Mitángo 1:1-54

1  Mpe Yehova asololaki na Moize na esobe ya Sinai,+ na kati ya hema ya kokutana,+ na mokolo ya liboso ya sanza ya mibale na mbula ya mibale ya kobima na bango na mokili ya Ezipito,+ mpe alobaki ete:  “Bózwa motángo+ ya liyangani mobimba ya bana ya Yisraele engebene mabota na bango, na kolanda ndako ya batata na bango, na kotalela motángo ya bankombo, mibali nyonso, mokomoko na bango,  banda na mbula ntuku mibale (20) tii na likoló,+ bato nyonso na Yisraele oyo bakoki kokende etumba.+ Bokokoma bango nkombo engebene mampinga na bango, yo ná Arona.  “Mpe mibali mosusu bakozala elongo na bino, mobali moko na libota moko; mokomoko azali nkumu na ndako ya batata na ye.+  Mpe talá nkombo ya mibali oyo bakotɛlɛma elongo na bino: Na libota ya Rubene:+ Elizure+ mwana ya Shedeure;  na libota ya Simeone:+ Shelumiele+ mwana ya Zurishadai;  na libota ya Yuda:+ Nahashone+ mwana ya Aminadabe;  na libota ya Isakare:+ Netanele+ mwana ya Zuare;  na libota ya Zebulone:+ Eliabe+ mwana ya Helone; 10  na bana ya Yozefe:+ na libota ya Efraime:+ Elishama mwana ya Amihude; na libota ya Manase:+ Gamaliele mwana ya Pedazure; 11  na libota ya Benyamina:+ Abidane+ mwana ya Gideoni; 12  na libota ya Dani:+ Ahiezere+ mwana ya Amishadai; 13  na libota ya Ashere:+ Pagiele+ mwana ya Okrane; 14  na libota ya Gade:+ Eliasafe+ mwana ya Duele;+ 15  na libota ya Nafatali:+ Ahira+ mwana ya Enane. 16  Wana nde bato ya liyangani oyo babengamaki, bankumu+ ya mabota ya batata na bango. Bazali bankumu ya bato nkóto nkóto ya Yisraele.”+ 17  Bongo Moize ná Arona bazwaki mibali yango oyo batángamaki na nkombo. 18  Mpe bayanganisaki liyangani mobimba na mokolo ya liboso ya sanza ya mibale, mpo bámonisa molɔngɔ ya bankɔkɔ+ na bango engebene mabota na bango na ndako ya batata na bango, na kotalela motángo ya bankombo, banda na mbula ntuku mibale (20) tii na likoló,+ mokomoko na bango, 19  kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo; mpe abandaki kokoma bango nkombo+ na esobe ya Sinai. 20  Mpe bana ya Rubene, mwana ya liboso+ ya Yisraele, molɔngɔ ya kobotama na bango engebene mabota na bango, na ndako ya batata na bango, ezalaki na kotalela motángo ya bankombo, mokomoko na bango, mibali nyonso banda na mbula ntuku mibale (20) tii na likoló, bato nyonso oyo bakoki kokende etumba, 21  baoyo bakomisamaki nkombo kati na bango, na libota ya Rubene, bazalaki nkóto ntuku minei na motoba na nkama mitano (46 500).+ 22  Na bana ya Simeone,+ molɔngɔ ya kobotama na bango engebene mabota na bango na ndako ya batata na bango, bato na ye oyo bakomisamaki nkombo na kotalela motángo ya bankombo, mokomoko na bango, mibali nyonso banda na mbula ntuku mibale (20) tii na likoló, bato nyonso oyo bakoki kokende etumba, 23  baoyo bakomisamaki nkombo kati na bango, na libota ya Simeone, bazalaki nkóto ntuku mitano na libwa na nkama misato (59 300).+ 24  Na bana ya Gade,+ molɔngɔ ya kobotama na bango engebene mabota na bango na ndako ya batata na bango, na kotalela motángo ya bankombo, banda na mbula ntuku mibale (20) tii na likoló, bato nyonso oyo bakoki kokende etumba, 25  baoyo bakomisamaki nkombo kati na bango, na libota ya Gade,+ bazalaki nkóto ntuku minei na mitano na nkama motoba na ntuku mitano (45 650).+ 26  Na bana ya Yuda,+ molɔngɔ ya kobotama na bango engebene mabota na bango na ndako ya batata na bango, na kotalela motángo ya bankombo, banda na mbula ntuku mibale (20) tii na likoló, bato nyonso oyo bakoki kokende etumba, 27  baoyo bakomisamaki nkombo kati na bango, na libota ya Yuda, bazalaki nkóto ntuku nsambo na minei na nkama motoba (74 600).+ 28  Na bana ya Isakare,+ molɔngɔ ya kobotama na bango engebene mabota na bango na ndako ya batata na bango, na kotalela motángo ya bankombo, banda na mbula ntuku mibale (20) tii na likoló, bato nyonso oyo bakoki kokende etumba, 29  baoyo bakomisamaki nkombo kati na bango, na libota ya Isakare, bazalaki nkóto ntuku mitano na minei na nkama minei (54 400).+ 30  Na bana ya Zebulone,+ molɔngɔ ya kobotama na bango engebene mabota na bango na ndako ya batata na bango, na kotalela motángo ya bankombo, banda na mbula ntuku mibale (20) tii na likoló, bato nyonso oyo bakoki kokende etumba, 31  baoyo bakomisamaki nkombo kati na bango, na libota ya Zebulone, bazalaki nkóto ntuku mitano na nsambo na nkama minei (57 400).