2 Ntango 32:1-33
32 Nsima ya makambo wana mpe ya etamboli wana ya sembo,+ Senakeribe+ mokonzi ya Asiri+ ayaki mpe abandaki kokɔta na Yuda mpe kotya kaa mpo na kobundisa bingumba oyo ebatelami makasi,+ mpe azalaki kokana kokómisa yango ya ye na kobukáká yango.
2 Ntango Hizikiya amonaki ete Senakeribe ayei, mpe atalisi elongi na ye+ epai ya Yerusaleme mpo na kobundisa yango,
3 azwaki mokano ye ná bankumu+ na ye mpe mibali na ye ya nguya mpo bákanga mai ya maziba oyo ezalaki libándá ya engumba;+ bongo basalisaki ye.
4 Bongo bato ebele bayanganaki, mpe babandaki kokanga maziba nyonso mpe mikɛli+ oyo ezalaki kolekisa mai na katikati ya mokili, balobi: “Mpo na nini bakonzi ya Asiri báya mpe bákuta mpenza mai mingi?”
5 Lisusu, azwaki mpiko mpe atongaki efelo oyo ebukanaki+ mpe atɛlɛmisaki manɔ́ngi+ likoló na yango, mpe efelo mosusu libándá;+ abongisaki mpe Mwa Ngomba+ ya Sité ya Davidi, mpe asalaki ebele ya bibundeli ya kobwakela+ ná banguba.+
6 Mpe atyaki bakonzi ya basoda+ bákamba bato mpe ayanganisaki bango epai na ye na esika monene ya bato nyonso+ ya porte ya engumba mpe alobaki na motema+ na bango ete:
7 “Bózala na mpiko mpe na makasi.+ Bóbanga te,+ bózala na nsɔmɔ mpe te+ mpo na mokonzi ya Asiri+ mpe mpo na ebele ya bato nyonso wana oyo bazali elongo na ye;+ mpo baoyo bazali na biso bazali ebele koleka baoyo bazali na ye.
8 Lobɔkɔ ya moto nde ezali elongo na ye,+ kasi Yehova Nzambe na biso azali elongo na biso mpo na kosalisa biso+ mpe kobundela biso bitumba.”+ Mpe bato balendisamaki na maloba ya Hizikiya mokonzi ya Yuda.+
9 Nsima na yango nde Senakeribe+ mokonzi ya Asiri, wana azalaki na Lakishi+ mpe nguya na ye nyonso ya bokonzi elongo na ye,+ atindaki basaleli na ye na Yerusaleme epai ya Hizikiya mokonzi ya Yuda mpe epai ya bato nyonso ya Yudea oyo bazalaki na Yerusaleme, alobi:
10 “Talá oyo Senakeribe mokonzi ya Asiri alobi:+ ‘Bozali kotya motema na nini, wana bofandi kimya ntango bazingi bino na Yerusaleme?+
11 Hizikiya+ azali nde kokosa+ bino te mpo na kokaba bino mpo bókufa na nzala mpe na mposa ya mai, ntango alobi ete: “Yehova Nzambe na biso ye moko akobikisa biso na lobɔkɔ ya mokonzi ya Asiri”?+
12 Hizikiya te moto alongolaki bisika na ye oyo etombwaná+ mpe bitumbelo+ na ye mpe na nsima alobaki na Yuda mpe na Yerusaleme ete: “Bosengeli kogumbama+ liboso ya etumbelo+ moko kaka mpe bosengeli kobimisa milinga ya mbeka likoló na yango”?+
13 Boyebi te oyo ngai moko ná bankɔkɔ na ngai tosalaki bato nyonso na bikólo ya mokili?+ Banzambe+ ya bikólo ya mikili bakokaki ata moke kobikisa mokili na bango na lobɔkɔ na ngai?
14 Na banzambe nyonso ya bikólo wana oyo bankɔkɔ na ngai basilisaki nyɛɛ, nani akokaki kobikisa bato na ye na lobɔkɔ na ngai, mpo Nzambe na bino abikisa bino na lobɔkɔ na ngai?+
15 Bongo sikoyo, Hizikiya akosa bino te+ to azimbisa+ bino boye te mpe bóndimela ye te, mpo ata nzambe ya ekólo moko te to ya bokonzi moko te akokaki kobikisa bato na ye na lobɔkɔ na ngai mpe na lobɔkɔ ya bankɔkɔ na ngai. Bongo ekobanda boni Nzambe na bino abikisa bino na lobɔkɔ na ngai!’”+
16 Mpe basaleli na ye balobaki lisusu mabe mpo na Yehova Nzambe ya solo+ mpe mpo na mosaleli na ye Hizikiya.
17 Akomaki kutu mikanda+ mpo na kosambwisa Yehova Nzambe ya Yisraele+ mpe mpo na koloba mabe mpo na ye ete: “Lokola banzambe+ ya bikólo ya mokili babikisaki te bato na bango na lobɔkɔ na ngai,+ ndenge moko mpe Nzambe ya Hizikiya akobikisa bato na ye na lobɔkɔ na ngai te.”
