2 Ntango 20:1-37
20 Mpe esalemaki boye: nsima na yango, bana ya Moabe+ mpe bana ya Amone+ mpe Baamonime+ mosusu elongo na bango bayaki kobunda etumba na Yehoshafate.+
2 Bongo bato bayaki koyebisa Yehoshafate boye: “Ebele ya bato bango wana bayeli yo, bauti na etúká ya mbu, na Edome,+ mpe bango wana na Hazazone-tamara, elingi koloba, Ene-gedi.”+
3 Na yango, Yehoshafate akómaki kobanga+ mpe azwaki mokano ya koluka Yehova.+ Bongo asakolaki ete bato bákila bilei+ na Yuda mobimba.
4 Nsukansuka, bato ya Yuda bayanganisamaki mpo na kotuna Yehova.+ Ɛɛ, bautaki na bingumba nyonso ya Yuda, bayei kotuna Yehova.+
5 Bongo Yehoshafate atɛlɛmaki na kati ya lisangá ya Yuda mpe ya Yerusaleme na ndako ya Yehova+ liboso ya lopango ya sika,+
6 mpe alobaki boye:+
“Ee Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na biso,+ ozali nde Nzambe na likoló te?+ Mpe ozali nde koyangela makonzi nyonso ya bikólo te?+ Mpe makasi ná nguya ezali na lobɔkɔ na yo, mpe moto ya kotɛmɛla yo azali te, boye te?+
7 Ee Nzambe na biso,+ yo moko obenganaki bato oyo bafandaki na mokili oyo liboso ya bato na yo Yisraele+ mpe na nsima opesaki+ yango na momboto ya Abrahama, moto oyo azalaki kolinga yo,+ mpo na ntango oyo etyami ndelo te, boye te?
8 Mpe bakómaki kofanda kuna, mpe batongelaki yo ndako mosantu kuna mpo na nkombo na yo,+ balobi ete:
9 ‘Soki mpasi ekweli biso:+ mopanga, etumbu, to maladi mabe+ to nzala,+ tótɛlɛma liboso ya ndako oyo+ mpe liboso na yo (mpo nkombo na yo+ ezali na ndako oyo), mpo tóbelela yo mpo na kosɛnga lisalisi na kati ya mpasi na biso, mpe tiká oyoka mpe obikisa.’+
10 Mpe sikoyo, talá bana ya Amone,+ mpe ya Moabe+ mpe ya etúká ya ngombangomba ya Seire,+ baoyo opesaki Yisraele nzela te ya kokɔta epai na bango ntango bazalaki kobima na mokili ya Ezipito, kasi babalukaki, batiki bango mpe basilisaki bango nyɛɛ te,+
11 ɛɛ, lifuti+ oyo bazali kofuta biso nde kobengana biso na eloko na yo oyo opesaki ezala ya biso.+
12 Ee Nzambe na biso, okopesa bango etumbu te?+ Mpo biso tozali na makasi te liboso ya ebele wana ya bato oyo bazali koyela biso;+ mpe biso moko tozali koyeba te oyo tosengeli kosala,+ kasi miso na biso etali epai na yo.”+
13 Na ntango nyonso wana, bato nyonso ya Yuda batɛlɛmaki liboso ya Yehova,+ ata bana na bango ya mike,+ basi na bango mpe bana na bango.
14 Sikoyo, Yahaziele mwana ya Zekaria mwana ya Benaya mwana ya Yeyele mwana ya Mataniya Molevi kati na bana ya Asafe,+ elimo+ ya Yehova ekitelaki ye na katikati ya lisangá.
15 Bongo alobaki ete: “Bótya likebi, Yuda mobimba ná bino bato oyo bofandi na Yerusaleme ná Mokonzi Yehoshafate! Talá oyo Yehova alobi na bino: ‘Bóbanga te,+ bózala na nsɔmɔ mpe te mpo na ebele wana ya bato; mpo etumba ezali ya bino te, kasi ya Nzambe.+
16 Lobi, bókitela bango. Bango wana bazali komata na esika ya koleka na Zize; mpe ya solo bokokuta bango na nsuka ya lobwaku ya mokɛli oyo etalani na esobe ya Yeruele.
17 Bokozala na ntina ya kobunda te+ na mbala oyo. Bótɛlɛma, bóningana te+ mpe bómona lobiko+ ya Yehova mpo na bolamu na bino. Ee Yuda mpe Yerusaleme, bóbanga te, bózala na nsɔmɔ mpe te.+ Lobi, bóbimela bango, mpe Yehova akozala na bino.’”+
18 Na mbala moko, Yehoshafate agumbamaki, elongi na nse,+ mpe Yuda mobimba ná bato oyo bafandi na Yerusaleme bakweaki na nse liboso ya Yehova mpo na kopesa Yehova lokumu.+
19 Na nsima, Balevi+ na bana ya Bakohate+ mpe na bana ya Bakora+ batɛlɛmaki mpo na kopesa Yehova Nzambe ya Yisraele masanzoli na mongongo moko makasi koleka.+
20 Mpe balamukaki ntɔngɔntɔngɔ, mpe babimaki mpe bakendaki na esobe+ ya Tekoa.+ Mpe ntango bazalaki kobima, Yehoshafate atɛlɛmaki mpe alobaki boye: “Bóyoka ngai, Ee Yuda mpe bino bato oyo bofandi na Yerusaleme!+ Bóndimela+ Yehova Nzambe na bino mpo bókoka koumela ntango molai. Bóndimela basakoli na ye,+ na bongo bokolonga.”
