Mitángo 11:1-35
11 Sikoyo bato bakómaki komilelalela na matoi ya Yehova+ lokola bato moko oyo bazali na mpasi. Ntango Yehova ayokaki yango, bongo nkanda na ye engalaki, mpe mɔtɔ ya Yehova ebandaki kongalela bango mpe kozikisa bamosusu oyo bazalaki na nsuka ya kaa.+
2 Ntango bato babandaki kobelela Moize, ye abondelaki Yehova,+ mpe mɔtɔ ekufaki.
3 Mpe babengaki esika yango nkombo Tabera,+ mpamba te mɔtɔ ya Yehova engalelaki bango.
4 Mpe ebele ya bato ndenge na ndenge+ oyo bazalaki na kati na bango bamonisaki mposa makasi na lokoso,+ bongo bana ya Yisraele mpe babandaki kolela lisusu mpe koloba ete: “Nani akopesa biso mosuni ya kolya?+
5 Talá tozali kokanisa mbisi oyo tomesanaki kolya na Ezipito mpambampamba,+ ná bakɔkɔmbrɛ, ná bapastɛkɛ, ná bapwaro, ná matungulu ná ayi!
6 Kasi sikoyo molimo na biso ekauki. Miso na biso ezali komona eloko mosusu te kaka mana.”+
7 Nzokande, mana+ ezalaki lokola mbuma ya koriandre,+ mpe ezalaki komonana lokola bedeliume.+
8 Bato bazalaki kopalangana epai na epai mpe bazalaki kolɔkɔta+ yango mpe bazalaki konika yango na binikelo ya mabɔkɔ to bazalaki kotuta yango na liboka, mpe bazalaki kotɔkisa yango na banzungu ya kolambela+ to bazalaki kosala yango bagato ya libungutulu, mpe elɛngi na yango ezalaki lokola elɛngi ya gato ya kitoko oyo etyami mafuta.+
9 Mpe ntango mamwɛ ezalaki kokita na kaa na butu, mana ezalaki mpe kokita.+
10 Mpe Moize ayokaki bato bazali kolela na kati ya mabota na bango, moto na moto na monɔkɔ ya hema na ye. Mpe nkanda ya Yehova ebandaki kongala makasi,+ mpe yango ezalaki mabe na miso ya Moize.+
11 Bongo Moize alobaki na Yehova ete: “Mpo na nini osaleli mosaleli na yo mabe, mpe mpo na nini nandimami na miso na yo te, na ndenge otye mokumba ya bato oyo nyonso likoló na ngai?+
12 Ngai nde nakumbaki zemi ya bato oyo nyonso? Ngai nde moto nabotaki bango, mpo oloba na ngai ete: ‘Memá bango na ntolo+ na yo, kaka ndenge mobateli amemaka mwana oyo azali komɛla mabɛlɛ,’+ tii na mabele oyo olapelaki batata na bango ndai?+
13 Epai wapi nakozwa mosuni ya kopesa bato oyo nyonso? Mpo bazali kaka kolelela ngai ete: ‘Pesá biso mosuni tólya!’
14 Nakokoka te, ngai moko, komema bato oyo nyonso, mpamba te baleki ngai na kilo.+
15 Bongo soki ndenge wana nde ozali kosala ngai, nabondeli yo, bomá ngai koboma,+ soki nandimami na miso na yo, kotika te ete namona mpasi.”
16 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: “Yanganiselá ngai mibali ntuku nsambo (70) kati na mikóló ya Yisraele,+ oyo oyebi ete bazali mikóló ya bato mpe bakapita na bango,+ mpe osengeli komema bango na hema ya kokutana, mpe basengeli kotɛlɛma wana elongo na yo.
17 Mpe nasengeli kokita+ mpe kosolola na yo wana;+ mpe nasengeli kozwa mwa ndambo ya elimo+ oyo ezali likoló na yo mpe kotya yango likoló na bango, mpe bango bakosalisa yo na komema mokumba ya bato, mpo omema yango kaka yo moko te.+
18 Mpe okoloba na bato ete: ‘Bómisantisa mpo na lobi,+ mpo bokolya mpenza mosuni, mpamba te boleli na matoi ya Yehova,+ bolobi: “Nani akopesa biso mosuni ya kolya, mpo tozalaki na biso malamu na Ezipito?”+ Mpe Yehova akopesa bino mpenza mosuni, mpe bokolya mpenza.+
19 Bokolya, kaka mokolo moko te to mikolo mibale te to mikolo mitano te to mikolo zomi te to mikolo ntuku mibale (20) te,
20 kasi tii sanza mobimba, kino yango ekobima bino na zolo mpe bokoyoka yango mpii,+ kaka mpo boboyaki Yehova, oyo azali na kati na bino, mpe bobandaki kolela liboso na ye, na maloba oyo: “Mpo na nini tobimi na Ezipito?”’”+
21 Bongo Moize alobaki ete: “Bato oyo nazali kati na bango bazali mibali nkóto nkama motoba (600 000),+ oyo bazali kotambola na makolo, kasi yo—olobi ete: ‘Nakopesa bango mosuni, mpe bakolya yango mpenza sanza mobimba’!
