2 Bakonzi 4:1-44

4  Sikoyo, ezalaki na mwasi moko kati na basi ya bana+ ya basakoli oyo abelelaki Elisha mpe alobaki: “Mosaleli na yo, mobali na ngai, akufá; mpe yo moko oyebi malamu ete mosaleli na yo azalaki ntango nyonso kobanga+ Yehova, kasi modefisi+ ayei kozwa bana na ngai mibale bázala baombo na ye.”  Na yango, Elisha alobaki na ye boye: “Nasalela yo nini?+ Yebisá ngai; ozali na nini na ndako?” Bongo ye alobaki ete: “Mosaleli na yo azali na eloko ata moko te na ndako kaka elokó moko ya monɔkɔ nsɔngɛ oyo ezali na mafuta.”+  Na nsima, ye alobaki boye: “Kende libándá, sɛngá bambɛki epai ya bato nyonso oyo bafandi penepene na yo, bambɛki oyo ezali na eloko te. Kozwa yango moke te.  Mpe kende, omikanga na ndako, yo ná bana na yo, mpe sopá mafuta na kati ya bambɛki yango nyonso, mpe oyo etondi, tyá yango pembeni.”  Bongo atikaki ye mpe akendaki. Ntango amikangaki na ndako, ye ná bana na ye, bazalaki kopesa ye bambɛki yango, mpe ye azalaki kosopa mafuta.+  Mpe esalemaki boye: ntango kaka bambɛki yango etondaki, alobaki na mwana na ye boye: “Memelá ngai mbɛki mosusu.”+ Kasi alobaki na ye: “Mbɛki mosusu ezali te.” Na yango, mafuta etikaki kobima.+  Bongo akɔtaki mpe ayebisaki moto ya Nzambe ya solo, mpe ye alobaki sikoyo boye: “Kende, tɛká mafuta yango mpe futá banyongo na yo,+ bongo yo ná bana na yo bokobikela na oyo etikali.”+  Mpe esalemaki boye: mokolo moko, Elisha azalaki koleka na Shuneme,+ esika mwasi moko ya lokumu azalaki, mpe mwasi yango atyaki ye mbamba+ mpo alya limpa. Mpe esalemaki boye: mbala nyonso oyo azalaki koleka, azalaki kokɔta wana mpo na kolya limpa.  Nsukansuka, mwasi yango alobaki na mobali na ye boye:+ “Talá sikoyo, nayebi malamu ete moto oyo alekaka epai na biso ntango nyonso azali mosantu ya Nzambe.+ 10  Nabondeli yo, tósala mwa shambrɛ ya likoló,+ na efelo, mpe tótyela ye mbeto, mesa, kiti ná etɛlɛmiselo ya miinda;+ mpe ekosalema mpenza boye: ntango nyonso oyo akoya epai na biso, akoki kokɔta kuna.”+ 11  Mpe esalemaki boye: mokolo moko, lokola momeseno, ayaki kuna, akɔtaki na shambrɛ ya likoló mpe alalaki wana. 12  Bongo alobaki na mosaleli na ye Gehazi+ boye: “Bengá mwasi Moshuneme+ oyo.” Na yango, abengaki ye mpo atɛlɛma liboso na ye. 13  Na nsima, alobaki na mosaleli na ye: “Nabondeli yo, yebisá ye ete: ‘Talá, omitungisi mpo na biso na makambo oyo nyonso osaleli biso.+ Tósalela yo nini?+ Ezali na likambo moko oyo tokoki koyebisa mokonzi+ to mokonzi ya basoda+ mpo na yo?’” Na yango, ye alobaki boye: “Nafandi kati na bato na ngai.”+ 14  Mpe alobaki lisusu boye: “Bongo tósalela ye nini?” Sikoyo Gehazi alobaki ete: “Ya solo, azali na mwana mobali te,+ mpe mobali na ye akómi mobange.” 15  Na mbala moko alobaki boye: “Bengá ye.” Bongo abengaki ye, mpe atɛlɛmaki na porte. 