2 Bakorinti 6:1-18
6 Lokola tozali kosala elongo na ye,+ biso mpe tozali kobondela bino ete bóndima boboto monene ya Nzambe te mpe na nsima bóbosana ntina na yango.+
2 Mpo azali koloba ete: “Na ntango moko oyo endimami nayokaki yo, mpe na mokolo moko ya lobiko nasalisaki yo.”+ Talá! Sikoyo nde ntango mpenza oyo endimami.+ Talá! Sikoyo nde mokolo ya lobiko.+
3 Tozali kobɛtisa bato libaku na likambo moko te,+ mpo bázwa likambo ya koloba na mosala na biso te;+
4 kasi na makambo nyonso, tozali kopesa ndakisa malamu+ ete tozali basaleli* ya Nzambe, na ezaleli ya koyika mpiko na makambo mingi, na malɔzi, na bosɛnga, na mikakatano,+
5 na kobɛtama, na babolɔkɔ,+ na makambo ya mobulu, na misala makasi, na babutu kozanga mpɔngi, na bantango ya kozanga bilei,+
6 na bopɛto, na boyebi, na motema molai,+ na boboto,+ na elimo santu, na bolingo oyo ezangi bokosi,+
7 na maloba ya solo, na nguya+ ya Nzambe; na nzela ya bibundeli+ ya boyengebene ya lobɔkɔ ya mobali mpe ya lobɔkɔ ya mwasi,
8 na nzela ya nkembo mpe ya kosambwisama, na nzela ya nkombo mabe ná lokumu ya malamu; lokola bakosi+ nzokande bato oyo balobaka solo,
9 lokola bato oyo bayebani te nzokande bato oyo bayebani,+ lokola bato oyo bazali kokufa nzokande, talá! tozali na bomoi,+ lokola bato oyo bazwi disiplini+ nzokande bakabami te na liwa,+
10 lokola bato oyo bazali na mawa kasi tozali kosepela ntango nyonso, lokola babola kasi tozali kokómisa bato mingi bato ya bomɛngo, lokola bato bazali na eloko te nzokande tozali na biloko nyonso.+
11 Tofungoli monɔkɔ na biso mpo na kolobela bino polele, Bakorinti, motema+ na biso efungwami.
12 Bozali na nkaka na kati na biso te,+ kasi bozali na nkaka nde na kati ya bolingo ya motema na bino moko.+
13 Yango wana, lokola mbano mpo na yango—nazali koloba lokola nde na bana mike+—bino mpe bófungwama.
14 Bókangana te na ekanganeli ya mabe esika moko na bato oyo bazali bandimi te.+ Mpo boninga nini ezali na kati ya boyengebene mpe kobuka mibeko?+ To pole ná molili esanganaka na nini?+
15 Lisusu, boyokani nini ezali kati na Kristo mpe Beliale?+ To eloko nini+ moto ya sembo azali na yango elongo na moto oyo azali mondimi te?
16 Mpe boyokani nini ezali kati na tempelo ya Nzambe mpe bikeko?+ Mpo biso tozali tempelo+ ya Nzambe ya bomoi; kaka ndenge Nzambe alobaki ete: “Nakofanda na kati na bango+ mpe nakotambola na kati na bango, mpe nakozala Nzambe na bango, mpe bakozala bato na ngai.”+
17 “‘Yango wana bóbima na kati na bango, mpe bókabwana,’ Yehova alobi bongo, ‘mpe bótika kosimba eloko ya mbindo’”;+ “‘mpe ngai nakoyamba bino.’”+
18 “‘Mpe nakozala tata na bino,+ mpe bino bokozala bana na ngai ya mibali mpe bana na ngai ya basi,’+ Yehova Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobi bongo.”+
Maloba na nse
^ To, “baministre.”