2 Ntango 25:1-28
25 Amazia+ akómaki mokonzi ntango azalaki na mbula ntuku mibale na mitano (25), mpe ayangelaki mbula ntuku mibale na libwa (29) na Yerusaleme. Mpe nkombo ya mama na ye Yehoadane+ ya Yerusaleme.
2 Mpe akobaki kosala oyo ezali sembo na miso ya Yehova,+ nde na motema mobimba te.+
3 Mpe esalemaki boye: ntango kaka bokonzi efandaki makasi epai na ye, aumelaki te koboma+ basaleli na ye+ oyo babomaki mokonzi, tata na ye.+
4 Kasi abomaki bana na bango te, asalaki nde ndenge ekomami na mobeko, na buku ya Moize,+ oyo Yehova apesaki mitindo ete: “Batata bakobomama te mpo na bana,+ mpe bana bakobomama te mpo na batata;+ kasi moto na moto akobomama mpo na lisumu na ye moko.”+
5 Mpe Amazia ayanganisaki Yuda mpe atɛlɛmisaki bango na kolanda ndako ya bankɔkɔ na bango,+ na kolanda bakonzi ya bato nkóto nkóto+ mpe bakonzi ya bato nkama nkama+ mpo na Yuda mobimba mpe Benyamina; mpe na nsima akomaki nkombo na bango banda na mbula ntuku mibale (20)+ tii na likoló, mpe nsukansuka, amonaki ete bazali bato nkóto nkama misato (300 000), bato ya makasi koleka oyo bakoki kokende na mosala ya soda, oyo bayebi kosalela likɔnga+ mpe nguba monene.+
6 Lisusu, asombaki na Yisraele bilombe nkóto nkama moko (100 000), mibali ya nguya, na talanta nkama moko (100) ya palata.
7 Mpe moto moko ya Nzambe ya solo+ ayaki epai na ye, alobi: “Ee mokonzi, basoda ya Yisraele báya elongo na yo te, mpo Yehova azali te elongo na Yisraele,+ elingi koloba bana nyonso ya Efraime.
8 Kasi kende yo moko, mpe salá, zalá na mpiko mpo na etumba.+ Nzambe ya solo akoya kobɛtisa yo libaku liboso ya monguna; mpo Nzambe azali na nguya ya kosalisa+ mpe ya kobɛtisa libaku.”+
9 Na yango, Amazia+ alobaki na moto ya Nzambe ya solo ete: “Bongo nasala nini mpo na talanta nkama moko (100) oyo napesi bituluku ya basoda ya Yisraele?”+ Bongo moto ya Nzambe ya solo alobaki boye: “Yehova azali na makoki ya kopesa yo mingi koleka oyo wana.”+
10 Na yango, Amazia atyaki bango pembeni mpo bákende epai na bango, elingi koloba bituluku ya basoda oyo bayaki epai na ye, bauti na Efraime. Nzokande, nkanda na bango epelelaki Yuda makasi, bongo bazongaki epai na bango na nkanda ya kongala.+
11 Mpe Amazia azwaki mpiko mpe akambaki bato na ye mpe akendaki na Lobwaku ya Mungwa;+ mpe abomaki kati na bana ya Seire+ bato nkóto zomi (10 000).+
12 Mpe bana ya Yuda bakangaki bato nkóto zomi (10 000) oyo bazalaki naino na bomoi. Bongo bamemaki bango na nsɔngɛ ya libanga, mpe babandaki kobwaka bango uta na nsɔngɛ ya libanga; mpe bango nyonso bapanzanaki.+
13 Bato ya etuluku ya basoda oyo Amazia azongisaki mpo bákende na ye na etumba te,+ babandaki kokɔtela bingumba ya Yuda na etumba, banda na Samaria+ kino na Bete-horone,+ mpe babomaki kati na bango bato nkóto misato (3 000) mpe bapunzaki biloko ebele.
