2 Ntango 27:1-9

27  Yotame+ azalaki na mbula ntuku mibale na mitano (25) ntango abandaki koyangela, mpe ayangelaki mbula zomi na motoba na Yerusaleme. Mpe nkombo ya mama na ye Yerusha+ mwana ya Zadoke.  Mpe azalaki kosala oyo ezali sembo na miso ya Yehova,+ na kolanda nyonso oyo tata na ye Uzia asalaki.+ Kasi ye akɔtaki te na tempelo ya Yehova na makasi.+ Ata bongo, bato bazalaki kaka kobebisa makambo.+  Ye moto atongaki porte ya likoló+ ya ndako ya Yehova, mpe atongaki biloko mingi likoló ya efelo ya Ofele.+  Mpe atongaki bingumba+ na etúká ya ngombangomba ya Yuda,+ mpe na bazamba,+ atongaki bisika oyo ebatelami makasi+ ná manɔ́ngi.+  Mpe abundaki na mokonzi ya bana ya Amone+ mpe nsukansuka alekaki bango na makasi, bongo bana ya Amone bapesaki ye na mbula yango talanta nkama moko (100) ya palata, korosi+ nkóto zomi (10 000) ya blé+ mpe nkóto zomi ya ɔrje.+ Yango nde oyo bana ya Amone bafutaki ye, mpe lisusu na mbula ya mibale mpe ya misato.+  Bongo Yotame azalaki se komikómisa makasi, mpo abongisaki banzela na ye liboso ya Yehova Nzambe na ye.+  Makambo mosusu ya Yotame+ mpe bitumba na ye nyonso mpe banzela na ye, talá, ekomami na Buku+ ya Bakonzi ya Yisraele mpe ya Yuda.  Azalaki na mbula ntuku mibale na mitano (25) ntango abandaki koyangela, mpe ayangelaki mbula zomi na motoba na Yerusaleme.+  Nsukansuka, Yotame alalaki esika moko na bankɔkɔ na ye,+ mpe bakundaki ye na Sité ya Davidi.+ Mpe Ahaze+ mwana na ye abandaki koyangela na esika na ye.

Maloba na nse