Mitángo 18:1-32
18 Mpe Yehova alobaki na Arona ete: “Yo ná bana na yo ya mibali mpe ndako ya tata na yo elongo na yo bokozongisa monɔkɔ mpo na libunga oyo basaleli esika mosantu,+ mpe yo ná bana na yo ya mibali elongo na yo bokozongisa monɔkɔ mpo na libunga oyo basaleli bonganga-nzambe na bino.+
2 Mpe bɛlɛmisá lisusu bandeko na yo ya mibali ya libota ya Levi, etuluka ya tata na yo, elongo na yo, mpo básangana na yo mpe básalela yo,+ yo ná bana na yo ya mibali elongo na yo, liboso ya hema ya Litatoli.+
3 Mpe basengeli kokokisa mokumba na bango epai na yo mpe mokumba na bango na hema mobimba.+ Kasi basengeli te kobɛlɛma na bisaleli ya esika mosantu mpe na etumbelo mpo bákufa te,+ ezala bango, ezala mpe bino.
4 Mpe basengeli kosangana na yo mpe basengeli kokokisa mokumba na bango na hema ya kokutana na oyo etali mosala nyonso ya hema, mpe mopaya moko te akobɛlɛma na bino.+
5 Mpe bosengeli kokokisa mokumba na bino na esika mosantu+ mpe mokumba na bino na etumbelo,+ mpo nkanda+ ekitela bana ya Yisraele lisusu te.
6 Mpe ngai, talá! nazwi bandeko na bino ya mibali, Balevi, na kati ya bana ya Yisraele,+ bázala likabo mpo na bino,+ bázala bato oyo bapesami epai ya Yehova mpo na kosala mosala ya hema ya kokutana.+
7 Mpe yo ná bana na yo ya mibali bokokokisa malamu mosala na bino ya bonganga-nzambe na makambo nyonso oyo etali etumbelo mpe biloko oyo ezali na nsima ya rido;+ mpe bino bosengeli kosala mosala.+ Nakopesa bino mosala ya bonganga-nzambe lokola likabo, mpe mopaya oyo akobɛlɛma, asengeli kobomama.”+
8 Mpe Yehova alobaki lisusu na Arona ete: “Kasi ngai, talá! napesi yo mosala ya kobatela makabo oyo bapesi ngai.+ Napesi yo ná bana na yo ya mibali likabo ya biloko nyonso mosantu ya bana ya Yisraele, lokola pɔsɔ mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+
9 Talá oyo ekokóma ya yo na biloko oyo eleki bosantu, na likabo oyo etumbami na mɔtɔ: likabo nyonso na bango ná likabo nyonso na bango ya mbuma,+ mpe likabo nyonso na bango mpo na lisumu,+ mpe likabo nyonso na bango ya ngambo,+ oyo bakozongisela ngai. Ezali eloko oyo eleki bosantu mpo na yo mpe mpo na bana na yo ya mibali.
10 Okolya yango na esika oyo eleki bosantu.+ Mobali nyonso akolya yango.+ Ekokóma eloko moko mosantu mpo na yo.+
11 Mpe talá oyo ezali ya yo: likabo+ oyo euti na biloko oyo bakokabela bango ná makabo nyonso ya koningisa+ ya bana ya Yisraele. Napesi yango na yo mpe na bana na yo ya mibali mpe na bana na yo ya basi elongo na yo,+ lokola pɔsɔ mpo na ntango oyo etyami ndelo te. Moto nyonso ya pɛto na ndako na yo akoki kolya yango.+
12 “Mafuta nyonso oyo eleki kitoko mpe vinyo nyonso ya sika oyo eleki kitoko mpe mbuma, mbuma na bango ya liboso,+ oyo bakopesa Yehova, napesi yo yango.+
13 Mbuma ya liboso oyo eteli na nyonso oyo ezali na mokili na bango, oyo bakomemela Yehova, ekokóma ya yo.+ Moto nyonso ya pɛto na ndako na yo akoki kolya yango.
