2 Ntango 23:1-21
23 Mpe na mbula ya nsambo, Yehoyada+ amonisaki mpiko mpe azwaki bakonzi ya bato nkama nkama,+ elingi koloba, Azaria mwana ya Yerohame, Yishimaele mwana ya Yehohanane ná Azaria mwana ya Obede, Maaseya mwana ya Adaya ná Elishafate mwana ya Zikri, mpo básala kondimana ná ye.
2 Nsima na yango, bakendaki epai na epai na Yuda mpe bayanganisaki Balevi+ ya bingumba nyonso ya Yuda ná bankumu+ ya bandako ya batata+ ya Yisraele. Bongo bayaki na Yerusaleme.
3 Na nsima, lisangá mobimba esalaki kondimana+ ná mokonzi na ndako+ ya Nzambe ya solo, nsima na yango, alobaki na bango boye:
“Talá! Mwana+ ya mokonzi nde akoyangela,+ kaka ndenge Yehova alakaki mpo na bana ya Davidi.+
4 Talá likambo bokosala: moko ya bituluku na bino misato oyo ekoya na sabata,+ kati na banganga-nzambe+ mpe kati na Balevi,+ ekozala bakɛngɛli ya baporte;+
5 mpe moko ya bituluku yango misato ekozala na ndako ya mokonzi;+ mpe moko ya bituluku yango misato ekozala na Porte ya Moboko;+ mpe bato nyonso bakozala na kati ya mapango+ ya ndako ya Yehova.
6 Mpe bótika moto moko te akɔta na ndako ya Yehova,+ kaka banganga-nzambe mpe Balevi oyo bazali kosala mosala.+ Baoyo wana nde bakokɔta, mpo bazali etuluku moko mosantu,+ mpe bato nyonso bakokokisa mokumba na bango epai ya Yehova.
7 Mpe Balevi basengeli kozinga mokonzi bipai nyonso,+ moto na moto na bibundeli na ye na mabɔkɔ; nde moto nyonso oyo akokɔta na ndako, asengeli kobomama. Mpe bókoba kozala elongo na mokonzi ntango azali kokɔta mpe ntango azali kobima.”
8 Mpe Balevi ná Yuda mobimba basalaki na kolanda mitindo nyonso oyo nganga-nzambe Yehoyada+ apesaki.+ Na yango, bazwaki, moto na moto, bato na ye oyo bazalaki kokɔta na sabata elongo na baoyo bazalaki kobima na sabata,+ mpo nganga-nzambe Yehoyada apemisaki bituluku+ na mokumba na yango te.
9 Lisusu, nganga-nzambe Yehoyada apesaki bakonzi ya bato nkama nkama+ makɔnga mpe banguba ya zolongano+ ya Mokonzi Davidi,+ oyo ezalaki na ndako ya Nzambe ya solo.+
10 Mpe atɛlɛmisaki bato nyonso,+ ɛɛ, moto na moto na bibundeli na ye ya kobwakela na lobɔkɔ, banda na ngámbo ya lobɔkɔ ya mobali ya ndako kino na ngámbo ya lobɔkɔ ya mwasi ya ndako, pene na etumbelo mpe pene na ndako, bipai nyonso penepene na mokonzi.
11 Na nsima, babimisaki mwana ya mokonzi libándá+ mpe balatisaki ye motole+ mpe batyaki Litatoli+ likoló na ye mpe bakómisaki ye mokonzi, bongo Yehoyada ná bana na ye batyaki ye mafuta+ mpe balobaki: “Mokonzi azala na bomoi!”+
12 Ntango Atalia ayokaki lokito ya bato bazali kopota mbangu mpe kokumisa mokonzi,+ na mbala moko ayaki epai ya bato na ndako ya Yehova.
13 Bongo amonaki, mpe talá, mokonzi ye wana atɛlɛmi pene na likonzí+ na ye, na esika ya kokɔta, mpe bankumu+ ná bakelelo+ penepene na mokonzi, mpe bato nyonso ya mokili yango bazali kosepela+ mpe koyula+ bakelelo, mpe bayembi+ na bibɛtɛlo ya nzembo mpe baoyo bakambaka masanzoli. Na mbala moko, Atalia apasolaki bilamba na ye mpe alobaki: “Likita mabe! Likita mabe!”+
14 Kasi nganga-nzambe Yehoyada abimisaki bakonzi ya bato nkama nkama, baoyo batyamaki kati na limpinga ya basoda mpe alobaki na bango boye: “Bólongola ye na milɔngɔ,+ mpe moto nyonso oyo akolanda ye, asengeli kobomama na mopanga!” Mpo nganga-nzambe alobaki ete: “Bosengeli koboma ye na ndako ya Yehova te.”
15 Na yango, bakangaki ye. Ntango akómaki na monɔkɔ ya porte ya bampunda ya ndako ya mokonzi, na mbala moko babomaki ye kuna.+
16 Bongo Yehoyada asalaki kondimana kati na ye moko ná bato nyonso mpe mokonzi ete bakokoba kozala bato+ ya Yehova.
17 Nsima na yango, bato nyonso bayaki na ndako ya Baala mpe bakweisaki yango;+ mpe babukaki bitumbelo+ na ye ná bikeko+ na ye, mpe babomaki+ Matane+ nganga-nzambe ya Baala, liboso ya bitumbelo yango.
18 Lisusu, Yehoyada atyaki mikumba ya ndako ya Yehova na lobɔkɔ ya banganga-nzambe mpe Balevi, oyo Davidi+ atyaki na bituluku mpo na kokamba ndako ya Yehova mpo na kopesa Yehova bambeka ya kotumba ndenge ekomami na mobeko ya Moize,+ na esengo mpe na nzembo ndenge ebongisamaki na mabɔkɔ ya Davidi.
19 Bongo atyaki bakɛngɛli+ na baporte+ ya ndako ya Yehova mpo moto moko te ya mbindo ya ndenge nyonso akɔta.
20 Azwaki sikoyo bakonzi ya bato nkama nkama+ mpe bato minene mpe bayangeli ya bato ná bato nyonso ya mokili yango mpe akamataki mokonzi na ndako ya Yehova, akiti na ye.+ Na nsima, bayaki na ndako ya mokonzi na nzela ya porte ya likoló, mpe bafandisaki mokonzi na kiti ya bokonzi.+
21 Mpe bato nyonso ya mokili yango bakobaki kosepela;+ mpe engumba ekómaki na kimya, mpe babomaki Atalia na mopanga.+