2 Bakonzi 9:1-37

9  Mpe mosakoli Elisha abengaki moko ya bana+ ya basakoli mpe alobaki na ye boye: “Kangá mokaba na loketo na yo,+ zwá molangi+ oyo ya mafuta na lobɔkɔ na yo mpe kende na Ramote-gileade.+  Ntango okokóma kuna, luká Yehu+ mwana ya Yehoshafate mwana ya Nimishi na esika yango; kɔtá mpe tɛlɛmisá ye na kati ya bandeko na ye mpe memá ye na shambrɛ ya kati mpenza.+  Zwá molangi yango ya mafuta, sopá yango na motó na ye+ mpe lobá boye: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Natye yo mafuta+ ozala mokonzi+ ya Yisraele.”’ Na nsima fungolá porte mpe kimá, kozela te.”  Bongo mosaleli yango, mosaleli ya mosakoli, asimbaki nzela akei na Ramote-gileade.  Ntango akómaki, talá, bakonzi ya mampinga ya basoda bazalaki wana, bafandi. Bongo alobaki boye: “Ee mokonzi, nazali na liloba moko ya koyebisa yo.”+ Na yango, Yehu alobaki ete: “Koyebisa nani na kati na biso awa?” Bongo ye alobaki: “Yo, Ee mokonzi.”  Bongo atɛlɛmaki mpe akɔtaki na ndako; mpe ye asopaki mafuta na motó na ye mpe alobaki na ye boye: “Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Natye yo mafuta ozala mokonzi+ ya bato ya Yehova,+ elingi koloba, Yisraele.  Mpe okoboma ndako ya Ahaba nkolo na yo, mpe nakozongisela mpenza Yezabele mabe+ mpo na makila ya basaleli na ngai basakoli mpe makila ya basaleli nyonso ya Yehova.+  Mpe ndako mobimba ya Ahaba esengeli kokufa; mpe nakoboma mpenza moto nyonso ya Ahaba+ oyo asubaka na efelo+ mpe moto oyo azangi makoki mpe azangi ntina+ na Yisraele.  Mpe nakokómisa mpenza ndako ya Ahaba lokola ndako ya Yeroboame+ mwana ya Nebate mpe lokola ndako ya Baasha+ mwana ya Ahiya. 10  Mpe bambwa ekolya Yezabele+ na eteni ya mabele ya Yizireele, mpe moto moko te akokunda ye.’” Bongo afungolaki porte mpe akimaki.+ 11  Nde Yehu abimaki epai ya basaleli ya nkolo na ye, mpe babandaki koloba na ye boye: “Boni, malamu?+ Mpo na nini moto ya ligboma+ oyo ayei epai na yo?” Kasi ye alobaki na bango ete: “Bino moko boyebi malamu moto yango mpe ndenge masolo na ye ezalaka.” 12  Kasi balobaki ete: “Lokuta! Yebisá biso, tobondeli yo.” Bongo ye alobaki: “Alobi na ngai boye na boye, ete: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Natye yo mafuta ozala mokonzi ya Yisraele.”’”+ 13  Bongo bazwaki nokinoki moto na moto elamba+ na ye mpe batyaki yango na nse na ye, na eskalye oyo ezipami te, mpe babandaki koyula liseke+ mpe koloba: “Yehu akómi mokonzi!”+ 14  Mpe Yehu+ mwana ya Yehoshafate mwana ya Nimishi+ abandaki kosalela Yehorame likita.+ Nde Yehorame azalaki kokɛngɛla na Ramote-gileade,+ ye ná Yisraele mobimba, mpo na Hazaele+ mokonzi ya Siri. 15  Na nsima, mokonzi Yehorame+ azongaki na Yizireele+ mpo bábikisa ye na bampota oyo bato ya Siri bazokisaki ye ntango azalaki kobunda na Hazaele mokonzi ya Siri.+ Sikoyo, Yehu alobaki boye: “Soki molimo na bino endimi,+ bótika moto moko te abima na engumba mpe akende kopesa nsango na Yizireele.” 16  Mpe Yehu abandaki kotambwisa likalo mpe kokende na Yizireele; mpo Yehorame azalaki kolala kuna, mpe Ahazia+ mokonzi ya Yuda akitaki mpo na kotala Yehorame. 17  Mpe sinzili+ atɛlɛmaki likoló ya linɔ́ngi+ na Yizireele,+ mpe amonaki ebele ya bato ya Yehu oyo bazalaki kopumbwapumbwa ntango azalaki koya, mpe na mbala moko alobaki boye: “Nazali komona ebele ya bato bazali kopumbwapumbwa.” Na yango, Yehorame alobaki ete: “Zwá soda moko oyo atambolaka na mpunda mpe tindá ye akutana na bango, mpe aloba boye: ‘Kimya ezali?’”+ 18  Bongo motambwisi moko ya mpunda akendaki kokutana na ye mpe alobaki ete: “Talá oyo mokonzi alobi: ‘Kimya ezali?’” Kasi Yehu alobaki boye: “Likambo ya ‘kimya’ etali yo na nini?+ Baluká mpe leká nsima na ngai!” Mpe sinzili+ apesaki lisusu nsango mpe alobaki: “Momemi-nsango akómi epai na bango, kasi azongi te.” 19  Bongo atindaki motambwisi ya mibale ya mpunda, oyo, ntango akómaki epai na bango, alobaki boye: “Talá oyo mokonzi alobi: ‘Kimya ezali?’” Kasi Yehu alobaki ete: “Likambo ya ‘kimya’ etali yo na nini?