2 Bakonzi 8:1-29

8  Mpe Elisha alobaki boye na mwasi oyo ye azongisaki mwana na ye na bomoi:+ “Tɛlɛmá mpe kende, yo ná bato ya ndako na yo, mpe fandá mopaya na esika nyonso oyo okoki kofanda mopaya;+ mpamba te Yehova abengisi nzala,+ mpe kutu, ekoya mpenza na mokili mpe ekoumela mbula nsambo.”+  Bongo mwasi yango atɛlɛmaki mpe asalaki ndenge moto ya Nzambe ya solo alobaki mpe akendaki,+ ye ná bato ya ndako na ye,+ mpe afandaki mopaya na mokili ya Bafilistia+ mbula nsambo.  Mpe esalemaki boye: nsima ya mbula nsambo, mwasi yango alongwaki na mokili ya Bafilistia, azongaki mpe akendaki kobelela mokonzi+ mpo na ndako na ye mpe mpo na elanga na ye.  Na ntango yango, mokonzi alobaki na Gehazi+ mosaleli ya moto ya Nzambe ya solo ete: “Nabondeli yo, yebisá ngai makambo minene nyonso oyo Elisha asalá.”+  Mpe esalemaki boye: ntango azalaki koyebisa mokonzi ndenge azongisaki mokufi na bomoi,+ talá, mwasi oyo ye azongisaki mwana na ye na bomoi azali kobelela mokonzi mpo na ndako na ye mpe mpo na elanga na ye.+ Na mbala moko, Gehazi alobaki boye: “Nkolo na ngai+ mokonzi, mwasi yango ye oyo, mpe mwana na ye oyo Elisha azongisaki na bomoi ye oyo.”  Na yango, mokonzi atunaki mwasi yango, mpe ye abɛtɛlaki ye lisolo yango.+ Na nsima, mokonzi apesaki ye kapita moko ya ndako na ye+ mpe alobaki: “Zongiselá ye biloko na ye nyonso mpe mbuma nyonso ya elanga yango banda mokolo oyo alongwaki na mokili oyo tii lelo.”+  Mpe Elisha ayaki na Damasi;+ mpe Bene-hadade+ mokonzi ya Siri azalaki kobɛla. Na yango, bapesaki ye nsango mpe balobaki: “Moto ya Nzambe+ ya solo ayei tii awa.”  Bongo mokonzi alobaki na Hazaele+ boye: “Zwá likabo+ na lobɔkɔ na yo mpe kende kokutana na moto ya Nzambe ya solo, mpe tuná+ Yehova na nzela na ye boye: ‘Nakobika na maladi oyo?’”  Na yango, Hazaele akendaki kokutana na ye mpe azwaki likabo na lobɔkɔ na ye, ɛɛ, lolenge nyonso ya biloko malamu ya Damasi, oyo bakamela ntuku minei (40) ekoki kokumba, mpe ayaki kotɛlɛma liboso na ye mpe alobaki boye: “Mwana na yo,+ Bene-hadade, mokonzi ya Siri, atindi ngai epai na yo mpe alobi: ‘Nakobika na maladi oyo?’” 10  Bongo Elisha alobaki na ye ete: “Kende, yebisá ye boye: ‘Okobika solo,’ kasi Yehova alakisi ngai+ ete akokufa solo.”+ 11  Mpe azalaki kaka kotala ye tii ayokaki nsɔni. Na nsima, moto ya Nzambe ya solo abandaki kolela.+ 12  Bongo Hazaele alobaki ete: “Mpo na nini nkolo na ngai azali kolela?” Na yango, ye alobaki boye: “Mpo nayebi mpenza mabe+ oyo okosala bana ya Yisraele. Okozikisa na mɔtɔ bisika na bango oyo ebatelami makasi, mpe okoboma na mopanga basoda na bango ya makasi koleka, mpe okokatakata bana na bango,+ mpe okopasola mabumu ya basi na bango oyo bazali na zemi.”+ 13  Na yango, Hazaele alobaki: “Mosaleli na yo, mbwa+ ya mpamba oyo, azali nani mpo asala likambo ya monene boye?” Kasi Elisha alobaki ete: “Yehova amonisi ngai ete yo okozala mokonzi ya Siri.”