Mitángo 15:1-41
15 Mpe Yehova alobaki lisusu na Moize ete:
2 “Lobá na bana ya Yisraele, mpe osengeli koyebisa bango ete: ‘Nsukansuka, ntango bokokɔta na mokili, na bisika oyo bokofanda, oyo nazali kopesa bino,+
3 mpe bosengeli kopesa Yehova+ likabo oyo etumbami na mɔtɔ, likabo ya kotumba+ to mbeka mpo na kosala elako moko monene to ya bolingo+ to na bafɛti+ na bino na bileko oyo etyamá, mpo na kosala ete yango ebimisa nsolo moko ya kokitisa Yehova motema,+ likabo oyo euti na etonga ya bangɔmbɛ to na etonga ya bampate,
4 moto oyo azali kopesa likabo na ye asengeli mpe kopesa Yehova likabo ya mbuma ya farini ya malamu,+ moko ya bandambo zomi ya efa, oyo emwangisami moko ya bandambo minei ya hini ya mafuta.
5 Mpe okopesa vinyo likabo ya masanga,+ moko ya bandambo minei ya hini, nzela moko na likabo ya kotumba to mpo na mbeka ya mwana-mpate mokomoko ya mobali.
6 To mpo na mpate-mobali moko, okopesa likabo ya mbuma ya mibale ya bandambo zomi ya farini ya malamu, oyo emwangisami moko ya bandambo misato ya hini ya mafuta.
7 Mpe okopesa vinyo likabo ya masanga, moko ya bandambo misato ya hini, mpo ezala nsolo moko ya kokitisa Yehova motema.
8 “‘Kasi soki okopesa nyama moko ya mobali oyo euti na etonga ya bangɔmbɛ mpo ezala likabo ya kotumba+ to mbeka mpo na kosala elako+ moko monene to bambeka ya boyokani epai ya Yehova,+
9 basengeli mpe kopesa, nzela moko na nyama yango ya mobali oyo euti na etonga ya bangɔmbɛ, likabo ya mbuma+ oyo esalemi na misato ya bandambo zomi ya farini ya malamu, oyo emwangisami hini moko ya mafuta kabolá na mibale.
10 Mpe okopesa vinyo likabo ya masanga,+ hini moko kabolá na mibale, mpo ezala likabo etumbami na mɔtɔ, ya nsolo moko ya kokitisa Yehova motema.
11 Ndenge wana nde bakosala mpo na ngɔmbɛ-mobali mokomoko to mpo na mpate-mobali mokomoko to mpo na nyama moko kati na bana-mpate ya mibali to kati na bantaba.
12 Ezala motángo nini oyo bokopesa, ndenge wana nde bokosala mpo na mokomoko engebene motángo na yango.
13 Mwana-mboka nyonso akopesa yango ndenge wana ntango akopesa likabo oyo etumbami na mɔtɔ, ya nsolo moko ya kokitisa Yehova motema.+
14 “‘Mpe soki mopaya oyo afandi mopaya epai na bino to moto oyo azali na kati na bino na boumeli ya mabota na bino, mpe soki asengeli kopesa likabo oyo etumbami na mɔtɔ, ya nsolo moko ya kokitisa Yehova motema, kaka ndenge bokosala, ye mpe akosala bongo.+
15 Bino bato ya lisangá mpe mopaya oyo azali kofanda mopaya, bokozala na mobeko kaka moko.+ Ekozala mobeko mpo na ntango oyo etyami ndelo te na boumeli ya mabota na bino. Moto oyo afandi mopaya akozala ndenge moko lokola bino liboso ya Yehova.+
16 Mobeko ekozala kaka moko mpe ekateli ya lisambisi kaka moko mpo na bino mpe mpo na mopaya oyo azali kofanda mopaya elongo na bino.’”+
17 Mpe Yehova alobaki lisusu na Moize ete:
18 “Lobá na bana ya Yisraele, mpe osengeli koyebisa bango ete: ‘Ntango bokokɔta na mokili epai nazali komema bino,+
19 ekosalema mpenza boye: ntango bokolya mampa ya mokili yango,+ bokopesa Yehova likabo.
20 Bokopesa likabo na bino ya bagato basalá lokola lopɛtɛ oyo esalemi na farini ya liboso ya mbumambuma oyo euti na mbuma na bino ya liboso.+ Bokopesa yango ndenge bopesaka likabo ya esika ya kotutatuta mbuma.
21 Bokopesa Yehova likabo ya mwa ndambo ya farini na bino ya liboso ya mbumambuma oyo euti na mbuma na bino ya liboso, na boumeli ya mabota na bino.
