2 Samwele 8:1-18

8  Mpe na nsima, esalemaki boye: Davidi alongaki Bafilistia+ mpe atyaki bango na nse ya bokonzi na ye,+ mpe Davidi azwaki Metege-ama na lobɔkɔ ya Bafilistia.  Alongaki lisusu Bamoabe+ mpe amekaki bolai ya molɔngɔ na bango na nsinga moko; alalisaki bango na mabele, mpo ameka bolai ya nsinga mbala mibale mpo na koboma bango, kasi bolai ya nsinga moko mpo na kotika bango na bomoi;+ bongo Bamoabe bakómaki basaleli+ ya Davidi mpo báyelaka ye mpako na bango.+  Mpe lisusu Davidi alongaki Hadadezere+ mwana ya Rehobe mokonzi ya Soba,+ ntango azalaki kokende na ebale Efrate+ kozwa makasi mpo na bokonzi na ye.  Bongo Davidi akangaki basoda na ye nkóto moko na nkama nsambo (1 700) oyo batambolaka na mpunda mpe basoda nkóto ntuku mibale (20 000) oyo batambolaka na makolo;+ mpe Davidi akataki misisa ya nsima ya mabɔlɔngɔ ya makolo ya nsima+ ya bampunda nyonso ya makalo,+ kasi atikaki kati na yango bampunda nkama moko (100) ya makalo.  Ntango Siri ya Damasi+ eyaki kosalisa Hadadezere mokonzi ya Soba, Davidi abomaki mibali nkóto ntuku mibale na mibale (22 000) kati na bato ya Siri.+  Lisusu, Davidi atyaki bituluku ya basoda+ na Siri ya Damasi; mpe bato ya Siri bakómaki basaleli ya Davidi mpo báyelaka ye mpako na bango.+ Mpe Yehova azalaki se kobikisa Davidi esika nyonso oyo azalaki kokende.+  Longola wana, Davidi azwaki banguba ya zolongano+ ya wolo, oyo ezalaki epai ya basaleli ya Hadadezere mpe ayaki na yango na Yerusaleme.  Mpe Mokonzi Davidi azwaki mpenza ebele ya motako+ na Beta mpe na Berotai, bingumba ya Hadadezere.  Nzokande Toi mokonzi ya Hamate+ ayokaki ete Davidi abomi limpinga nyonso ya basoda ya Hadadezere.+ 10  Bongo Toi atindelaki Mokonzi Davidi mwana na ye Yorame mpo na kotuna ye soki azali malamu+ mpe kopesa ye longonya mpo abundaki na Hadadezere mpe alongaki ye (mpamba te Hadadezere azalaki kobunda mbala na mbala na Toi); mpe na lobɔkɔ na ye, biloko ya palata mpe biloko ya wolo mpe biloko ya motako+ ezalaki. 11  Mokonzi Davidi asantiselaki mpe Yehova biloko yango, esika moko na palata mpe wolo oyo asantisaki, oyo eutaki na bikólo nyonso oyo atyaki na nse ya bokonzi na ye:+ 12  na Siri, na Moabe,+ na bana ya Amone, na Bafilistia,+ na Amaleke+ mpe na biloko oyo apunzaki epai ya Hadadezere mwana ya Rehobe mokonzi ya Soba.+ 13  Mpe Davidi amisalelaki nkombo ya lokumu ntango autaki koboma Baedome na Lobwaku ya Mungwa,+ bato nkóto zomi na mwambe (18 000).+ 14  Mpe atyaki bituluku ya basoda na Edome.+ Na Edome mobimba, atyaki bituluku ya basoda, mpe Baedome nyonso bakómaki basaleli ya Davidi;+ mpe Yehova azalaki se kobikisa Davidi na esika nyonso oyo azalaki kokende.+ 15  Bongo Davidi akobaki koyangela Yisraele mobimba;+ mpe Davidi azalaki se kosambisa mpe kokata makambo na boyengebene+ mpo na bato na ye nyonso.+ 16  Mpe Yoabe+ mwana ya Zeruya azalaki mokonzi ya basoda; mpe Yehoshafate+ mwana ya Ahilude azalaki mokomi-makambo. 17  Zadoke+ mwana ya Ahitube mpe Ahimeleke+ mwana ya Abiatare bazalaki banganga-nzambe, mpe Seraya azalaki sɛkrɛtɛrɛ. 18  Benaya+ mwana ya Yehoyada azalaki mokonzi ya Bakerete+ mpe Bapelete.+ Kasi bana mibali ya Davidi bakómaki banganga-nzambe.*+

Maloba na nse

To, “bakapita-bakonzi.”