+ 32  Na bana ya Yozefe: Na bana ya Efraime,+ molɔngɔ ya kobotama na bango engebene mabota na bango na ndako ya batata na bango, na kotalela motángo ya bankombo, banda na mbula ntuku mibale (20) tii na likoló, bato nyonso oyo bakoki kokende etumba, 33  baoyo bakomisamaki nkombo kati na bango, na libota ya Efraime,+ bazalaki nkóto ntuku minei na nkama mitano (40 500).+ 34  Na bana ya Manase,+ molɔngɔ ya kobotama na bango engebene mabota na bango na ndako ya batata na bango, na kotalela motángo ya bankombo, banda na mbula ntuku mibale (20) tii na likoló, bato nyonso oyo bakoki kokende etumba, 35  baoyo bakomisamaki nkombo kati na bango, na libota ya Manase, bazalaki nkóto ntuku misato na mibale na nkama mibale (32 200).+ 36  Na bana ya Benyamina,+ molɔngɔ ya kobotama na bango engebene mabota na bango na ndako ya batata na bango, na kotalela motángo ya bankombo, banda na mbula ntuku mibale (20) tii na likoló, bato nyonso oyo bakoki kokende etumba, 37  baoyo bakomisamaki nkombo kati na bango, na libota ya Benyamina, bazalaki nkóto ntuku misato na mitano na nkama minei (35 400).+ 38  Na bana ya Dani,+ molɔngɔ ya kobotama na bango engebene mabota na bango na ndako ya batata na bango, na kotalela motángo ya bankombo, banda na mbula ntuku mibale (20) tii na likoló, bato nyonso oyo bakoki kokende etumba, 39  baoyo bakomisamaki nkombo kati na bango, na libota ya Dani, bazalaki nkóto ntuku motoba na mibale na nkama nsambo (62 700).+ 40  Na bana ya Ashere,+ molɔngɔ ya kobotama na bango engebene mabota na bango na ndako ya batata na bango, na kotalela motángo ya bankombo, banda na mbula ntuku mibale (20) tii na likoló, bato nyonso oyo bakoki kokende etumba, 41  baoyo bakomisamaki nkombo kati na bango, na libota ya Ashere, bazalaki nkóto ntuku minei na moko na nkama mitano (41 500).+ 42  Na bana ya Nafatali,+ molɔngɔ ya kobotama na bango engebene mabota na bango na ndako ya batata na bango, na kotalela motángo ya bankombo, banda na mbula ntuku mibale (20) tii na likoló, bato nyonso oyo bakoki kokende etumba, 43  baoyo bakomisamaki nkombo kati na bango, na libota ya Nafatali, bazalaki nkóto ntuku mitano na misato na nkama minei (53 400).+ 44  Wana ezali bato oyo bakomisamaki nkombo, oyo Moize akomaki nkombo, elongo na Arona ná bankumu ya Yisraele, mibali zomi na mibale. Mokomoko na bango azalaki momonisi ya ndako ya batata na ye. 45  Mpe baoyo nyonso bakomisamaki nkombo kati na bana ya Yisraele engebene ndako ya batata na bango, banda na mbula ntuku mibale (20) tii na likoló, bato nyonso na Yisraele oyo bakoki kokende etumba, bazalaki, 46  ɛɛ, baoyo nyonso bakomisamaki nkombo, bazalaki nkóto nkama motoba na misato na nkama mitano na ntuku mitano (603 550).+ 47  Nzokande, Balevi+ engebene libota ya batata na bango, bakomisamaki nkombo te na kati na bango.+ 48  Bongo, Yehova alobaki na Moize ete: 49  “Kaka libota ya Levi nde osengeli kokoma nkombo na bango te, mpe osengeli te kozwa motángo na bango mobimba na kati ya bana ya Yisraele.+ 50  Mpe yo moko tyá Balevi bátalelaka tabernakle ya Litatoli+ mpe bátalelaka bisaleli na yango nyonso mpe bátalelaka eloko na yango nyonso.+ Bango moko bakomema tabernakle ná bisaleli+ na yango nyonso, mpe bango moko bakosala mosala+ kati na yango; mpe bakotya kaa zingazinga na tabernakle.+ 51  Mpe ntango tabernakle ekolongwa, Balevi bakokitisa yango;+ mpe ntango tabernakle ekotyama, Balevi bakotɛlɛmisa yango; mpe mopaya nyonso oyo akobɛlɛma, asengeli kobomama.+ 52  “Mpe bana ya Yisraele basengeli kotya kaa, mokomoko na kolanda kaa na ye, mpe moto mokomoko na kolanda etuluku na ye ya mabota misato,+ na kolanda mampinga na bango. 53  Mpe Balevi bakotya kaa zingazinga ya tabernakle ya Litatoli, mpo nkanda+ ekwela liyangani ya bana ya Yisraele te; mpe Balevi basengeli kokokisa mosala oyo esɛngami na tabernakle ya Litatoli.”+ 54  Mpe bana ya Yisraele babandaki kosala na kolandáká nyonso oyo Yehova apesaki Moize mitindo. Basalaki kaka bongo.+

Maloba na nse