+ Baluká mpe leká nsima na ngai!” 20  Mpe sinzili apesaki lisusu nsango mpe alobaki: “Akómi epai na bango, kasi azongi te; mpe ndenge ya kotambwisa ezali lokola oyo ya Yehu+ mwana ya mwana ya Nimishi,+ mpo azali kotambwisa na ligboma.”+ 21  Na yango, Yehorame alobaki ete: “Kangisá banyama na likalo!”+ Bongo bakangisaki banyama na likalo na ye ya etumba mpe Yehorame mokonzi ya Yisraele ná Ahazia+ mokonzi ya Yuda babimaki, moto na moto na likalo na ye ya etumba. Ntango bazalaki kokende kokutana na Yehu, bayaki kokuta ye na eteni ya mabele ya Nabote+ Moyizireele. 22  Mpe esalemaki boye: ntango kaka Yehorame amonaki Yehu, na mbala moko alobaki boye: “Yehu, kimya ezali?” Kasi ye alobaki ete: “Kimya+ nini ekozala ntango misala ya pite ya mama na yo Yezabele+ mpe ebele ya misala na ye ya bonganga-nkisi+ ezali naino?” 23  Na mbala moko, Yehorame abalusaki likalo na ye mpo akima, mpe alobaki na Ahazia boye: “Ahazia, tozwami!”+ 24  Mpe Yehu abendaki litimbo+ na makasi na ye nyonso mpe abɛtaki Yehorame na mokɔngɔ, na katikati ya mapeka, bongo likula yango ebimaki na motema na ye, mpe akweaki na kati ya likalo na ye ya etumba.+ 25  Bongo Yehu alobaki na Bidikare, moto oyo azalaki kosalisa na komema bibundeli na ye+ ete: “Tombolá ye; bwaká ye na eteni ya elanga ya Nabote Moyizireele;+ mpo kanisá lisusu: ngai na yo tozalaki kotambwisa makalo oyo ebendami na bampunda mibalemibale nsima ya tata na ye Ahaba, mpe Yehova atindelaki ye maloba+ oyo: 26  ‘“Ya solo, namonaki makila+ ya Nabote mpe makila ya bana na ye+ lobi,” yango nde liloba ya Yehova, “mpe ya solo, nakozongisela yo mabe+ na eteni oyo ya mabele,” yango nde liloba ya Yehova.’ Bongo sikoyo, tombolá ye; bwaká ye na eteni ya mabele yango, ndenge Yehova alobaki.”+ 27  Mpe Ahazia+ mokonzi ya Yuda amonaki yango mpe abandaki kokima na nzela ya ndako ya elanga.+ (Na nsima, Yehu alandaki ye mpe alobaki boye: “Ye mpe! Bóboma ye!” Bongo babɛtaki ye wana azalaki na kati ya likalo, na nzela oyo emati tii na Gure, oyo ezali pene na Ibleame.+ Mpe akobaki kokima tii na Megido+ mpe akufaki kuna.+ 28  Na nsima, basaleli na ye bamemaki ye na kati ya likalo tii na Yerusaleme, bongo bakundaki ye na lilita na ye esika moko na bankɔkɔ na ye na Sité ya Davidi.+ 29  Mpe ezalaki na mbula ya zomi na moko ya Yehorame+ mwana ya Ahaba nde Ahazia+ akómaki mokonzi ya Yuda.) 30  Nsukansuka, Yehu akómaki na Yizireele,+ mpe Yezabele+ ayokaki yango. Mpe apakolaki+ biloko ya monzɛlɛ ya moindo na miso na ye mpe abongisaki motó na ye kitoko+ mpe atalaki na nse, longwa na lininisa.+ 31  Mpe Yehu akɔtaki na porte. Bongo Yezabele alobaki ete: “Zimiri+ oyo abomaki nkolo na ye, alongá?” 32  Na yango, atombolaki elongi, atali lininisa mpe alobi: “Nani azali na ngai? Nani?”+ Na mbala moko, bakapita mibale to misato ya ndako ya mokonzi+ batalaki na nse epai azalaki. 33  Bongo alobaki ete: “Bóbwaka ye na nse!”+ Na yango, babwakaki ye na nse, mpe ndambo ya makila na ye epanzanaki na efelo mpe na bampunda; mpe anyatanyataki+ ye. 34  Nsima na yango akɔtaki, alyaki mpe amɛlaki mpe na nsima alobaki boye: “Nabondeli bino, bótala mwasi wana oyo alakelami mabe+ mpe bókunda ye, mpo azali mwana ya mokonzi.”+ 35  Ntango bakendaki kokunda ye, bakutaki ata eteni moko te ya nzoto na ye, longola kaka mokuwa ya motó mpe makaka mpe matandu.+ 36  Ntango bazongaki mpe bayebisaki ye, alobaki boye: “Wana liloba oyo Yehova alobaki na nzela+ ya mosaleli na ye Eliya Motishebe ete: ‘Na eteni ya mabele ya Yizireele, bambwa ekolya mosuni ya Yezabele.+ 37  Mpe ebembe ya Yezabele ekokóma lokola nyɛi+ na esobe na eteni ya mabele ya Yizireele, mpo báloba te ete: “Yezabele ye oyo.”’”+

Maloba na nse