2 Petro 3:1-18

3  Bandeko ya bolingo, oyo ezali sikoyo mokanda ya mibale nazali kokomela bino, oyo na kati na yango, lokola na mokanda na ngai ya liboso,+ nazali kokundwela bino+ makambo mpo nalamwisa makoki na bino ya kokanisa malamu,  mpo bókanisa lisusu maloba oyo elobamaki kala na basakoli+ basantu mpe mobeko ya Nkolo mpe Mobikisi na nzela ya bantoma na bino.+  Mpo boyebi libosoliboso likambo oyo: na mikolo ya nsuka+ basɛki+ bakoya ná kosɛka na bango, bakotambola na kolanda bamposa na bango moko+  mpe bakoloba ete:+ “Wapi kozala na ye oyo elakamaki?+ Kutu, banda mokolo bankɔkɔ na biso balalá na liwa, makambo nyonso ezali kokoba kaka ndenge ezalaki banda na ebandeli ya bozalisi.”+  Mpo, na kolanda mposa na bango, likambo bazali kobosana yango oyo: likoló+ ezalaki banda kala ná mabele ya makasi oyo ebimaki na mai+ mpe na katikati ya mai+ na liloba ya Nzambe;  mpe na nzela na yango mokili ya ntango wana ebebisamaki ntango ezindaki na mai.+  Kasi na nzela ya liloba yango kaka likoló+ ná mabele+ oyo ezali sikoyo ebombami mpo na mɔtɔ+ mpe ezali kobatelama mpo na kozela mokolo ya kosambisama+ mpe ya kobebisa bato oyo batyolaka Nzambe.+  Nzokande, bandeko ya bolingo, bóbosana likambo oyo te: na miso ya Yehova mokolo moko ezali lokola mbula nkóto moko (1 000) mpe mbula nkóto moko lokola mokolo moko.+  Yehova azali koumisa makambo te na elaka na ye,+ ndenge bato mosusu batalelaka koumisa makambo, kasi azali nde komonisela bino motema molai mpo alingi moto ata moko te abomama kasi alingi nde bato nyonso bábongola motema.+ 10  Nzokande mokolo ya Yehova+ ekoya lokola moyibi+ mpe na mokolo yango likoló ekoleka+ na lokito makasi,+ kasi biloko na yango lokola ekokóma mɔtɔ makasi ekosilela,+ mpe mabele+ mpe misala oyo ezali wana ekomonana polele.+ 11  Lokola biloko nyonso wana esengeli kosilela bongo, bókanisa lolenge ya bato oyo bosengeli kozala. Bosengeli kozala bato ya etamboli ya bosantu mpe kosala misala oyo ezali komonisa ete bokangami na Nzambe, 12  bózela+ mpe bóbatelaka na makanisi na bino kozala ya mokolo ya Yehova+ oyo likoló, lokola ekozika na mɔtɔ, ekosilela+ mpe biloko na yango, lokola ekokóma mɔtɔ makasi, ekonyangwa! 13  Kasi tozali kozela likoló ya sika+ mpe mabele ya sika+ ndenge alakaki, mpe kuna, boyengebene ekozala.+ 14  Yango wana, bandeko ya bolingo, lokola bozali kozela makambo wana, bósala nyonso oyo ekoki na bino mpo nsukansuka akuta bino na litɔnɔ te+ mpe na mbeba te mpe na kimya.+ 15  Lisusu, bótalela motema molai ya Nkolo na biso ete ezali lobiko, se ndenge ndeko na biso ya bolingo Paulo akomelaki mpe bino+ yango na bwanya+ oyo bapesaki ye, 16  alobeli makambo yango ndenge mpe asalaka yango na mikanda na ye nyonso. Nzokande, na kati, makambo mosusu ezali mpasi moto akanga ntina na yango, oyo bato bateyamá te mpe bapikamá te bazali kobongola yango ndenge mosusu, ndenge mpe basalaka na Makomami+ mosusu oyo etikali, mpo na libebi na bango moko. 17  Yango wana, bino bandeko ya bolingo, lokola boyebi yango liboso,+ bókeba mpo bómemama te elongo na bango na libunga ya bato oyo babukaka mibeko mpe bótika te ezaleli na bino ya kopikama makasi mpo bókwea te.+ 18  Ɛɛ, kasi bókoba nde kokola na kati ya boboto monene mpe na boyebi ya Nkolo na biso mpe Mobikisi Yesu Kristo.+ Nkembo ezala na ye sikoyo mpe na mokolo ya seko.+

Maloba na nse