Mitángo 20:1-29
20 Mpe bana ya Yisraele, liyangani mobimba, bakómaki na esobe ya Zine+ na sanza ya liboso, mpe bato yango bakómaki kofanda na Kadeshe.+ Kuna nde Miriame+ akufaki mpe kuna nde akundamaki.
2 Sikoyo mai ezalaki te mpo na liyangani,+ mpe babandaki koyangana mpo na kotombokela Moize ná Arona.+
3 Mpe bato babandaki koswanisa+ Moize mpe koloba ete: “Soki tókufaka ata ntango bandeko na biso bakufaki liboso ya Yehova!+
4 Mpe mpo na nini bomemi lisangá ya Yehova na esobe oyo mpo tókufa awa biso ná banyama na biso oyo ememaka mikumba?+
5 Mpe mpo na nini bobimisi biso na Ezipito mpo na komema biso na esika mabe oyo?+ Ezali te esika ya mboto ná bafigi ná banzete ya vinyo ná bagrenade,+ mpe mai ya komɛla ezali te.”
6 Bongo Moize ná Arona balongwaki liboso ya lisangá mpo na koya na monɔkɔ ya hema ya kokutana mpe bakweaki bilongi na nse,+ mpe nkembo ya Yehova ebandaki kobimela bango.+
7 Bongo Yehova alobaki na Moize ete:
8 “Zwá lingenda+ mpe yanganisá liyangani, yo ná Arona ndeko na yo, mpe bosengeli koloba na libanga na miso na bango ete ebimisa mpenza mai na yango; mpe osengeli kobimisela bango mai na libanga mpe kopesa mai ya komɛla na liyangani ná banyama na bango oyo ememaka mikumba.”+
9 Bongo Moize azwaki lingenda liboso ya Yehova,+ kaka ndenge apesaki ye mitindo.
10 Nsima na yango, Moize ná Arona babengisaki lisangá liboso ya libanga yango, mpe alobaki na bango ete: “Bóyoka, sikoyo, bino batomboki!+ Tóbimisela bino mai na libanga oyo?”+
11 Na yango, Moize atombolaki lobɔkɔ na ye mpe abɛtaki libanga na lingenda na ye mbala mibale; mpe mai mingi ebandaki kobima, mpe liyangani ná banyama na bango oyo ememaka mikumba babandaki komɛla.+
12 Na nsima, Yehova alobaki na Moize mpe na Arona ete: “Lokola bondimelaki ngai te mpo na kosantisa+ ngai na miso ya bana ya Yisraele, mpo na yango bokokɔtisa lisangá oyo te na mokili oyo nakopesa mpenza bango.”+
13 Wana ezali mai ya Meriba,+ mpo bana ya Yisraele baswanisaki Yehova, bongo asantisamaki na kati na bango.
14 Na nsima, Moize atindelaki mokonzi ya Edome+ bamemi-nsango longwa na Kadeshe na maloba oyo: “Talá oyo ndeko na yo Yisraele+ alobi: ‘Yo moko oyebi malamu mpasi nyonso oyo ezwi biso.+
15 Mpe batata na biso babandaki kokita na Ezipito,+ mpe tokobaki kofanda na Ezipito mikolo mingi;+ mpe Baezipito babandaki kosala biso ná batata na biso mabe.+
16 Nsukansuka tolelelaki Yehova+ mpe ayokaki mongongo na biso mpe atindaki anzelu+ mpe abimisaki biso na Ezipito; mpe biso oyo na Kadeshe, engumba oyo ezali na nsuka ya teritware na yo.
17 Tobondeli yo, tiká tóleka na mokili na yo. Tokoleka te na elanga to na elanga ya vinyo, mpe tokomɛla mai ya libulu te. Tokotambola na balabala ya mokonzi.+ Tokobaluka te na lobɔkɔ ya mobali to na lobɔkɔ ya mwasi,+ kino tokoleka na teritware na yo.’”
18 Nzokande, Edome alobaki na ye ete: “Okoleka epai na ngai te, noki nabima na mopanga mpo na kokutana na yo.”
19 Bongo bana ya Yisraele balobaki na ye ete: “Tokomata na balabala monene; mpe soki ngai ná bibwɛlɛ na ngai tomɛli mai na yo, nakofuta mpenza motuya na yango.+ Nalingi eloko mosusu te kaka koleka na makolo.”+
20 Kasi alobaki ete: “Okoleka te.”+ Na yango, Edome+ abimaki na bato ebele mpe na nguya ya lobɔkɔ na ye mpo na kokutana na ye.
21 Bongo Edome aboyaki kopesa Yisraele nzela ya koleka na teritware na ye.+ Yango wana Yisraele abalukaki, alongwe liboso na ye.+
22 Mpe bana ya Yisraele balongwaki na Kadeshe+ mpe bakómaki na Ngomba Hore.+
23 Bongo Yehova alobaki boye na Moize mpe na Arona, na Ngomba Hore, pene na ndelo ya mokili ya Edome:
24 “Arona akoyanganisama na bato na ye,+ mpo akokɔta te na mokili oyo nakopesa mpenza bana ya Yisraele, mpo bino botombokelaki etinda na ngai na likambo ya mai ya Meriba.+
25 Zwá Arona ná Eleazare mwana na ye mpe matisá bango na Ngomba Hore.
26 Mpe longolá Arona bilamba+ na ye, mpe osengeli kolatisa yango Eleazare+ mwana na ye; mpe Arona akoyanganisama na bato na ye mpe asengeli kokufa kuna.”+
27 Bongo Moize asalaki kaka ndenge Yehova apesaki mitindo; mpe na miso ya liyangani mobimba, babandaki komata Ngomba Hore.
28 Na nsima, Moize alongolaki Arona bilamba na ye mpe alatisaki yango Eleazare mwana na ye, nsima na yango, Arona akufaki kuna na nsɔngɛ ya ngomba.+ Mpe Moize ná Eleazare bakitaki na ngomba yango.
29 Mpe liyangani mobimba emonaki ete Arona asilaki kokufa, mpe ndako mobimba ya Yisraele ekobaki kolela Arona mikolo ntuku misato (30).+