2 Ntango 11:1-23
11 Ntango Rehoboame akómaki na Yerusaleme,+ na mbala moko ayanganisaki ndako ya Yuda mpe Benyamina:+ bato nkóto nkama moko na ntuku mwambe (180 000), oyo bazalaki basoda ya makasi koleka, mibali makasi ya etumba,+ mpo na kobundisa Yisraele mpe kozongisela Rehoboame bokonzi.
2 Bongo liloba ya Yehova eyelaki Shemaya,+ moto ya Nzambe ya solo ete:
3 “Yebisá Rehoboame mwana ya Salomo mokonzi ya Yuda+ mpe Yisraele mobimba na kati ya Yuda mpe Benyamina ete:
4 ‘Talá oyo Yehova alobi: “Bosengeli te komata mpo na kobunda na bandeko na bino.+ Bózonga moto na moto na ndako na ye, mpo likambo oyo esalemi euti na ngai.”’”+ Bongo batosaki liloba ya Yehova mpe bazongaki, bakendaki te kobunda na Yeroboame.+
5 Bongo Rehoboame akobaki kofanda na Yerusaleme mpe atongaki bingumba oyo ebatelami makasi na Yuda.
6 Mpe atongaki lisusu Beteleme,+ Etami+ ná Tekoa,+
7 Bete-zure,+ Soko,+ Adulame,+
8 Gate,+ Maresha,+ Zife,+
9 Adoraime, Lakishi,+ Azeka,+
10 Zora,+ Aiyalone+ ná Hebrone,+ bingumba oyo ebatelami makasi, oyo ezalaki na Yuda mpe na Benyamina.
11 Lisusu, bisika oyo ebatelami makasi, akómisaki yango makasi mpenza+ mpe atyaki bakambi+ kuna, ná bibombelo ya biloko ya kolya, mafuta ná vinyo;
12 atyaki banguba ya minene+ mpe makɔnga+ na bingumba ndenge na ndenge; mpe azalaki kokómisa yango makasi mpenza na ndenge moko ya kosakana te. Mpe Yuda ná Benyamina etikalaki ya ye.
13 Mpe banganga-nzambe ná Balevi oyo bazalaki na Yisraele mobimba bamityaki na ngámbo na ye, balongwaki na bateritware na bango nyonso.
14 Mpo Balevi batikaki bisika na bango ya koleisa banyama matiti+ mpe libula na bango,+ bongo bayaki na Yuda mpe Yerusaleme,+ mpamba te Yeroboame+ ná bana na ye balongolaki bango na mokumba+ mpo básalela Yehova lisusu te mosala ya banganga-nzambe.
15 Mpe akómaki komityela banganga-nzambe mpo na bisika oyo etombwaná+ mpe mpo na bademo na ndenge ya ntaba+ mpe mpo na bana-ngɔmbɛ oyo asalaki.+
16 Mpe baoyo bautaki na mabota nyonso ya Yisraele balandaki bango, baoyo bazalaki kopesa motema na bango mpo na koluka Yehova Nzambe ya Yisraele bayaki na Yerusaleme+ mpo na kopesa Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango mbeka.+
17 Mpe bapesaki bokonzi ya Yuda makasi+ mpe bapesaki Rehoboame mwana ya Salomo mabɔkɔ na boumeli ya mbula misato, mpo batambolaki na nzela ya Davidi mpe Salomo na boumeli ya mbula misato.+
18 Bongo Rehoboame azwaki Mahalate azala mwasi na ye; Mahalate azalaki mwana ya Yerimote mwana ya Davidi, mpe ya Abihaile mwana mwasi ya Eliabe+ mwana ya Yese.
19 Na nsima, abotelaki ye bana: Yeushe, Shemaria ná Zahame.
20 Mpe nsima na ye, azwaki Maaka+ mwana mwasi ya mwana ya Abisalome.+ Bongo abotelaki ye Abiya,+ Atai, Ziza ná Shelomite.
21 Mpe Rehoboame alingaki Maaka mwana ya mwana ya Abisalome mingi koleka basi na ye mosusu nyonso+ mpe bamakango na ye; mpo azwaki basi zomi na mwambe, mpe bamakango ntuku motoba (60), bongo abotaki bana mibali ntuku mibale na mwambe (28) mpe bana basi ntuku motoba.
22 Bongo Rehoboame atyaki Abiya mwana ya Maaka nkumu, mokambi kati na bandeko na ye mpo azalaki na likanisi ya kokómisa ye mokonzi.
23 Nzokande, asalaki na mayele+ mpe apalanganisaki bana na ye mosusu na mikili nyonso ya Yuda mpe ya Benyamina,+ na bingumba nyonso oyo ebatelami makasi,+ mpe apesaki bango biloko ya kolya ebele+ mpe azwelaki bango ebele ya basi.+