16  Na nsima, alobaki boye: “Na mbula ekoya, na ntango oyo boye, okosimba mwana mobali.”+ Kasi ye alobaki ete: “Te, nkolo na ngai, Ee moto ya Nzambe ya solo! Koloba na mosaleli na yo makambo ya lokuta te.” 17  Nzokande, mwasi yango azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali+ na mbula oyo elandaki, na ntango yango oyo etyamaki, ndenge Elisha alobaki na ye.+ 18  Mpe mwana yango azalaki kokola, mpe esalemaki boye: mokolo moko, lokola momeseno, abimaki, akei epai ya tata na ye oyo azalaki esika moko na babuki-mbuma.+ 19  Mpe azalaki se koloba na tata na ye boye: “Motó, Aa motó!”+ Nsukansuka alobaki na mosaleli na ye ete: “Memá ye epai ya mama na ye.”+ 20  Na yango, azwaki ye mpe akendaki na ye epai ya mama na ye. Mpe afandaki kaka na mabɔlɔngɔ na ye tii na midi, mpe nsukansuka, akufaki.+ 21  Bongo amataki mpe alalisaki ye na mbeto+ ya moto ya Nzambe ya solo+ mpe akangaki ye na ndako mpe abimaki. 22  Sikoyo, abengaki mobali na ye mpe alobaki ete: “Nabondeli yo, tindelá ngai mosaleli moko mpe mpunda moko ya mwasi, mpe tiká ngai nakende mbangu kino epai ya moto ya Nzambe ya solo mpe nazonga.”+ 23  Kasi ye alobaki boye: “Mpo na nini ozali kokende epai na ye lelo? Ezali sanza ya sika te,+ sabata mpe te.” Kasi ye alobaki ete: “Likambo ezali te.” 24  Na yango, akangisaki kiti ya mpunda+ yango mpe alobaki na mosaleli na ye boye: “Tambwisá mpunda tókende. Okotika kotambwisa yango kaka soki nalobi na yo otika.” 25  Mpe akendaki mpe akómaki epai ya moto ya Nzambe ya solo na Ngomba Karamele. Mpe esalemaki boye: ntango kaka moto ya Nzambe ya solo amonaki ye na mosika, na mbala moko, alobaki na mosaleli na ye Gehazi boye:+ “Talá! Mwasi Moshuneme ye kuna. 26  Sikoyo nabondeli yo, potá mbangu okutana na ye mpe lobá na ye ete: ‘Ozali malamu? Mobali na yo azali malamu? Mwana azali malamu?’” Na yango, mwasi yango alobaki boye: “Tozali malamu.” 27  Ntango akómaki epai ya moto ya Nzambe ya solo na ngomba, na mbala moko, asimbaki ye na makolo.+ Bongo Gehazi ayaki mpo abengana ye,+ kasi moto ya Nzambe ya solo+ alobaki ete: “Tiká ye,+ mpo molimo na ye ekómeli ye bololo;+ mpe Yehova abombeli+ ngai yango mpe ayebisi ngai te.” 28  Sikoyo mwasi yango alobaki ete: “Ngai nasɛngaki nde mwana na nzela ya nkolo na ngai? Nalobaki te ete: ‘kopesa ngai elikya ya lokuta te’?”+ 29  Na mbala moko, alobaki na Gehazi boye:+ “Kangá mokaba na loketo na yo+ mpe zwá lingenda+ na ngai na lobɔkɔ na yo mpe kende. Soki okutani na moto, kopesa ye mbote te;+ soki moto apesi yo mbote, kondima te. Mpe tyá lingenda na ngai na elongi ya mwana yango.”+ 30  Na yango, mama ya mwana yango alobaki ete: “Lokola Yehova azali solo na bomoi+ mpe lokola molimo na yo ezali solo na bomoi,+ nakotika yo te.”