+ 14  Nsima na yango, atikaki Elisha, akei mpe ayaki epai ya nkolo na ye, nkolo na ye alobaki na ye: “Elisha alobi na yo nini?” Bongo ye alobaki ete: “Alobi na ngai: ‘Okobika solo.’”+ 15  Mpe esalemaki boye: na mokolo oyo elandaki, azwaki bolangiti mpe azindisaki yango na mai mpe atandaki yango na elongi na ye,+ bongo akufaki.+ Mpe Hazaele+ abandaki koyangela na esika na ye. 16  Mpe na mbula ya mitano ya Yehorame+ mwana ya Ahaba mokonzi ya Yisraele, wana Yehoshafate azalaki mokonzi ya Yuda, Yehorame+ mwana ya Yehoshafate mokonzi ya Yuda akómaki mokonzi. 17  Azalaki na mbula ntuku misato na mibale (32) ntango akómaki mokonzi, mpe ayangelaki mbula mwambe na Yerusaleme.+ 18  Mpe atambolaki na nzela ya bakonzi ya Yisraele,+ kaka ndenge bato ya ndako ya Ahaba basalaki;+ mpo mwana ya Ahaba nde akómaki mwasi na ye,+ mpe azalaki se kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova. 19  Mpe Yehova alingaki te kobebisa Yuda+ mpo na Davidi mosaleli na ye,+ kaka ndenge alakaki ye ete akopesa ye ná bana na ye mwinda+ ntango nyonso. 20  Na mikolo na ye, Edome+ batombokaki mpe balongwaki na nse ya bokonzi ya Yuda, bongo bamityelaki mokonzi.+ 21  Na yango, Yehorame akatisaki mpo na kokende na Zairi, ná makalo nyonso elongo na ye. Mpe esalemaki boye: atɛlɛmaki na butu mpe abomaki Baedome oyo bazingaki ye ná bakonzi ya makalo; mpe bato bakimaki na bahema na bango. 22  Kasi Edome ekobaki na botomboki na yango mpe elongwá na nse ya bokonzi ya Yuda tii na mokolo ya lelo. Na ntango yango nde Libina+ ebandaki kotomboka. 23  Makambo mosusu ya Yehorame ná nyonso oyo asalaki ekomami te na buku+ ya makambo ya mikolo ya bakonzi ya Yuda? 24  Nsukansuka, Yehorame alalaki esika moko na bankɔkɔ na ye+ mpe akundamaki esika moko na bankɔkɔ na ye na Sité ya Davidi.+ Mpe Ahazia+ mwana na ye abandaki koyangela na esika na ye. 25  Na mbula ya zomi na mibale ya Yehorame mwana ya Ahaba mokonzi ya Yisraele, Ahazia mwana ya Yehorame mokonzi ya Yuda akómaki mokonzi.+ 26  Ahazia azalaki na mbula ntuku mibale na mibale (22) ntango abandaki koyangela, mpe ayangelaki mbula moko na Yerusaleme.+ Mpe nkombo ya mama na ye Atalia+ mwana ya mwana ya Omiri+ mokonzi ya Yisraele. 27  Mpe azalaki kotambola na nzela ya ndako ya Ahaba+ mpe azalaki se kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova,+ lokola ndako ya Ahaba, mpo azalaki ndeko ya bato ya ndako ya Ahaba, mpo na libala.+ 28  Na yango, akendaki elongo na Yehorame mwana ya Ahaba kobunda etumba na Hazaele+ mokonzi ya Siri na Ramote-gileade,+ kasi bato ya Siri babɛtaki+ Yehorame. 29  Bongo mokonzi Yehorame+ azongaki na Yizireele+ mpo bábikisa ye na bampota oyo bato ya Siri bazokisaki ye na Rama, ntango abundaki na Hazaele mokonzi ya Siri. Nde Ahazia+ mwana ya Yehorame mokonzi ya Yuda akitaki kotala Yehorame mwana ya Ahaba na Yizireele, mpo azalaki kobɛla.

Maloba na nse