22 Bakobomela bango bampate ná bangɔmbɛ, mpo ekoka bango?+ To bakokangela bango mbisi nyonso ya mbu, mpo ekoka bango?”
23 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: “Lobɔkɔ ya Yehova ezali nde mokuse?+ Sikoyo okomona soki oyo nalobi ekokómela yo to te.”+
24 Nsima na yango Moize abimaki mpe alobelaki bato maloba ya Yehova. Mpe ayanganisaki mibali ntuku nsambo (70) kati na mikóló ya bato mpe atɛlɛmisaki bango zingazinga na hema.+
25 Bongo Yehova akitaki na kati ya lipata+ mpe alobaki na ye+ mpe azwaki mwa ndambo ya elimo+ oyo ezalaki likoló na ye mpe atyaki yango likoló ya mokomoko ya mikóló yango ntuku nsambo (70). Mpe esalemaki boye: ntango kaka elimo yango ekitelaki bango, babandaki kosala ndenge basakoli basalaka; kasi basalaki bongo lisusu te.+
26 Sikoyo ezalaki na mibali mibale oyo batikalaki na kaa. Nkombo ya moko Eledade, mpe nkombo ya mosusu Medade. Mpe elimo ebandaki kokitela bango, mpo bazalaki na kati ya baoyo bakomamaki, kasi bakendaki na hema te. Bongo babandaki kosala na kati ya kaa ndenge basakoli basalaka.
27 Mpe elenge mobali moko apotaki mbangu mpe apesaki Moize nsango ete: “Eledade ná Medade bazali kosala na kati ya kaa ndenge basakoli basalaka!”
28 Bongo Yosua mwana ya Nunu, mosaleli*+ ya Moize banda na bolenge na ye, azongisaki maloba ete: “Nkolo na ngai Moize, pekisá bango!”+
29 Kasi, Moize alobaki na ye ete: “Ozali nde koyoka zuwa mpo na ngai? Te, nakolinga kutu bato nyonso ya Yehova bázala basakoli, mpo Yehova akotyela bango elimo na ye!”+
30 Na nsima, Moize alongwaki na kaa, ye ná mikóló ya Yisraele.
31 Mpe mopɛpɛ+ moko eutaki na Yehova, epɛpaki mpe ebandaki komema bandɛkɛ na nkombo kayɛ longwa na mbu+ mpe kokweisa yango na kaa na ntaka soki ya mobembo ya mokolo moko epai oyo mpe na ntaka soki ya mobembo ya mokolo moko epai oyo, zingazinga na kaa, mpe na ntaka soki ya mapeko mibale likoló ya mabele.
32 Bongo bato batɛlɛmaki mokolo wana mobimba mpe butu mobimba mpe mokolo mobimba oyo elandaki mpe bazalaki kaka kolɔkɔta bandɛkɛ na nkombo kayɛ. Moto oyo alɔkɔtaki moke alɔkɔtaki homɛrɛ+ zomi, mpe bazalaki kotanda yango se kotanda bipai nyonso mpo na bango moko, zingazinga ya kaa.
33 Mosuni ezalaki naino na mino+ na bango, liboso ete bányamuta yango, ntango nkanda ya Yehova engalelaki+ bato, mpe Yehova abandaki koboma bato na koboma moko monene mpenza.+
34 Babengaki esika yango nkombo Kibrote-hataava,+ mpo ezali wana nde bakundaki bato oyo bamonisaki mposa na lokoso.+
35 Longwa na Kibrote-hataava, bato basimbaki nzela bakei na Hazerote, mpe bakobaki kofanda na Hazerote.+
Maloba na nse
^ “Moto oyo azali kosalela ye (mosaleli).” Na Ebre, meshorthoh; na Latini, minister.