Mitángo 10:1-36

10  Mpe Yehova alobaki na Moize ete:  “Omisalela kelelo+ mibale ya palata. Okosala yango eloko oyo ebɛtami na marto, mpe osengeli kosalela yango mpo na kobengisa+ liyangani mpe mpo na kolongola bakaa.  Mpe basengeli koyula yango nyonso mibale, mpe liyangani mobimba esengeli koya kokutana na yo na monɔkɔ ya hema ya kokutana ndenge bayokanaki.+  Mpe soki bayuli kaka moko, bankumu oyo bazali bankumu ya bato nkóto nkóto ya Yisraele basengeli koya kokutana na yo ndenge bayokanaki.+  “Mpe bosengeli koyula yango ebimisa lokito oyo ezali komata mpe kokita, mpe bakaa ya baoyo batye kaa na ɛsti+ esengeli kolongwa.  Mpe bosengeli koyula yango mbala ya mibale ebimisa lokito oyo ezali komata mpe kokita, mpe bakaa ya baoyo batye kaa na sudi+ esengeli kolongwa. Bakoyula yango ebimisa lokito oyo ezali komata mpe kokita mbala nyonso oyo kaa moko ezali kolongwa.  “Sikoyo ntango bokobengisa lisangá, bokoyula+ yango, kasi bosengeli te kobimisa lokito oyo ezali komata mpe kokita.  Mpe bana mibali ya Arona, banganga-nzambe, bakoyula bakelelo,+ mpe ndenge ya kosalela yango esengeli kozala mobeko mpo na bino, mpo na ntango oyo etyami ndelo te, na boumeli ya mabota na bino.  “Mpe soki bokɔti na etumba na mokili na bino mpo na kobunda na monyokoli oyo azali kotungisa bino,+ bosengeli mpe koyula bakelelo+ mpo na koyokisa mbela ya etumba, mpe Yehova Nzambe na bino akokanisa bino mpe akobikisa bino na lobɔkɔ ya banguna na bino.+ 10  “Mpe na mokolo ya esengo+ na bino mpe na bileko+ na bino ya fɛti mpe na ebandeli nyonso ya basanza+ na bino, bosengeli koyula bakelelo likoló ya makabo na bino ya kotumba+ mpe bambeka na bino ya boyokani;+ mpe ndenge ya kosalela bakelelo esengeli kozala ekaniseli mpo na bino liboso ya Nzambe na bino. Ngai nazali Yehova Nzambe na bino.”+ 11  Sikoyo esalemaki boye: na mbula ya mibale, na sanza ya mibale, na mokolo ya ntuku mibale (20) ya sanza+ yango, lipata emataki, elongwe likoló ya tabernakle+ ya Litatoli. 12  Mpe bana ya Yisraele babandaki kolongwa na esobe ya Sinai na kolanda ndenge milɔngɔ na bango ya kokende+ ebongisamaki, mpe lipata efandaki na esobe ya Parane.+ 13  Mpe babandaki kolongwa mpo na mbala ya liboso na kolanda etinda oyo Yehova apesaki na nzela ya Moize.+ 14  Bongo etuluku ya mabota misato ya kaa ya bana ya Yuda elongwaki liboso ya bituluku nyonso, engebene mampinga+ na bango, mpe Nahashone+ mwana mobali ya Aminadabe azalaki kokamba limpinga na yango. 15  Mpe Netanele+ mwana mobali ya Zuare azalaki kokamba limpinga ya libota ya bana ya Isakare. 16  Mpe Eliabe mwana mobali ya Helone+ azalaki kokamba limpinga ya libota ya bana ya Zebulone. 17  Mpe tabernakle elongolamaki,+ mpe bana mibali ya Gereshone+ ná bana mibali ya Merari,+ bamemi ya tabernakle, balongwaki. 18  Mpe etuluku ya mabota misato ya kaa ya Rubene+ elongwaki engebene mampinga na bango, mpe Elizure+ mwana mobali ya Shedeure azalaki kokamba limpinga na yango. 19  Mpe Shelumiele+ mwana mobali ya Zurishadai azalaki kokamba limpinga ya libota ya bana ya Simeone.+ 20  Mpe Eliasafe+ mwana mobali ya Duele azalaki kokamba limpinga ya libota ya bana ya Gade. 21  Mpe Bakohate, bamemi ya biloko ya esika mosantu,+ balongwaki, mpo tabernakle esengelaki kotɛlɛmisama ntango bango bakokóma. 22  Mpe etuluku ya mabota misato ya kaa ya bana ya Efraime+ elongwaki engebene mampinga na bango, mpe Elishama+ mwana mobali ya Amihude azalaki kokamba limpinga na yango. 23  Mpe Gamaliele+ mwana mobali ya Pedazure azalaki kokamba limpinga ya libota ya bana ya Manase.+ 24  Mpe Abidane+ mwana mobali ya Gideoni azalaki kokamba limpinga ya libota ya bana ya Benyamina.+ 25  Mpe etuluku ya mabota misato ya kaa ya bana ya Dani+ elongwaki, esalaki molɔngɔ ya bato oyo bakɛngɛlaka na nsima+ mpo na bakaa nyonso engebene mampinga na bango, mpe Ahiezere+ mwana mobali ya Amishadai azalaki kokamba limpinga na yango. 26  Mpe Pagiele+ mwana mobali ya Okrane azalaki kokamba limpinga ya libota ya bana ya Ashere.+ 27  Mpe Ahira+ mwana mobali ya Enane azalaki kokamba limpinga ya libota ya bana ya Nafatali.+ 28  Ndenge wana nde milɔngɔ ya kokende ya bana ya Yisraele ebongisamaki engebene mampinga na bango ntango bazalaki kolongwa.+ 29  Bongo Moize alobaki na Hobabe mwana ya Rewele+ Momidiane, bokilo ya Moize boye: “Tozali kolongwa mpo na kokende na esika oyo Yehova alobaki ete: ‘Nakopesa bino yango.’+ Yaká elongo na biso, mpe tokosalela yo mpenza malamu,+ mpo Yehova alobi makambo ya malamu mpo na Yisraele.”+ 30  Kasi alobaki na ye ete: “Nakokende elongo na bino te, kasi nakokende na mboka na ngai+ moko mpe epai ya bandeko na ngai.” 31  Na yango, alobaki ete: “Nabondeli yo, kotika biso te, mpo, lokola yo oyebi malamu esika tokoki kotya kaa na esobe, osengeli kozala miso na biso. 32  Mpe ekosalema mpenza boye: soki oyei elongo na biso,+ ɛɛ, ekosalema mpenza ete bolamu oyo Yehova akosalela biso, biso mpe tokosalela yo bolamu yango.” 33  Bongo batambolaki mobembo ya mikolo misato banda na ngomba ya Yehova,+ mpe sanduku ya kondimana+ ya Yehova ezalaki kotambola liboso na bango mpo na mobembo ya mikolo misato mpo na kolukela bango esika ya kopema.+ 34  Mpe lipata+ ya Yehova ezalaki likoló na bango na moi ntango bazalaki kolongwa na esika batyaki kaa. 35  Mpe esalemaki boye: ntango bazalaki kolongola Sanduku, Moize azalaki koloba ete: “Tɛlɛmá, Ee Yehova, mpe tiká banguna na yo bápalangana;+ mpe tiká baoyo bayinaka yo makasi bákima, bálongwa liboso na yo.”+ 36  Mpe wana bazalaki kokitisa yango, azalaki koloba ete: “Zongá, Ee Yehova, epai ya bamiriade ya bato nkóto nkóto ya Yisraele.”+

Maloba na nse