Mitángo 12:1-16

12  Sikoyo Miriame ná Arona babandaki koloba mabe mpo na Moize na ntina etali mwasi Mokushi oyo ye azwaki, mpamba te azwaki mwasi Mokushi.+  Mpe bazalaki kaka koloba ete: “Ezali kaka na nzela ya Moize ye moko nde Yehova alobi? Ye alobi mpe na nzela na biso te?”+ Mpe Yehova azalaki koyoka.+  Mpe moto yango Moize azalaki na komikitisa+ mingi koleka bato nyonso oyo bazalaki na mabele.  Bongo na mbala moko Yehova alobaki na Moize ná Arona mpe na Miriame ete: “Bóbima, bino misato, bókende na hema ya kokutana.” Bongo bango misato babimaki.  Nsima na yango Yehova akitaki kati na likonzí ya lipata+ mpe atɛlɛmaki na monɔkɔ ya hema mpe abengaki Arona ná Miriame. Na yango, bango mibale babimaki.  Mpe akobaki koloba ete: “Nabondeli bino, bóyoka maloba na ngai. Soki mosakoli moko ya Yehova azali na kati na bino, mbɛlɛ nalingaki komimonisa na ye na emonaneli.+ Nalingaki koloba na ye nde na ndɔtɔ.+  Ezali bongo te mpo na mosaleli na ngai Moize!+ Napesi ye ndako na ngai mobimba.+  Nalobaka na ye boye mpenza na monɔkɔ,+ namonisaka ye makambo polele, kasi na sambole+ te; mpe amonaka mpenza nde kobima ya Yehova.+ Bongo mpo na nini bobangaki te koloba mabe mpo na mosaleli na ngai, mpo na Moize?”+  Mpe nkanda ya Yehova engalelaki bango, mpe asimbaki nzela akei. 10  Mpe lipata elongwaki likoló ya hema, mpe talá! Miriame azwaki maladi ya maba, mpɛmbɛ lokola nɛjɛ.+ Bongo Arona abalukaki, atali Miriame, mpe talá! Miriame azwaki maladi ya maba.+ 11  Na mbala moko, Arona alobaki na Moize ete: “Limbisá ngai, nkolo na ngai! Nabondeli yo, kotángela biso te lisumu oyo tosali na bozoba mpe oyo tosumuki na yango!+ 12  Nabondeli yo, kotika ye te akoba kozala lokola moto oyo akufi,+ oyo ndambo ya mosuni na ye elyami na ntango azali kobima na libumu ya mama na ye!” 13  Mpe Moize abandaki kobelela Yehova na maloba oyo: “Ee Nzambe, nabondeli yo, bikisá ye, nabondeli yo!”+ 14  Bongo Yehova alobaki na Moize ete: “Soki tata na ye abwakeli ye mpenza nsoi+ na elongi, alingaki kosambwisama mikolo nsambo te? Tiká atyama mosika na bato+ mikolo nsambo na libándá ya kaa,+ mpe na nsima, ayambama lisusu.”+ 15  Na yango, Miriame atyamaki mosika na bato na libándá ya kaa mikolo nsambo,+ mpe bato balongwaki te kino Miriame ayambamaki lisusu. 16  Mpe na nsima, bato basimbaki nzela bakei na Hazerote+ mpe batyaki kaa na esobe ya Parane.+

Maloba na nse