18 Mpe bazalaki+ kobelela na mongongo makasi,+ na monɔkɔ ya Bayuda,+ epai ya bato ya Yerusaleme oyo bazalaki likoló ya efelo, mpo na kobangisa+ bango mpe mpo na kobulunganisa bango, mpo bázwa engumba.
19 Mpe bakobaki koloba mabe+ mpo na Nzambe ya Yerusaleme+ ndenge basalaki mpo na banzambe ya bato ya bikólo ya mabele, mosala ya mabɔkɔ ya moto.+
20 Kasi mokonzi Hizikiya+ ná Yisaya+ mwana ya Amoze,+ mosakoli,+ bazalaki kobondela mpo na yango+ mpe bazalaki kobelela Nzambe na likoló mpo na koluka lisalisi.+
21 Bongo Yehova atindaki anzelu+ mpe alongolaki elombe nyonso, mobali ya nguya+ mpe mokambi ná kapita na kaa ya mokonzi ya Asiri,+ bongo ye azongaki na mokili na ye, na nsɔni na elongi. Na nsima, akɔtaki na ndako ya nzambe na ye mpe kuna, bana na ye mosusu oyo abotaki bakweisaki ye na mopanga.+
22 Na yango, Yehova abikisaki Hizikiya mpe bato oyo bafandi na Yerusaleme na lobɔkɔ ya Senakeribe mokonzi ya Asiri+ mpe na lobɔkɔ ya bamosusu nyonso mpe apesaki bango kopema epai na epai.+
23 Mpe ezalaki na bato ebele oyo bazalaki komemela Yehova makabo+ na Yerusaleme mpe komemela Hizikiya mokonzi ya Yuda biloko ya kitoko mingi,+ mpe nsima na yango ye atombwamaki+ na miso ya bikólo nyonso.
24 Na mikolo yango, Hizikiya abɛlaki pene na liwa,+ mpe abandaki kobondela+ Yehova. Bongo Ye asololaki na ye,+ mpe Ye apesaki ye likamwisi ya komonisa makambo oyo ekoya.+
25 Kasi Hizikiya azongisaki te bolamu oyo basalelaki ye,+ mpo motema na ye ekómaki na lolendo+ mpe Nzambe asilikelaki+ ye ná Yuda ná Yerusaleme.
26 Nzokande, Hizikiya amikitisaki,+ atiki lolendo ya motema na ye, ye ná bato oyo bafandi na Yerusaleme, mpe nkanda ya Yehova ekitelaki bango te na mikolo ya Hizikiya.+
27 Mpe Hizikiya akómaki na bomɛngo mpe na nkembo mingi mpenza;+ mpe amisalelaki bandako ya kobomba biloko mpo na palata mpe mpo na wolo,+ mpo na mabanga ya ntalo,+ mpo na mafuta ya balsame,+ mpo na banguba+ mpe mpo na biloko nyonso ya kitoko;+
28 mpe lisusu bisika ya kobomba biloko:+ mbuma ya kosala farini, vinyo ya sika+ ná mafuta; ná mapango+ ya bibwɛlɛ ya ndenge nyonso mpe mapango ya bampate.
29 Mpe azwaki bingumba, ná bitonga ya bampate+ mpe ya bangɔmbɛ+ ebele; mpo Nzambe apesaki ye biloko ebele mpenza.+
30 Mpe Hizikiya nde akangaki+ liziba ya likoló ya mai+ ya Gihone+ mpe alekisaki yango mbala moko mpo ekita tii na wɛsti epai ya Sité ya Davidi,+ mpe Hizikiya azalaki kaka kolonga na misala na ye nyonso.+
31 Bongo na nzela ya balobeli ya bankumu ya Babilone+ oyo batindamaki epai na ye+ mpo na kotuna mpo na likamwisi ya komonisa makambo+ oyo esalemaki na mokili, Nzambe ya solo atikaki ye+ mpo na komeka ye,+ mpo na koyeba nyonso oyo ezalaki na motema na ye.+
32 Makambo mosusu+ ya Hizikiya mpe misala na ye ya motema boboto,+ talá ekomami na emonaneli ya mosakoli Yisaya, mwana ya Amoze,+ na Buku+ ya Bakonzi ya Yuda mpe ya Yisraele.
33 Nsukansuka, Hizikiya alalaki esika moko na bankɔkɔ na ye,+ mpe bakundaki ye na esika oyo emati tii na malita ya bana ya Davidi;+ mpe Yuda mobimba ná bato oyo bafandi na Yerusaleme bapesaki ye lokumu na liwa na ye.+ Mpe mwana na ye Manase+ abandaki koyangela na esika na ye.