Mitángo 13:1-33

13  Sikoyo Yehova alobaki na Moize ete:  “Tindá mibali bákende konɔngɛla yo mokili ya Kanana, oyo nazali kopesa bana ya Yisraele.+ Bokotinda mobali moko na libota mokomoko ya batata na ye, mokomoko azala nkumu+ na kati na bango.”  Bongo Moize atindaki bango longwa na esobe ya Parane+ na etinda ya Yehova. Mibali yango nyonso bazalaki bankumu ya bana ya Yisraele.  Mpe nkombo na bango, yango oyo: Na libota ya Rubene, Shamua mwana ya Zakure;  na libota ya Simeone, Shafate mwana ya Hori;  na libota ya Yuda, Kalebe+ mwana ya Yefune;  na libota ya Isakare, Yigale mwana ya Yozefe;  na libota ya Efraime, Hoshea+ mwana ya Nunu;  na libota ya Benyamina, Palati mwana ya Rafu; 10  na libota ya Zebulone, Gadiele mwana ya Sodi; 11  na libota ya Yozefe,+ mpo na libota ya Manase,+ Gadi mwana ya Susi; 12  na libota ya Dani, Amiele mwana ya Gemali; 13  na libota ya Ashere, Seture mwana ya Mikaele; 14  na libota ya Nafatali, Nahebi mwana ya Vofisi; 15  na libota ya Gade, Guele mwana ya Maki. 16  Wana ezali nkombo ya mibali oyo Moize atindaki mpo na konɔnga mokili. Mpe Moize azalaki kobenga Hoshea mwana ya Nunu Yehoshua.+ 17  Ntango Moize atindaki bango mpo na konɔnga mokili ya Kanana, alobaki na bango ete: “Bómata awa tii bókɔta na Negebe,+ mpe bosengeli komata tii bókɔta na etúká ya ngombangomba.+ 18  Mpe bosengeli kotala ndenge mokili yango ezali+ mpe bato oyo bazali kofanda kuna, soki bazali makasi to makasi te, soki bazali moke to mingi; 19  mpe ndenge mokili oyo bazali kofanda ezali, soki ezali malamu to mabe, mpe ndenge bingumba oyo bazali kofanda ezali, soki ezali na bakaa to na mapango ya makasi; 20  mpe ndenge mokili yango ezali, soki ezali na mabele ya malamu to ya malamu te,+ soki ezali na banzete to te. Mpe bosengeli kozala na mpiko+ mpe kozwa mwa ndambo ya mbuma ya mokili yango.” Nzokande, mikolo yango ezalaki mikolo oyo mbuma ya liboso ya vinyo etelaki.+ 21  Bongo bamataki mpe banɔngaki mokili yango longwa na esobe ya Zine+ tii na Rehobe,+ na esika ya kokɔta na Hamate.+ 22  Ntango bamataki tii bakɔti na Negebe,+ bakómaki tii na Hebrone.+ Sikoyo Ahimane, Sheshai ná Talamai,+ baoyo Anake+ abotaki, bazalaki kuna. Nzokande, Hebrone+ etongamaki mbula nsambo liboso ya Zoane+ ya Ezipito. 23  Ntango bakómaki na lobwaku ya mokɛli ya Eshikole,+ kuna bakataki etape ya etuka moko ya mbuma ya vinyo.+ Mpe mibali mibale na kati ya mibali yango bamemaki yango na nzete, ná mwa ndambo ya bagrenade+ mpe mwa ndambo ya mbuma ya figi. 24  Babengaki esika yango lobwaku ya mokɛli ya Eshikole,+ mpo na etuka yango oyo bana ya Yisraele bakataki kuna. 25  Nsukansuka, nsima ya mikolo ntuku minei (40),+ bazongaki nsima ya konɔnga mokili yango. 26  Bongo batambolaki mpe bakómaki epai ya Moize ná Arona mpe liyangani mobimba ya bana ya Yisraele na esobe ya Parane, na Kadeshe.+ Mpe bamemelaki bango ná liyangani mobimba maloba mpe balakisaki bango mbuma ya mokili yango. 27  Mpe bapesaki ye nsango mpe balobaki ete: “Tokɔtaki na mokili oyo otindaki biso, mpe yango etondi mpenza na miliki mpe na mafuta ya nzoi,+ mpe talá mbuma na yango.+ 28  Kasi, likambo moko kaka: bato oyo bazali kofanda na mokili yango bazali makasi, mpe bingumba oyo ebatelami makasi ezali minene mpenza;+ mpe lisusu, kuna tomonaki baoyo Anake abotaki.+ 29  Baamaleke+ bazali kofanda na mokili ya Negebe,+ mpe Bahiti ná Bayebusi+ mpe Baamore+ bazali kofanda na etúká ya ngombangomba, mpe Bakanana+ bazali kofanda pembeni ya mbu mpe pembenipembeni ya Yordani.” 30  Bongo Kalebe+ amekaki kokitisa bato motema liboso ya Moize mpe alobaki ete: “Tómata noki, mpe tokozwa mpenza yango, mpamba te tokoki mpenza kolonga yango.”+ 31  Kasi mibali oyo bamataki elongo na ye balobaki ete: “Biso tokokoka te komata mpo na kobunda na bato yango, mpo baleki biso na makasi.”+ 32  Mpe bazalaki kaka kopesa bana ya Yisraele nsango+ ya mabe mpo na mokili oyo banɔngaki, na maloba oyo: “Mokili oyo tolekaki na kati na yango mpo na konɔnga yango ezali mokili moko oyo elyaka bato oyo bafandi kuna; mpe bato nyonso oyo tomonaki na kati na yango bazali mibali ya mbinga na ndenge moko ya kokamwa.+ 33  Mpe kuna tomonaki Banefilime, bana ya Anake,+ oyo bauti na Banefilime; bongo na miso na biso moko tomimonaki lokola makɔnkɔ, mpe ndenge yango nde tomonanaki na miso na bango.”+

Maloba na nse