21 Lisusu, asalaki likita+ na bato mpe atɛlɛmisaki bayembi+ mpo na Yehova mpe baoyo bapesaka masanzoli,+ balati bilamba ya monzɛlɛ ya bosantu+ wana bazali kobima liboso ya bato oyo bazalaki na bibundeli,+ mpe bazalaki koloba boye: “Bópesa Yehova masanzoli,+ mpo motema boboto na ye ezali seko na seko.”+
22 Mpe na ntango oyo babandaki koganga na koganga ya esengo mpe na lisanzoli, Yehova atyaki bato bábatama+ mpo na kobunda na bana ya Amone, ya Moabe mpe ya etúká ya ngombangomba ya Seire oyo bazalaki koya kokɔta na Yuda, mpe babandaki kobɛtana bango na bango.+
23 Mpe bana ya Amone ná Moabe batɛlɛmaki kobunda na bato oyo bafandaka na etúká ya ngombangomba ya Seire+ mpo báboma bango mpe básilisa bango nyɛɛ; mpe ntango kaka basilisaki bato oyo bafandaka na Seire, basalisanaki mpo moto na moto aboma moninga.+
24 Kasi Yuda, bango bakómaki na linɔ́ngi ya mosɛnzɛli na esobe.+ Ntango babalusaki bilongi epai ya ebele yango ya bato, talá bango wana, bibembe na bango elali na mabele,+ moto ata moko abikaki te.
25 Na yango, Yehoshafate ná bato na ye bapunzaki biloko+ na bango, mpe na kati na bango bakutaki biloko ná bilamba ebele ná biloko ya kitoko; mpe babandaki kolongola bango biloko tii ntango bazalaki na likoki lisusu te ya komema.+ Mpe esalaki mikolo misato bazali kaka kopunza biloko, mpo ezalaki ebele.
26 Mpe na mokolo ya minei, bayanganaki na lobwaku ya patatalu ya Beraka, mpo kuna nde bapambolaki Yehova.+ Yango wana bapesaki esika yango nkombo+ Lobwaku ya Patatalu ya Beraka—tii na mokolo ya lelo.
27 Bongo bato nyonso ya Yuda mpe ya Yerusaleme babalukaki, Yehoshafate liboso na bango, bazongi na Yerusaleme na esengo, mpo Yehova apesaki bango esengo mpo na banguna na bango.+
28 Na yango, bayaki na Yerusaleme na bibɛtɛlo ya bansinga,+ banzɛnzɛ+ ná bakelelo+ na ndako ya Yehova.+
29 Mpe nsɔmɔ+ ya Nzambe ekwelaki makonzi nyonso ya mikili ntango bayokaki ete Yehova abundi na banguna ya Yisraele.+
30 Na yango, bokonzi ya Yehoshafate ezalaki na kimya, mpe Nzambe akobaki kopesa ye bopemi epai na epai.+
31 Mpe Yehoshafate+ akobaki koyangela Yuda. Azalaki na mbula ntuku misato na mitano (35) ntango abandaki koyangela, mpe ayangelaki mbula ntuku mibale na mitano (25) na Yerusaleme. Mpe nkombo ya mama na ye Azuba+ mwana ya Shilehi.
32 Mpe azalaki se kotambola na nzela ya tata na ye Asa,+ mpe apɛngwaki na yango te, na ndenge azalaki kosala oyo ezali sembo na miso ya Yehova.+
33 Kasi bisika oyo etombwaná+ elimwaki te; mpe bato babongisaki naino mitema na bango mpo na Nzambe ya bankɔkɔ na bango te.+
34 Makambo mosusu ya Yehoshafate, ya liboso mpe ya nsuka, talá ekomami na maloba ya Yehu+ mwana ya Hanani,+ oyo bakɔtisaki na Buku+ ya Bakonzi ya Yisraele.
35 Nsima na yango, Yehoshafate mokonzi ya Yuda asalaki boninga na Ahazia+ mokonzi ya Yisraele, oyo azalaki kosala mabe.+
36 Bongo akómisaki ye moninga na ndenge bazalaki kosala bamasuwa mpo na kokende na Tarasisi,+ mpe basalaki bamasuwa na Ezione-gebere.+
37 Nzokande, Eliezere mwana ya Dodavahu ya Maresha alobaki maloba ya esakweli mpo na Yehoshafate ete: “Lokola osali boninga na Ahazia,+ ya solo Yehova akobuka misala na yo.”+ Bongo bamasuwa yango ebebaki,+ mpe ekokaki kokende na Tarasisi te.+