14 Mpe esalemaki boye: nsima ya kozonga ya Amazia ntango auti koboma Baedome, amemaki mpe banzambe+ ya bana ya Seire mpe atɛlɛmisaki yango ezala banzambe na ye,+ abandaki kogumbamela yango+ mpe abandaki kobimisela yango milinga ya mbeka.+
15 Na yango, nkanda ya Yehova epelelaki Amazia makasi, bongo atindelaki ye mosakoli mpe alobaki na ye boye: “Mpo na nini oluki+ banzambe ya bato+ oyo ebikisi bato na yango na lobɔkɔ na yo te?”+
16 Mpe esalemaki boye: ntango alobaki na ye, na mbala moko mokonzi ayebisaki ye boye: “Totyá yo nde mopesi-toli ya mokonzi?+ Mpo na bolamu na yo moko, tiká.+ Báboma yo mpo na nini?” Na yango, mosakoli atikaki, kasi alobaki boye: “Nayebi mpenza ete Nzambe akani kobebisa yo,+ mpo osali likambo wana+ mpe oyoki toli na ngai te.”+
17 Bongo Amazia mokonzi ya Yuda asalaki likita mpe atindaki bato epai ya Yehoashe mwana ya Yehoahaze mwana ya Yehu mokonzi ya Yisraele,+ na maloba oyo: “Yaká! Tótalana bilongi.”+
18 Na yango, Yehoashe mokonzi ya Yisraele atindelaki Amazia mokonzi ya Yuda bato, na maloba oyo:+ “Lititi ya nzubɛnzubɛ oyo ezalaki na Libá etindaki maloba epai ya sɛdrɛ oyo ezalaki na Libá+ ete: ‘Pesá mwana na ngai ya mobali mwana na yo ya mwasi azala mwasi na ye.’+ Nzokande, nyama moko ya zamba+ oyo efandaka na esobe, oyo ezalaki na Libá, elekaki wana mpe enyataki lititi yango ya nzubɛnzubɛ.
19 Olobi na motema na yo ete: Talá, obɛti Edome.+ Mpe motema na yo+ evimbisi yo motó mpo bápesa yo nkembo.+ Sikoyo, kobá kofanda na ndako na yo.+ Bongo mpo na nini omikɔtisa na etumba oyo ekosukela yo mabe,+ bongo okwea, yo ná Yuda?”+
20 Kasi Amazia ayokaki te; mpo ezalaki kouta na Nzambe ya solo,+ mpo apesa bango na lobɔkɔ na ye, mpo balukaki banzambe ya Edome.+
21 Bongo Yehoashe mokonzi ya Yisraele amataki,+ mpe batalanaki bilongi,+ ye ná Amazia mokonzi ya Yuda, na Bete-shemeshe,+ oyo ezali na Yuda.
22 Mpe Yisraele alongaki Yuda,+ bongo bakimaki moto na moto na hema na ye.+
23 Mpe Yehoashe mokonzi ya Yisraele akangaki+ Amazia mokonzi ya Yuda mwana ya Yehoashe mwana ya Yehoahaze na Bete-shemeshe, nsima na yango, amemaki ye na Yerusaleme+ mpe abukaki efelo ya Yerusaleme, banda na Porte ya Efraime+ tii na Porte ya Litumu,+ mapeko nkama minei (400).
24 Mpe azwaki wolo nyonso ná palata ná biloko nyonso oyo emonanaki na ndako ya Nzambe ya solo, ná Obede-edome+ ná biloko ya motuya ya ndako ya mokonzi,+ ná bakangami, mpe na nsima azongaki na Samaria.+
25 Mpe Amazia+ mwana ya Yehoashe mokonzi ya Yuda aumelaki na bomoi mbula zomi na mitano+ nsima ya liwa ya Yehoashe+ mwana ya Yehoahaze mokonzi ya Yisraele.
26 Makambo mosusu ya Amazia, ya liboso mpe ya nsuka,+ talá! ekomami te na Buku+ ya Bakonzi ya Yuda mpe Yisraele?+
27 Mpe banda ntango oyo Amazia apɛngwaki mpe atikaki kolanda Yehova, basalelaki ye likita+ na Yerusaleme. Nsukansuka, akimaki na Lakishi;+ kasi batindaki bato bálanda ye na Lakishi mpe babomaki ye kuna.+
28 Bongo bamemaki ye na bampunda+ mpe bakundaki ye esika moko na bankɔkɔ na ye na sité ya Yuda.+