ ya Pisga,+ mpe yango eleki molai na ngámbo oyo etali Yeshimone.*+ 21  Sikoyo Yisraele atindelaki Sihone+ mokonzi ya Baamore bamemi-nsango na maloba oyo: 22  “Tiká ngai naleka na mokili na yo. Tokobaluka te mpo na koleka na elanga to na elanga ya vinyo. Tokomɛla mai ya libulu ata moko te. Tokotambola na balabala ya mokonzi kino tokoleka na teritware na yo.”+ 23  Mpe Sihone apesaki Yisraele nzela te ya koleka na teritware na ye,+ kasi Sihone ayanganisaki bato na ye mpe abimaki kokutana na Yisraele na esobe, mpe akómaki na Yahaze+ mpe abandaki kobunda na Yisraele. 24  Bongo Yisraele abɛtaki ye na mopanga+ mpe azwaki mokili+ na ye longwa na Arnone+ tii na Yaboke,+ pene na bana ya Amone; mpamba te Yazere+ ezali ndelo ya bana ya Amone.+ 25  Na yango, Yisraele azwaki bingumba wana nyonso, mpe Yisraele abandaki kofanda na bingumba nyonso ya Baamore,+ na Heshibone+ mpe na basité nyonso oyo esimbami na yango. 26  Mpo Heshibone ezalaki engumba ya Sihone.+ Azalaki mokonzi ya Baamore,+ mpe ye nde abundaki na mokonzi ya Moabe kala mpe azwaki mokili na ye nyonso na lobɔkɔ na ye tii na Arnone.+ 27  Yango wana bato oyo balobaka maloba ya ntɔki mpo na kotyola bazalaki koloba ete:“Bóya na Heshibone.Engumba ya Sihone etongama mpe etɛlɛmisama makasi. 28  Mpo mɔtɔ ebimi na Heshibone,+ lolemo ya mɔtɔ euti na sité ya Sihone.Ezikisi Are+ ya Moabe, bankolo ya bisika oyo etombwaná ya Arnone. 29  Mawa na yo, Moabe! Bokokufa mpenza, Ee bato ya Kemoshe!+Akopesa mpenza bana na ye ya mibali bázala bato oyo babiki mpe bana na ye ya basi bázala bakangami epai ya Sihone, mokonzi ya Baamore. 30  Bongo tóbwakela bango makula.Ɛɛ, Heshibone ekokufa tii na Dibone,+Mpe basi tii na Nofa, mibali tii na Medeba.”+ 31  Mpe Yisraele akómaki kofanda na mokili ya Baamore.+ 32  Bongo Moize atindaki bato bánɔnga Yazere.+ Na yango, bazwaki basité oyo esimbami na yango, mpe babenganaki Baamore oyo bazalaki wana.+ 33  Nsima na yango, babalukaki mpe bamataki na nzela ya Bashane.+ Bongo Oge+ mokonzi ya Bashane abimaki mpo na kokutana na bango, ye ná bato na ye nyonso, na etumba ya Edrei.+ 34  Sikoyo Yehova alobaki na Moize ete: “Kobanga ye te,+ mpo nakopesa mpenza ye ná bato na ye nyonso mpe mokili na ye na lobɔkɔ na yo;+ mpe osengeli kosala ye kaka ndenge osalaki Sihone, mokonzi ya Baamore, oyo azalaki kofanda na Heshibone.”+ 35  Bongo babɛtaki ye ná bana na ye ya mibali mpe bato na ye nyonso, tii moto na ye ata moko te atikalaki na bomoi;+ mpe bazwaki mokili na ye.+

Maloba na nse

To, “esobe.”