2 Ntango 15:1-19
15 Bongo elimo+ ya Nzambe ekitelaki Azaria mwana ya Odede.+
2 Yango wana abimaki, ayaki liboso ya Asa mpe alobaki na ye boye: “Bóyoka ngai, Ee Asa mpe Yuda mobimba ná Benyamina! Yehova azali elongo na bino ntango nyonso oyo bozali na ye;+ mpe soki boluki+ ye, akotika bómona ye, kasi soki botiki ye, akotika bino.+
3 Mpe mikolo oyo Yisraele+ bazangaki Nzambe ya solo mpe bazangaki nganga-nzambe mpo na koteya+ mpe oyo bazalaki na Mobeko te, ezalaki mingi.
4 Kasi ntango bazalaki na mpasi,+ bazongelaki Yehova Nzambe ya Yisraele+ mpe balukaki ye, bongo atikaki bámona ye.+
5 Mpe na ntango wana kimya ezalaki te mpo na moto oyo azalaki kobima to mpo na moto oyo azalaki kokɔta,+ mpamba te mobulu ezalaki mingi kati na bato nyonso oyo bazalaki kofanda na bitúká ya mokili.+
6 Mpe ekólo oyo ebukaki ekólo oyo+ mpe engumba oyo ebukaki engumba oyo, mpo Nzambe ye moko atikaki bango na mobulu, na mpasi ya ndenge nyonso.+
7 Mpe bino, bózala na mpiko+ mpe bólɛmbisa mabɔkɔ te,+ mpamba te mosala na bino ezali na mbano.”+
8 Mpe ntango kaka Asa ayokaki maloba oyo mpe esakweli ya mosakoli Odede,+ azwaki mpiko mpe alimwisaki biloko ya bosɔtɔ+ na mokili mobimba ya Yuda mpe ya Benyamina mpe na bingumba oyo azwaki na etúká ya ngombangomba ya Efraime,+ mpe abongisaki etumbelo ya Yehova oyo ezalaki liboso ya ndako ya kokɔtela ya Yehova.+
9 Mpe abandaki koyanganisa Yuda mobimba mpe Benyamina+ ná bato oyo bafandi bapaya+ oyo bazalaki elongo na bango, oyo bautaki na Efraime, na Manase mpe na Simeone, mpo bakimaki Yisraele, bayei epai na ye ebele ntango bamonaki ete Yehova Nzambe na ye azali na ye.+
10 Bongo bayanganisamaki na Yerusaleme na sanza ya misato ya mbula ya zomi na mitano ya boyangeli ya Asa.
11 Na nsima, bapesaki Yehova mbeka na mokolo yango, na biloko oyo bapunzaki, oyo bamemaki: ngɔmbɛ nkama nsambo (700) mpe mpate nkóto nsambo (7 000).
12 Lisusu, bakɔtaki na kondimana+ moko mpo na koluka Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango na motema na bango mobimba mpe na molimo na bango mobimba;+
13 ete moto nyonso oyo akoluka Yehova Nzambe ya Yisraele te abomama,+ ezala moto moke to moto monene,+ ezala mobali to mwasi.+
14 Bongo balapelaki Yehova ndai+ na mongongo makasi, na koganga ya esengo, na bakelelo mpe na maseke.
15 Mpe Yuda mobimba basepelaki+ mpo na ndai oyo balapaki; mpo na motema na bango mobimba nde balapaki ndai mpe na esengo nyonso nde balukaki ye, bongo ye atikaki bámona ye;+ mpe Yehova akobaki kopesa bango bopemi epai na epai.+
16 Ata nkɔkɔ na ye Maaka,+ mokonzi Asa+ alongolaki ye na ebonga ya mwasi ya lokumu,+ mpamba te asalaki ekeko moko ya nsɔmɔ mpo na nzete ya losambo;+ bongo na nsima, Asa akataki ekeko na ye ya nsɔmɔ,+ apanzapanzaki yango mpe atumbaki+ yango na lobwaku ya mokɛli ya Kidrone.+
17 Nde bisika oyo etombwaná+ elimwaki te na Yisraele.+ Kasi motema ya Asa ezalaki mobimba mikolo nyonso ya bomoi na ye.+
18 Mpe abandaki kokɔtisa na ndako ya Nzambe ya solo biloko oyo tata na ye asantisaki mpe biloko+ oyo ye moko asantisaki: palata, wolo ná bisaleli mosusu.+
19 Nde etumba ebimaki te tii na mbula ya ntuku misato na mitano (35) ya boyangeli ya Asa.+