Mitángo 19:1-22
19 Mpe Yehova alobaki na Moize mpe na Arona ete:
2 “Talá eloko oyo esɛngami na mobeko oyo Yehova apesi: ‘Lobá na bana ya Yisraele ete bázwela yo ngɔmbɛ-mwasi ya motane, ya malamu, oyo ezali na mbeba te+ mpe oyo ekanganeli ata moko te etyamá likoló na yango.+
3 Mpe osengeli kopesa yango Eleazare nganga-nzambe, mpe ye asengeli komema yango na libándá ya kaa, mpe esengeli kobomama liboso na ye.
4 Na nsima, Eleazare nganga-nzambe asengeli kozwa mwa ndambo ya makila na yango na mosapi na ye mpe komwangisa mwa ndambo na yango epai ya monɔkɔ ya hema ya kokutana mbala nsambo.+
5 Mpe ngɔmbɛ-mwasi yango esengeli kozikisama na miso na ye. Loposo na yango ná mosuni na yango mpe makila na yango nzela moko na nyɛi na yango ekozikisama.+
6 Mpe nganga-nzambe asengeli kozwa nzete ya sɛdrɛ+ ná nzete ya izope+ ná biloko oyo epakolami langi ya motane makasi+ mpe kobwaka yango na kati ya mɔtɔ oyo ezali kozikisa ngɔmbɛ-mwasi yango.
7 Mpe nganga-nzambe asengeli kosukola bilamba na ye mpe kosukola nzoto na ye na mai, mpe na nsima, akoki kokɔta na kaa; kasi nganga-nzambe asengeli kozala mbindo tii na mpokwa.
8 “‘Mpe moto oyo azikisaki yango akosukola bilamba na ye na mai mpe asengeli kosukola nzoto na ye na mai,+ mpe asengeli kozala mbindo tii na mpokwa.
9 “‘Mpe moto moko oyo azali pɛto asengeli kosangisa putulu+ ya mɔtɔ ya ngɔmbɛ-mwasi yango mpe kotya yango na libándá ya kaa na esika moko ya pɛto; mpe esengeli kozala mpo na liyangani ya bana ya Yisraele eloko oyo ekobatelama mpo na mai ya kopɛtola.+ Ezali likabo mpo na lisumu.
10 Mpe moto oyo azali kosangisa putulu ya mɔtɔ ya ngɔmbɛ-mwasi yango asengeli kosukola bilamba na ye mpe kozala mbindo tii na mpokwa.+
“‘Mpe esengeli kozala mobeko mpo na ntango oyo etyami ndelo te mpo na bana ya Yisraele mpe mopaya oyo azali kofanda mopaya na kati na bango.+
11 Moto nyonso oyo asimbi ebembe ya molimo ya moto+ moko asengeli mpe kozala mbindo mikolo nsambo.+
12 Moto yango akomipɛtola na yango na mokolo ya misato,+ mpe na mokolo ya nsambo akozala pɛto. Kasi soki akomipɛtola te na mokolo ya misato, na mokolo ya nsambo akozala pɛto te.
13 Moto nyonso oyo asimbi ebembe, molimo ya moto nyonso oyo akufi, mpe oyo akomipɛtola te, akómisi tabernakle+ ya Yehova mbindo, mpe molimo yango asengeli kolongolama na Yisraele.+ Lokola mai ya kopɛtola+ emwangisami likoló na ye te, azali kaka mbindo. Mbindo na ye ezali naino likoló na ye.+
14 “‘Talá mobeko soki moto akufi na kati ya hema: Moto nyonso oyo akɔti na hema yango, mpe moto nyonso oyo azali na kati ya hema yango, akozala mbindo mikolo nsambo.
15 Mpe mbɛki+ nyonso ya polele, oyo ezipeli ekangami likoló na yango te, ezali mbindo.
16 Mpe moto nyonso oyo, kati na esobe mpenza, asimbi moto oyo babomi na mopanga+ to ebembe to mokuwa+ ya moto to lilita akozala mbindo mikolo nsambo.
17 Mpe basengeli kozwa mpo na moto yango ya mbindo mwa ndambo ya putulu ya mɔtɔ ya likabo mpo na lisumu mpe kotya likoló na yango mai oyo euti na mai oyo ezali kotíyola, oyo ezali kati na mbɛki.
18 Na nsima, moto oyo azali pɛto+ asengeli kozwa nzete ya izope+ mpe kozindisa yango na mai mpe komwangisa yango likoló ya hema mpe likoló ya bambɛki nyonso mpe likoló ya milimo nyonso oyo bazalaki kuna mpe likoló ya moto oyo asimbaki mokuwa to moto oyo babomi to ebembe to lilita.
19 Mpe moto ya pɛto asengeli komwangisela yango moto ya mbindo na mokolo ya misato mpe na mokolo ya nsambo, mpe asengeli kopɛtola ye na lisumu na mokolo ya nsambo;+ mpe asengeli kosukola bilamba na ye mpe kosukola nzoto na mai, mpe asengeli kozala pɛto na mpokwa.
20 “‘Kasi moto oyo azali mbindo mpe oyo akomipɛtola te, ɛɛ, molimo yango asengeli kolongolama+ na kati ya lisangá, mpo ezali esika mosantu ya Yehova nde ye akómisi mbindo. Mai ya kopɛtola emwangisamaki likoló na ye te. Azali mbindo.
21 “‘Mpe esengeli kozala mobeko mpo na ntango oyo etyami ndelo te mpo na bango: moto oyo azali komwangisa mai ya kopɛtola akosukola bilamba+ na ye, ezala mpe moto oyo asimbi mai ya kopɛtola. Akozala mbindo tii na mpokwa.
22 Mpe eloko nyonso oyo moto ya mbindo akosimba, ekozala mbindo,+ mpe molimo oyo asimbi yango akozala mbindo tii na mpokwa.’”+