2 Bakonzi 3:1-27
3 Bongo Yehorame+ mwana ya Ahaba akómaki mokonzi ya Yisraele na Samaria na mbula ya zomi na mwambe ya Yehoshafate mokonzi ya Yuda, mpe ayangelaki mbula zomi na mibale.
2 Mpe azalaki se kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova,+ nde lokola tata na ye+ to mama na ye te, kasi alongolaki likonzí ya losambo+ ya Baala oyo tata na ye asalaki.+
3 Likambo moko kaka, akangamaki na masumu ya Yeroboame+ mwana ya Nebate, masumu oyo atindaki Yisraele básala.+ Alongwaki na yango te.
4 Mesha+ mokonzi ya Moabe akómaki mobɔkɔli-bampate, mpe azalaki kofuta mokonzi ya Yisraele bana-mpate nkóto nkama moko (100 000) mpe bampate-mibali nkóto nkama moko oyo bakatá nsuki te.
5 Mpe esalemaki boye: ntango kaka Ahaba akufi,+ mokonzi ya Moabe abandaki kotombokela+ mokonzi ya Yisraele.
6 Na yango, Mokonzi Yehorame abimaki na mokolo yango na Samaria mpe ayanganisaki+ Yisraele mobimba.
7 Lisusu, atindaki bato epai ya Yehoshafate mokonzi ya Yuda na maloba oyo: “Mokonzi ya Moabe atombokeli ngai. Okokende na etumba elongo na ngai na Moabe?” Bongo ye alobaki boye: “Nakokende.+ Ngai nazali yo; bato na ngai bato na yo;+ bampunda na ngai bampunda na yo.”
8 Alobaki lisusu boye: “Na nzela nini mpenza tokomata?” Bongo alobaki ete: “Na nzela ya esobe ya Edome.”+
9 Bongo mokonzi ya Yisraele, mokonzi ya Yuda ná mokonzi ya Edome+ bakendaki, mpe babalukaki na nzela ya pembenipembeni mikolo nsambo, kasi mai mpo na kaa mpe mpo na banyama ya mboka oyo ezalaki kolanda matambe na bango ezalaki kozwama te.
10 Nsukansuka, mokonzi ya Yisraele alobaki boye: “Oyo nde mawa, ndenge Yehova abengisi bakonzi oyo misato mpo na kopesa bango na lobɔkɔ ya Moabe!”+
11 Na yango, Yehoshafate alobaki ete:+ “Mosakoli moko ya Yehova azali awa te?+ Boye tótuna Yehova na nzela na ye.”+ Bongo mosaleli moko ya mokonzi ya Yisraele ayanolaki mpe alobaki ete: “Elisha+ mwana ya Shafate, oyo azalaki kosopela Eliya mai na mabɔkɔ azali awa.”+
12 Bongo Yehoshafate alobaki boye: “Liloba ya Yehova ezali elongo na ye.” Na yango, mokonzi ya Yisraele, Yehoshafate ná mokonzi ya Edome bakitaki epai na ye.
13 Mpe Elisha alobaki na mokonzi ya Yisraele boye: “Ngai na yo likambo nini?+ Kende epai ya basakoli+ ya tata na yo mpe epai ya basakoli ya mama na yo.” Kasi mokonzi ya Yisraele alobaki na ye ete: “Te, mpo Yehova abengisi bakonzi oyo misato mpo na kopesa bango na lobɔkɔ ya Moabe.”+
14 Na yango, Elisha alobaki boye: “Lokola Yehova ya mampinga oyo natɛlɛmi* liboso na ye azali solo na bomoi,+ soki ezalaka mpo na Yehoshafate mokonzi ya Yuda te,+ mbɛlɛ natali yo ata kotala te, mbɛlɛ namoni yo ata komona te.+
15 Sikoyo, bómemela ngai mobɛti moko ya ebɛtɛlo ya bansinga.”+ Mpe esalemaki boye: ntango kaka mobɛti ya ebɛtɛlo ya bansinga abɛtaki yango, lobɔkɔ+ ya Yehova ekitelaki ye.
16 Mpe alobaki lisusu boye: “Talá oyo Yehova alobi: ‘Bákómisa lobwaku ya mokɛli oyo mabulu na mabulu;+
17 mpo talá oyo Yehova alobi: “Bokomona mopɛpɛ te, mpe bokomona mbula makasi te; atako bongo lobwaku ya mokɛli yango ekotonda na mai,+ mpe bokomɛla yango mpenza,+ bino, bibwɛlɛ na bino ná banyama na bino ya mboka.”’
18 Mpe yango ekozala mpenza likambo moke na miso ya Yehova,+ mpe akopesa mpenza Moabe na lobɔkɔ na bino.+
19 Mpe bosengeli koboma engumba nyonso oyo ebatelami makasi+ mpe engumba nyonso ya kitoko mingi; bokokweisa+ nzete nyonso ya malamu;+ bokozipa maziba nyonso ya mai, mpe eteni nyonso ya mabele oyo ezali malamu, bokobebisa yango na mabanga.”
20 Mpe esalemaki boye: na ntɔngɔ,+ na ntango ya kopesa likabo ya mbuma,+ talá! mai ezalaki kouta na ngámbo ya Edome, mpe mokili etondaki na mai.
21 Nzokande Bamoabe nyonso bayokaki ete bakonzi yango bamati kobunda na bango. Na yango, bayanganisaki mibali nyonso banda na baoyo bakómaki na mbula ya kokanga mokaba+ na loketo, tii na likoló, mpe batɛlɛmaki na ndelo.
22 Ntango balamukaki ntɔngɔntɔngɔ, moi engɛngaki likoló ya mai, bongo Bamoabe, na ngámbo mosusu, bamonaki mai motane lokola makila.
23 Mpe babandaki koloba boye: “Oyo makila! Babomi mpenza bakonzi yango na mopanga, mpe babomani. Bongo sikoyo, kende kopunza,+ Ee Moabe!”
24 Ntango bakɔtaki na kaa ya Yisraele, na mbala moko Bayisraele+ batɛlɛmaki mpe babandaki koboma Bamoabe, bongo bakimaki liboso na bango.+ Bongo bakɔtaki na Moabe mpe bazalaki kobomaboma Bamoabe ntango bazalaki koya.
25 Mpe bazalaki kokweisa bingumba;+ bazalaki kobwaka moto na moto libanga na ye na eteni nyonso ya mabele oyo ezalaki malamu mpe kotondisa yango mpenza; bazalaki kozipa liziba nyonso ya mai+ mpe bazalaki kokweisa nzete nyonso ya malamu,+ tii batikaki na Kire-haresete+ kaka mabanga na yango; mpe bato oyo bazalaki kosalela bilingongo babandaki kobaluka zingazinga na yango mpe kokweisa yango.
26 Ntango mokonzi ya Moabe amonaki ete etumba ekómeli ye ndongo, na mbala moko, azwaki bato nkama nsambo (700) oyo babendaka mopanga bápasola nzela epai mokonzi ya Edome+ azalaki; kasi bakokaki te.
27 Nsukansuka, azwaki mwana na ye ya mobali ya liboso, oyo asengelaki koyangela na esika na ye, mpe akabaki+ ye mbeka ya kotumba likoló ya efelo. Mpe bayokelaki Yisraele nkanda monene, bongo balongwaki mpe batikaki kobunda na ye mpe bazongaki na mokili na bango.
Maloba na nse
^ To, “oyo nazali kosalela.”