2 Ntango 10:1-19
10 Mpe Rehoboame+ akendaki na Shekeme,+ mpo ezalaki na Shekeme nde Bayisraele nyonso bayaki mpo na kokómisa ye mokonzi.
2 Mpe esalemaki boye: ntango kaka Yeroboame+ mwana ya Nebate ayokaki likambo yango, wana azalaki naino na Ezipito,+ (mpamba te akimaki mokonzi Salomo,) na mbala moko Yeroboame alongwaki na Ezipito, azongi.+
3 Bongo batindaki bato bábenga ye, mpe Yeroboame ná Yisraele mobimba bayaki mpe balobaki na Rehoboame boye:+
4 “Tata na yo akómisaki ekanganeli na biso makasi;+ sikoyo yo, lɛmbisá mosala makasi ya tata na yo mpe ekanganeli ya kilo+ oyo atyelaki biso, mpe tokosalela yo.”+
5 Bongo alobaki na bango boye: “Bózela mikolo misato. Na nsima, bózongela ngai.” Bongo bato bakendaki.
6 Mpe Mokonzi Rehoboame abandaki kosala likita+ ná mikóló oyo bazalaki kosalela tata na ye Salomo ntango azalaki naino na bomoi, alobaki ete: “Toli nini bokopesa mpo napesa bato oyo eyano?”+
7 Na yango, balobaki na ye boye: “Soki olakisi ete ozali malamu na bato oyo mpe osepelisi mpenza bango mpe ya solo olobi na bango maloba ya kitoko,+ bango mpe bakokóma mpenza basaleli na yo libela.”+
8 Kasi ye atikaki toli+ ya mikóló, oyo bapesaki ye, mpe ayaki kosala likita na bilenge oyo bakolaki esika moko na ye,+ baoyo bazalaki kosalela ye.+
9 Bongo alobaki lisusu na bango boye: “Toli nini bokopesa+ mpo tópesa eyano na bato oyo balobi na ngai ete: ‘Lɛmbisá ekanganeli oyo tata na yo atyelaki biso’?”+
10 Bongo bilenge oyo bakolaki esika moko na ye balobaki na ye boye: “Talá oyo okoloba na bato oyo balobi na yo ete: ‘Tata na yo ayeisaki ekanganeli na biso kilo, kasi yo, lɛmbiselá biso yango’; talá oyo okoloba na bango:+ ‘Mosapi na ngai ya moke ekozala mpenza monene koleka loketo ya tata na ngai.+
11 Mpe sikoyo, tata na ngai amemisaki bino ekanganeli moko ya kilo, kasi ngai, nakobakisa ekanganeli na bino.+ Tata na ngai apesaki bino etumbu na fimbo, kasi ngai, ekozala nde na fimbo oyo ezali na bitubeli.’”+
12 Bongo Yeroboame ná bato nyonso bayaki epai ya Rehoboame na mokolo ya misato, ndenge mokonzi alobaki ete: “Bózongela ngai na mokolo ya misato.”+
13 Bongo mokonzi apesaki bango eyano na maloba makasi.+ Ndenge wana nde Mokonzi Rehoboame atikaki toli+ ya mikóló,+
14 mpe alobaki na bango, ndenge bilenge bapesaki toli+ ete: “Nakokómisa ekanganeli na bino kilo koleka, mpe ngai, nakobakisa yango. Tata na ngai apesaki bino etumbu na fimbo, kasi ngai, ekozala nde na fimbo oyo ezali na bitubeli.”+
15 Mpe mokonzi ayokelaki bato te; mpamba te Nzambe ya solo nde azalaki kobongola makambo,+ mpo Yehova akokisa liloba na ye+ oyo alobaki na Yeroboame mwana ya Nebate+ na nzela ya Ahiya+ Moshilo.+
16 Nde Yisraele mobimba, lokola mokonzi ayokelaki bango te, bato bayanolaki mokonzi boye: “Likabo nini tozali na yango na makambo etali Davidi?+ Mpe tozali na libula moko te na makambo etali mwana ya Yese.+ Ee Yisraele, kende moto na moto epai ya banzambe na yo!+ Sikoyo, talelá makambo ya ndako na yo moko, Ee Davidi.”+ Na yango, Yisraele mobimba ebandaki kokende na bahema na yango.
17 Kasi Rehoboame akobaki koyangela bana ya Yisraele oyo bazalaki kofanda na bingumba ya Yuda.+
18 Na nsima, Mokonzi Rehoboame atindaki Hadorame,+ oyo azalaki mokonzi ya bato oyo babengisami mpo na kosala misala na makasi, kasi bana ya Yisraele babambaki ye mabanga+ mpe akufaki. Mpe Mokonzi Rehoboame azwaki kaka nzela ya komata na likalo na ye mpe kokima tii na Yerusaleme.+
19 Mpe Bayisraele batombokelá+ ndako ya Davidi tii na mokolo ya lelo.