2 Batesaloniki 2:1-17
2 Nzokande, bandeko, na likambo oyo etali kozala+ ya Nkolo na biso Yesu Kristo mpe koyanganisama na biso epai na ye,+ tozali kosɛnga bino ete
2 bóningana nokinoki te na makanisi na bino mpe bózala mitema likolólikoló te mpo na liloba moko boye oyo emonani lokola nde euti na Nzambe+ to mpo na nsango moko boye oyo epesami na monɔkɔ+ to mpo na mokanda+ moko boye lokola nde euti epai na biso, mpo na koloba ete mokolo+ ya Yehova eyei.
3 Moto akosa bino te ata na ndenge nini, mpo ekoya te soki lipɛngwi+ eyei naino te mpe mobuki mibeko+ amonisami te,+ ye mwana ya libebi.+
4 Azali kotɛmɛla+ mpe komitombola likoló ya moto nyonso oyo abengami “nzambe” to eloko ya kosambela, kino kofanda na tempelo ya Nzambe, mpe komimonisa polele ete azali nzambe.+
5 Bobosani ete, ntango nazalaki naino elongo na bino, nazalaki koyebisa+ bino makambo wana?
6 Mpe na yango sikoyo boyebi eloko+ oyo ezali kokanga nzela,+ mpo ye amonisama na ntango ekoki na ye mpenza.+
7 Ya solo, libombami ya kobuka mibeko oyo esili kobanda kosala mosala;+ kasi tii kaka na ntango moto oyo azali sikoyo kokanga nzela akolongwa na nzela.+
8 Na ntango yango nde mobuki mibeko akomonisama, ye oyo Nkolo Yesu akoboma na elimo ya monɔkɔ na ye+ mpe akokómisa eloko mpamba na komonisama+ ya kozala na ye.+
9 Kasi kozala ya mobuki mibeko eyokani na mosala+ ya Satana elongo na misala nyonso ya nguya mpe bilembo ya lokuta mpe makamwisi oyo ezali komonisa makambo oyo ekoya+
10 mpe na bokosi+ oyo euti na makambo nyonso oyo ezangi boyengebene mpo na baoyo bazali kobeba nyɛɛ,+ lokola lifuti na ndenge bamonisaki te ete balingi+ mpenza solo mpo bábikisama.+
11 Yango wana Nzambe atiki misala ya kobungisa esalema epai na bango, mpo bándima lokuta,+
12 mpo bango nyonso básambisama mpo bandimaki solo te+ kasi basepelaki nde na makambo ya kozanga boyengebene.+
13 Nzokande, biso tosengeli kopesa Nzambe matɔndi ntango nyonso mpo na bino, bandeko oyo Yehova alingi, mpamba te Nzambe aponaki bino+ banda na ebandeli mpo na lobiko na ndenge asantisaki+ bino na elimo+ mpe na nzela ya kondima na bino na kati ya solo.+
14 Mpo na ntina yango mpenza nde ye abengaki bino na nzela ya nsango malamu oyo tozali kosakola,+ mpo na kozwa nkembo ya Nkolo na biso Yesu Kristo.+
15 Na yango, bandeko, bótɛlɛma ngwi+ mpe bókoba kokangama na mimeseno+ oyo toteyaki bino, na monɔkɔ to na mokanda.
16 Lisusu, Nkolo na biso Yesu Kristo ye moko mpe Nzambe Tata na biso, oyo alingaki+ biso mpe apesaki libɔndisi ya seko mpe elikya ya malamu+ na nzela ya boboto monene,
17 bábɔndisa mitema na bino mpe bápesa bino makasi na mosala nyonso ya malamu mpe liloba nyonso ya malamu.+