+ Bongo atɛlɛmaki mpe akendaki elongo na ye. 31  Mpe Gehazi akendaki liboso na bango mpe atyaki lingenda na elongi ya mwana yango, kasi ata mongongo ezalaki te mpe elembo ata moko te ete atye likebi.+ Bongo azongaki kokutana na ye mpe alobaki ete: “Mwana alamuki te.”+ 32  Nsukansuka, Elisha akɔtaki na ndako, mpe talá, mwana yango akufi, balalisi ye na mbeto na ye.+ 33  Na nsima, akɔtaki mpe amikangaki na ndako, bango mibale na kati,+ mpe abandaki kobondela Yehova.+ 34  Nsukansuka, amataki mpe alalelaki mwana+ mpe atyaki monɔkɔ na ye na monɔkɔ ya mwana mpe miso na ye na miso ya mwana mpe mabɔkɔ na ye na mabɔkɔ ya mwana, agunzami likoló na ye, mpe mokemoke nzoto ya mwana ekómaki mɔtɔ. 35  Na nsima, abandaki lisusu kotambola na ndako epai boye mpe epai kuna; nsima na yango, amataki mpe agunzamaki likoló na ye. Mpe mwana yango asalaki likise, mbala nsambo, nsima na yango mwana afungolaki miso na ye.+ 36  Sikoyo, abengaki Gehazi mpe alobaki boye: “Bengá mwasi oyo Moshuneme.”+ Bongo abengaki ye mpe mwasi yango akɔtaki epai na ye. Na nsima, ye alobaki ete: “Zwá mwana na yo.”+ 37  Mpe akɔtaki mpe akweaki na makolo na ye mpe agumbamelaki ye tii na nse,+ nsima na yango azwaki mwana na ye mpe abimaki.+ 38  Bongo Elisha azongaki na Gilgale,+ mpe nzala+ ezalaki na mokili yango. Lokola bana+ ya basakoli bazalaki kofanda liboso na ye,+ nsukansuka alobaki na mosaleli na ye boye:+ “Tyá nzungu monene ya kolambela mpe lambá bilei mpo na bana ya basakoli.”+ 39  Na yango, moto moko akendaki na esobe kobuka ndunda,+ mpe amonaki nzete moko ya vinyo ya zamba mpe abukaki mabɔkɛ ya zamba kuna, atondisi elamba na ye, mpe na nsima, ayaki mpe akatakataki yango na nzungu yango ya kotɔkisela biloko, mpo bayebaki yango te. 40  Na nsima, basopaki yango mpo bato bálya. Mpe esalemaki boye: ntango kaka balyaki bilei yango, bagangaki mpe babandaki koloba boye: “Ee moto ya Nzambe ya solo,+ liwa ezali na kati ya nzungu.”+ Mpe bakokaki kolya yango te. 41  Bongo ye alobaki ete: “Bóya na farini.” Nsima ya kobwaka yango na kati ya nzungu, alobaki lisusu boye: “Sopelá bato, bálya.” Mpe eloko ya mabe ezalaki lisusu te na kati ya nzungu yango.+ 42  Mpe ezalaki na moto moko oyo autaki na Baala-shalisha,+ mpe ayaki, amemeli+ moto ya Nzambe ya solo mampa ya mbuma ya liboso oyo eteli,+ mampa ntuku mibale (20) ya ɔrje,+ mpe mbuma ya sika na kati ya saki na ye ya mampa. Bongo alobaki boye: “Pesá yango bato, bálya.”+ 43  Kasi mosaleli na ye alobaki ete: “Ndenge nini nakotya yango liboso ya bato nkama moko (100)?”+ Na yango, ye alobaki boye: “Pesá yango bato, bálya, mpo talá oyo Yehova alobi: ‘Bakolya mpe biloko mosusu ekotikala.’”+ 44  Bongo atyaki yango liboso na bango, mpe babandaki kolya, mpe biloko mosusu etikalaki, ndenge Yehova alobaki.+

Maloba na nse