22 “‘Sikoyo soki bosali libunga mpe bosaleli te mitindo+ oyo nyonso, oyo Yehova alobi na Moize,
23 mitindo nyonso oyo Yehova apesi bino na nzela ya Moize, banda na mokolo oyo Yehova apesaki mitindo, mpe na nsima na mabota na bino,
24 ekosalema mpenza boye: soki yango esalemi, na nko te, mosika na miso ya liyangani, liyangani mobimba esengeli kopesa mwana-ngɔmbɛ moko ya mobali lokola likabo ya kotumba mpo ezala nsolo moko ya kokitisa Yehova motema, ná likabo na yango ya mbuma ná likabo na yango ya masanga ndenge basalaka,+ mpe mwana-ntaba moko lokola likabo mpo na lisumu.+
25 Mpe nganga-nzambe asengeli kozipa masumu+ ya liyangani mobimba ya bana ya Yisraele, mpe basengeli kolimbisa bango yango; mpamba te ezalaki libunga,+ mpe bango, ɛɛ bango, bamemaki lokola likabo na bango likabo oyo batumbeli Yehova na mɔtɔ mpe likabo na bango mpo na lisumu liboso ya Yehova mpo na libunga na bango.
26 Mpe liyangani mobimba ya bana ya Yisraele ná mopaya oyo azali kofanda mopaya na kati na bango basengeli kolimbisama+ libunga yango, mpo bato yango nyonso basalaki na nko te.
27 “‘Mpe soki molimo moko asali lisumu na nko te,+ asengeli kopesa ntaba-mwasi, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, lokola likabo mpo na lisumu.+
28 Mpe nganga-nzambe asengeli kozipa masumu ya molimo oyo asali libunga na lisumu moko boye, na nko te, liboso ya Yehova, mpo na kozipa yango, mpe basengeli kolimbisa ye yango.+
29 Mpo na mwana-mboka kati na bana ya Yisraele mpe mpo na mopaya oyo azali kofanda mopaya na kati na bango, mobeko ekozala kaka moko mpo na bino mpo na likambo moko oyo esalemi na nko te.+
30 “‘Kasi molimo oyo azali kosala likambo moko boye na nko,+ ezala mwana-mboka to moto oyo afandi mopaya, oyo azali kotuka Yehova,+ molimo yango asengeli kolongolama na kati ya bato na ye.+
31 Lokola atyoli+ nde liloba ya Yehova mpe abuki+ nde mobeko na ye, molimo yango asengeli mpenza kolongolama.+ Libunga na ye ezali likoló na ye.’”+
32 Wana bana ya Yisraele bazalaki naino na esobe, mokolo moko bakutaki mobali moko azali kolɔkɔta nkoni na mokolo ya sabata.+
33 Bongo baoyo bakutaki ye azali kolɔkɔta nkoni bamemaki ye epai ya Moize ná Arona mpe epai ya liyangani mobimba.
34 Bongo batyaki ye esika moko boye,+ mpo eloko oyo basengelaki kosala ye eyebisamaki sikisiki te.
35 Na nsima, Yehova alobaki na Moize ete: “Mobali yango asengeli mpenza kobomama,+ liyangani mobimba esengeli kobamba ye mabanga na libándá ya kaa.”+
36 Na yango, liyangani mobimba ememaki ye na libándá ya kaa mpe ebambaki ye mabanga mpe akufaki, kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.
37 Mpe Yehova alobaki na Moize lisusu likambo oyo:
38 “Lobá na bana ya Yisraele, mpe osengeli koyebisa bango ete basengeli komisalela ndelo ya malendamalenda na nsɔngɛ ya bilamba na bango na boumeli ya mabota na bango, mpe basengeli kotya nsinga ya bulé na likoló ya ndelo yango ya malendamalenda ya nsɔngɛ ya elamba,+
39 ‘Mpe yango esengeli kozala ndelo ya malendamalenda mpo na bino, mpe bosengeli komona yango mpe kokanisa mibeko+ nyonso ya Yehova mpe kosalela yango, mpe bosengeli te kolanda mitema na bino ná miso+ na bino, oyo bozali kolanda na pite.+
40 Ezali mpo bókanisa mpe bótosa mpenza mibeko na ngai nyonso mpe bózala mpenza basantu liboso ya Nzambe na bino.+
41 Ngai Yehova Nzambe na bino moto nabimisi bino na mokili ya Ezipito mpo namonisa ete nazali Nzambe na bino.+ Ngai nazali Yehova Nzambe na bino.’”+