2 Ntango 14:1-15

14  Nsukansuka, Abiya alalaki esika moko na bankɔkɔ na ye,+ mpe bakundaki ye na Sité ya Davidi;+ mpe mwana na ye Asa+ abandaki koyangela na esika na ye. Na mikolo na ye, mokili ekómaki na kimya+ mbula zomi.  Mpe Asa asalaki oyo ezali malamu mpe sembo na miso ya Yehova Nzambe na ye.  Bongo alongolaki bitumbelo ya bapaya+ mpe bisika oyo etombwaná,+ abukaki makonzí ya losambo+ mpe akataki banzete ya losambo.+  Lisusu, alobaki na Yuda báluka+ Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango mpe bátosa mobeko+ mpe mitindo.+  Bongo alongolaki na bingumba nyonso ya Yuda bisika oyo etombwaná mpe bitumbelo ya mpaka ya malasi;+ mpe bokonzi ezalaki kaka na kimya+ na boyangeli na ye.  Mpe akobaki kotonga bingumba oyo ebatelami makasi na Yuda,+ mpo mokili ekómaki na kimya; mpe etumba ata moko te ebimelaki ye na bambula wana, mpo Yehova apesaki ye bopemi.+  Bongo alobaki na Yuda boye: “Tótonga bingumba oyo mpe tózinga yango na bifelo+ ná manɔ́ngi,+ baporte ya bizipeli mibale ná bikangiseli.+ Mokili ezali naino na mabɔkɔ na biso, mpo toluki Yehova Nzambe na biso.+ Toluki, mpe apesi biso bopemi epai na epai.”+ Mpe bazalaki kotonga mpe kolonga.+  Mpe Asa akómaki na limpinga ya basoda oyo bazalaki komema nguba ya monene+ mpe likɔnga:+ bato nkóto nkama misato (300 000) na Yuda.+ Mpe na Benyamina: baoyo bazalaki komema nguba ya moke mpe kogumba litimbo+ bazalaki nkóto nkama mibale na ntuku mwambe (280 000).+ Baoyo wana nyonso bazalaki bilombe, mibali ya nguya.  Na nsima, Zera moto ya Etiopi+ abimaki kobunda na bango na limpinga ya basoda oyo ezalaki na bato milio moko (1 000 000)+ mpe makalo nkama misato (300), mpe ayaki kino na Maresha.+ 10  Bongo Asa abimaki kobunda na ye mpe asalaki bituluku ya etumba na lobwaku ya Zefata na Maresha. 11  Mpe Asa abandaki kobelela Yehova Nzambe na ye+ mpe koloba boye: “Ee Yehova, ezala bato bazali mingi, ezala bazali na makasi te, yo osalisaka kaka.+ Salisá biso, Ee Yehova, Nzambe na biso, mpo totyeli yo motema,+ mpe toyei kobunda na ebele ya bato oyo na nkombo na yo.+ Ee Yehova, yo ozali Nzambe na biso.+ Moto—mowei mpamba—azala na makasi te ya kobunda na yo.”+ 12  Na yango, Yehova alongaki+ bato ya Etiopi liboso ya Asa mpe liboso ya Yuda, mpe bato ya Etiopi bakimaki. 13  Mpe Asa ná bato oyo bazalaki na ye bakobaki kolanda bango kino na Gerare,+ mpe bato ya Etiopi bazalaki se kokwea kino moto ya bomoi azalaki lisusu te na kati na bango; mpo babukanaki liboso ya Yehova+ mpe liboso ya kaa na ye.+ Nsima na yango, bamemaki ebele ya biloko oyo bapunzaki.+ 14  Lisusu, babɛtaki bingumba nyonso ya zingazinga na Gerare, mpo nsɔmɔ+ ya Yehova ekwelaki bango, mpe bakobaki kopunza bingumba nyonso, mpo biloko ya kopunza ezalaki mingi kati na yango.+ 15  Mpe babebisaki ata bahema+ ya bibwɛlɛ, bongo bakangaki+ bitonga ebele mpe bakamela;+ nsima na yango, bazongaki na Yerusaleme.

Maloba na nse