2 Ntango 4:1-22

4  Na nsima, asalaki etumbelo ya motako,+ bolai na yango mapeko ntuku mibale (20), bonene na yango mapeko ntuku mibale, mpe bosanda na yango mapeko zomi.+  Mpe asalaki mbu ya ebende oyo enyangwisami,+ ezalaki mapeko zomi kobanda ngámbo oyo ya monɔkɔ tii na ngámbo na yango mosusu, ezalaki zolongano, mpe bosanda na yango ezalaki mapeko mitano, mpe esengelaki nsinga moko ya mapeko ntuku misato (30) mpo na kozinga yango mobimba.+  Mpe na nse na yango, pembenipembeni, ezalaki na biloko oyo ezalaki komonana lokola biloko ya koyeisa kitoko oyo basalá lokola bikútu,+ ezingi yango mobimba, na lipeko moko zomi, ezingi mbu yango mobimba.+ Biloko yango ya koyeisa kitoko oyo basalá lokola bikútu ezalaki na milɔngɔ mibale, esalemi na motako oyo banyangwisi yango konyangwisa.  Efandaki likoló ya bangɔmbɛ zomi na mibale:+ misato etali na nɔrdi, misato etali na wɛsti, misato etali na sudi, mpe misato etali na ɛsti; mbu yango ezalaki likoló ya bangɔmbɛ yango, mpe masɔkɔ na yango nyonso etali na kati.+  Mpe monene ya ebende na yango ezalaki ya tandu moko; mpe monɔkɔ na yango ezalaki ndenge monɔkɔ ya kɔpɔ ezalaka, fololo lísi.+ Yango ekokaki kokɔta+ bati+ nkóto misato (3 000).  Lisusu, asalaki saani zomi ya minene, mpe atyaki mitano na lobɔkɔ ya mobali mpe mitano na lobɔkɔ ya mwasi,+ mpo na kosukola na mai oyo ezali na kati.+ Kati na yango, bazalaki kopɛtola na mai biloko oyo etalaki makabo ya kotumba.+ Kasi mbu ezalaki mpo banganga-nzambe básukolaka na yango.+  Na nsima, asalaki bitɛlɛmiselo ya miinda+ ya wolo; yango zomi ezalaki motindo moko,+ mpe atyaki yango na tempelo, mitano na lobɔkɔ ya mobali mpe mitano na lobɔkɔ ya mwasi.+  Lisusu, asalaki mesa zomi, mpe atyaki yango na tempelo, mitano na lobɔkɔ ya mobali mpe mitano na lobɔkɔ ya mwasi,+ mpe asalaki mabakuli ya wolo nkama moko (100).  Na nsima, asalaki lopango+ ya banganga-nzambe+ mpe lopango monene,+ mpe baporte ya lopango yango, mpe azipaki baporte na yango na motako. 10  Mpe atyaki mbu na ngámbo ya lobɔkɔ ya mobali, na ɛsti, na ngámbo ya sudi.+ 11  Nsukansuka, Hirame asalaki bambɛki+ mpe bapau+ mpe mabakuli.+ Bongo Hirame asilisaki kosala mosala oyo asalelaki Mokonzi Salomo mpo na ndako ya Nzambe ya solo. 12  Makonzí+ mibale mpe mitó ya zolongano+ na nsɔngɛ ya makonzí yango mibale mpe biloko mibale oyo basalá lokola monyama+ mpo na kozipa mitó mibale wana ya zolongano oyo ezalaki na nsɔngɛ ya makonzí yango 13  mpe mbuma nkama minei (400) ya grenade+ mpo na biloko mibale oyo basalá lokola monyama, milɔngɔ mibale ya bambuma ya grenade mpo na eloko mokomoko oyo basalá lokola monyama mpo na kozipa mitó mibale ya zolongano oyo ezalaki likoló ya makonzí yango,+ 14  mpe bashario+ zomi ná basaani minene+ zomi likoló ya bashario yango; 15  mbu+ wana moko ná bangɔmbɛ zomi na mibale na nse na yango,+ 16  bambɛki, bapau,+ nkanya+ ná bisaleli+ na yango nyonso, Hirame-abive+ asalelaki Mokonzi Salomo mpo na ndako ya Yehova, na motako oyo bayeisá sɛlisɛli. 17  Na Etúká ya Yordani, kati na Sukote+ ná Zareda,+ nde mokonzi asalaki yango na mabele ya lima, na motako oyo enyangwisami. 18  Bongo Salomo asalaki bisaleli yango nyonso ebele, mpo balukaki te koyeba kilo ya motako yango.+ 19  Mpe Salomo asalaki bisaleli+ nyonso oyo ezalaki na ndako ya Nzambe ya solo mpe etumbelo ya wolo+ mpe bamesa+ ná mampa ya kolakisa likoló na yango, 20  bitɛlɛmiselo ya miinda+ ná miinda+ na yango ya wolo ya pɛto, mpo na kopelisa yango liboso ya shambrɛ ya kati mpenza,+ ndenge mobeko elobi; 21  bafololo, miinda ná bapɛnsi ya mike,+ ya wolo, (ezalaki wolo oyo eleki pɛto,) 22  biloko ya koboma mɔtɔ, mabakuli, bakɔpɔ ná biloko ya kotya mɔtɔ, ya wolo ya pɛto,+ mpe esika ya kokɔta na ndako,+ baporte na yango ya kati mpo na Esika Oyo Eleki Bosantu mpe baporte+ ya ndako ya tempelo, ezalaki ya wolo.

Maloba na nse