Mitángo 2:1-34

2  Sikoyo Yehova alobaki na Moize mpe na Arona ete:  “Bana ya Yisraele bakotya kaa, moto mokomoko na kolanda etuluku na ye ya mabota misato,+ na kolanda bilembo ya ndako ya batata na bango. Bakotya kaa epai na epai liboso ya hema ya kokutana.  “Mpe baoyo bakotya kaa epai ya ɛsti, epai moi ebimaka, ekozala etuluku ya mabota misato ya kaa ya Yuda engebene mampinga na bango, mpe nkumu ya bana ya Yuda ezali Nahashone+ mwana ya Aminadabe.  Mpe limpinga na ye mpe bato na ye oyo bakomisamaki nkombo kati na bango bazali nkóto ntuku nsambo na minei na nkama motoba (74 600).+  Mpe baoyo bakotya kaa pene na ye ekozala libota ya Isakare,+ mpe nkumu ya bana ya Isakare ezali Netanele+ mwana ya Zuare.  Mpe limpinga na ye mpe bato na ye oyo bakomisamaki nkombo bazali nkóto ntuku mitano na minei na nkama minei (54 400).+  Mpe libota ya Zebulone; mpe nkumu ya bana ya Zebulone ezali Eliabe+ mwana ya Helone.  Mpe limpinga na ye mpe bato na ye oyo bakomisamaki nkombo bazali nkóto ntuku mitano na nsambo na nkama minei (57 400).+  “Bato nyonso oyo bakomisamaki nkombo na kaa ya Yuda bazali bato nkóto nkama moko na ntuku mwambe na motoba na nkama minei (186 400) engebene mampinga na bango. Bango bakolongwa bato ya liboso.+ 10  “Etuluku ya mabota misato ya kaa ya Rubene+ ekozala epai ya sudi engebene mampinga na bango, mpe nkumu ya bana ya Rubene ezali Elizure+ mwana ya Shedeure. 11  Mpe limpinga na ye mpe bato na ye oyo bakomisamaki nkombo bazali nkóto ntuku minei na motoba na nkama mitano (46 500).+ 12  Mpe baoyo bakotya kaa pene na ye ekozala libota ya Simeone, mpe nkumu ya bana ya Simeone ezali Shelumiele+ mwana ya Zurishadai. 13  Mpe limpinga na ye mpe bato oyo bakomisamaki nkombo kati na bango bazali nkóto ntuku mitano na libwa na nkama misato (59 300).+ 14  Mpe libota ya Gade; mpe nkumu ya bana ya Gade ezali Eliasafe+ mwana ya Rewele. 15  Mpe limpinga na ye mpe bato oyo bakomisamaki nkombo kati na bango bazali nkóto ntuku minei na mitano na nkama motoba na ntuku mitano (45 650).+ 16  “Bato nyonso oyo bakomisamaki nkombo na kaa ya Rubene bazali nkóto nkama moko na ntuku mitano na moko na nkama minei na ntuku mitano (151 450) engebene mabota na bango, mpe bango bakolongwa bato ya mibale.+ 17  “Ntango hema ya kokutana+ esengeli kolongwa, kaa ya Balevi+ ekozala na katikati ya bakaa. “Kaka ndenge bakotya kaa, ezali mpe ndenge wana nde bakolongwa,+ moto na moto na esika na ye, engebene bituluku na bango ya mabota misato misato. 18  “Etuluku ya mabota misato ya kaa ya Efraime,+ engebene etuluku ya mampinga na bango, ekozala epai ya wɛsti, mpe nkumu ya bana ya Efraime ezali Elishama+ mwana ya Amihude. 19  Mpe limpinga na ye mpe bato oyo bakomisamaki nkombo kati na bango bazali nkóto ntuku minei na nkama mitano (40 500).+ 20  Mpe pene na ye ekozala libota ya Manase,+ mpe nkumu ya bana ya Manase ezali Gamaliele+ mwana ya Pedazure. 21  Mpe limpinga na ye mpe bato oyo bakomisamaki nkombo kati na bango bazali nkóto ntuku misato na mibale na nkama mibale (32 200).+ 22  Mpe libota ya Benyamina;+ mpe nkumu ya bana ya Benyamina ezali Abidane+ mwana ya Gideoni. 23  Mpe limpinga na ye mpe bato oyo bakomisamaki nkombo kati na bango bazali nkóto ntuku misato na mitano na nkama minei (35 400).+ 24  “Bato nyonso oyo bakomisamaki nkombo na kaa ya Efraime bazali bato nkóto nkama moko na mwambe na nkama moko (108 100) engebene mampinga na bango, mpe bango bakolongwa bato ya misato.+ 25  “Etuluku ya mabota misato ya kaa ya Dani ekozala epai ya nɔrdi, engebene mampinga na bango, mpe nkumu ya bana ya Dani ezali Ahiezere+ mwana ya Amishadai. 26  Mpe limpinga na ye mpe bato oyo bakomisamaki nkombo kati na bango bazali nkóto ntuku motoba na mibale na nkama nsambo (62 700).+ 27  Mpe bato oyo bakotya kaa pene na ye ekozala libota ya Ashere, mpe nkumu ya bana ya Ashere ezali Pagiele+ mwana ya Okrane. 28  Mpe limpinga na ye mpe bato oyo bakomisamaki nkombo kati na bango bazali nkóto ntuku minei na moko na nkama mitano (41 500).+ 29  Mpe libota ya Nafatali;+ mpe nkumu ya bana ya Nafatali ezali Ahira+ mwana ya Enane. 30  Mpe limpinga na ye mpe bato oyo bakomisamaki nkombo kati na bango bazali nkóto ntuku mitano na misato na nkama minei (53 400).+ 31  “Bato nyonso oyo bakomisamaki nkombo na kaa ya Dani bazali nkóto nkama moko na ntuku mitano na nsambo na nkama motoba (157 600). Bango bakolongwa bato ya nsuka,+ engebene bituluku na bango ya mabota misato misato.” 32  Bango nde bato oyo bakomisamaki nkombo kati na bana ya Yisraele engebene ndako ya batata na bango; bato nyonso oyo bakomisamaki nkombo na bakaa engebene mampinga na bango bazalaki nkóto nkama motoba na misato na nkama mitano na ntuku mitano (603 550).+ 33  Kasi Balevi bakomisamaki nkombo te+ na kati na bana ya Yisraele, kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo. 34  Mpe bana ya Yisraele babandaki kosala na kolandáká nyonso oyo Yehova apesaki Moize mitindo.+ Ezali ndenge wana nde batyaki kaa, engebene bituluku na bango ya mabota misato misato,+ mpe ezali ndenge wana nde balongwaki,+ moto na moto engebene mabota na ye na kotalela ndako ya batata na ye.

Maloba na nse