14 “Eloko nyonso oyo epesami mpo na kosantisama na Yisraele ekokóma ya yo.+
15 “Eloko nyonso oyo ezali kofungola libumu,+ ya lolenge nyonso ya mosuni, na kati ya bato mpe na kati ya banyama, oyo bakopesa Yehova, ekokóma ya yo. Nzokande, okosikola mpenza mwana ya liboso ya bato;+ mpe okosikola mwana ya liboso ya nyama ya mbindo.+
16 Mpe okosikola yango na motuya ya lisiko mpo na yango, banda na sanza moko tii na likoló, na kolanda motuya oyo ekatami, shekele mitano ya palata na kolanda shekele ya esika mosantu.+ Yango ezali gera ntuku mibale (20).+
17 Kasi okosikola te ngɔmbɛ-mobali oyo ezali mwana ya liboso to mwana-mpate ya mobali oyo ezali mwana ya liboso to ntaba oyo ezali mwana ya liboso.+ Ezali eloko moko mosantu. Okomwangisa makila+ na yango likoló ya etumbelo, mpe okosala ete mafuta na yango ebimisa milinga lokola likabo oyo etumbami na mɔtɔ mpo ezala nsolo moko ya kokitisa Yehova motema.+
18 Mpe mosuni na yango ekokóma ya yo. Lokola ntolo ya likabo ya koningisa mpe lokola lokolo ya mobali, ekokóma ya yo.+
19 Makabo+ nyonso mosantu, oyo bana ya Yisraele bakopesa Yehova, napesi yango na yo mpe na bana na yo ya mibali mpe na bana na yo ya basi elongo na yo, lokola pɔsɔ mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ Ezali kondimana ya mungwa mpo na ntango oyo etyami ndelo te liboso ya Yehova mpo na yo mpe mpo na bana na yo elongo na yo.”+
20 Mpe Yehova alobaki lisusu na Arona ete: “Na mokili na bango okozala na libula te, mpe likabo moko te ekokóma ya yo na kati na bango.+ Ngai nazali likabo na yo mpe libula na yo na kati ya bana ya Yisraele.+
21 “Mpe talá! napesi bana ya Levi moko ya bandambo zomi+ nyonso na Yisraele ezala libula mpo na mosala na bango oyo bazali kosala, mosala ya hema ya kokutana.
22 Mpe bana ya Yisraele bakobɛlɛma na hema ya kokutana lisusu te, noki bámema lisumu mpe bákufa.+
23 Mpe Balevi bango moko basengeli kosala mosala ya hema ya kokutana, mpe bango nde bato bakozongisa monɔkɔ mpo na libunga na bango.+ Ezali mobeko mpo na ntango oyo etyami ndelo te na boumeli ya mabota na bino ete bakozwa libula te na kati ya bana ya Yisraele.+
24 Mpo moko ya bandambo zomi ya bana ya Yisraele, oyo bakopesa Yehova likabo, napesi yango libula na Balevi. Yango wana, nalobi na bango ete: ‘Bakozwa libula te na kati ya bana ya Yisraele.’”+
25 Bongo Yehova alobaki na Moize ete:
26 “Okoloba na Balevi, mpe osengeli koyebisa bango ete: ‘Bokozwa epai ya bana ya Yisraele moko ya bandambo zomi oyo napesi bino uta na bango mpo ezala libula na bino,+ mpe bosengeli kopesa likabo uta na yango lokola likabo mpo na Yehova, moko ya bandambo zomi uta na moko ya bandambo zomi.+
27 Mpe bakotángela bino yango lokola likabo na bino, lokola mbuma ya esika ya kotutatuta mbuma+ mpe lokola biloko nyonso oyo euti na ekamwelo ya vinyo mpe ya mafuta.
28 Ndenge wana nde bino mpe bokopesa Yehova likabo oyo euti na moko ya bandambo zomi nyonso na bino, oyo bokozwa epai ya bana ya Yisraele, mpe na oyo wana, bosengeli kopesa Arona nganga-nzambe likabo ya Yehova.
29 Na makabo nyonso oyo bakopesa bino, bokopesa Yehova lolenge nyonso ya likabo, ya eloko na yango nyonso oyo eleki kitoko,+ ezala eloko moko mosantu oyo euti na yango.’
30 “Mpe osengeli koloba na bango ete: ‘Ntango bokopesa eloko oyo eleki kitoko oyo euti na biloko yango,+ ekotángama mpo na Balevi lokola eloko ya esika ya kotutatuta mbuma mpe lokola biloko oyo euti na ekamwelo ya vinyo mpe ya mafuta.
31 Mpe bosengeli kolya yango na esika nyonso, bino ná bato ya ndako na bino, mpamba te ezali lifuti na bino mpo na mosala oyo bozali kosala na kati ya hema ya kokutana.+
32 Mpe bosengeli te komema lisumu mpo na yango ntango bokopesa eloko oyo eleki kitoko oyo euti na biloko yango, mpe bosengeli te kokómisa biloko mosantu ya bana ya Yisraele biloko mpamba, mpo bókufa te.’”+