2 Bakonzi 25:1-30
25 Mpe esalemaki boye: na mbula ya libwa+ banda akómaki mokonzi, na sanza ya zomi, na mokolo ya zomi+ ya sanza yango, Nebukadenezare+ mokonzi ya Babilone ayaki,+ ɛɛ, ye ná limpinga mobimba ya basoda na ye, kobundisa Yerusaleme, mpe abandaki kotya kaa mpo na kobundisa yango mpe kotonga efelo ya kozinga mboka epai na epai.+
2 Mpe bazingaki engumba tii na mbula ya zomi na moko ya Mokonzi Zidikiya.
3 Na mokolo ya libwa+ ya sanza ya minei, nzala+ ezalaki makasi na engumba, mpe bato ya mokili bazalaki na mampa+ te.
4 Mpe batɔbɔlaki efelo ya engumba,+ mpe mibali nyonso ya etumba bakimaki butubutu na nzela ya porte kati na bifelo mibale oyo ezali pene na elanga ya mokonzi,+ wana Bakaladea+ bazalaki zingazinga mpo na kobundisa engumba; mpe mokonzi abandaki kokende+ na ngámbo ya Araba.+
5 Mpe limpinga moko ya basoda ya Bakaladea+ balandaki mokonzi, mpe bakangaki ye+ na mokili patatalu oyo ekauká ya Yeriko;+ mpe limpinga mobimba ya basoda na ye bapanzanaki, batiki ye.
6 Na nsima, bakangaki mokonzi+ mpe bamemaki ye epai ya mokonzi ya Babilone, na Ribla,+ mpo bákata likambo na ye.
7 Mpe babomaki bana ya Zidikiya na miso na ye,+ mpe atɔbɔlaki miso+ ya Zidikiya, nsima na yango, akangaki ye na bikangeli ya motako+ mpe amemaki ye na Babilone.+
8 Mpe na sanza ya mitano, na mokolo ya nsambo ya sanza yango, elingi koloba na mbula ya zomi na libwa+ ya Mokonzi Nebukadenezare mokonzi ya Babilone, Nebuzaradane+ mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi, mosaleli ya mokonzi ya Babilone, ayaki na Yerusaleme.+
9 Mpe atumbaki ndako ya Yehova,+ ndako ya mokonzi+ mpe bandako nyonso ya Yerusaleme;+ mpe atumbaki ndako ya moto monene nyonso na mɔtɔ.+
10 Mpe limpinga mobimba ya basoda ya Bakaladea oyo bazalaki elongo na mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi babukaki bifelo ya Yerusaleme, oyo ezingi yango epai na epai.+
11 Mpe bato mosusu,+ baoyo batikalaki na engumba mpe bato oyo bakimaki epai ya mokonzi ya Babilone mpe ebele ya bato oyo batikalaki, Nebuzaradane mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi amemaki bango na mboka mopaya.+
12 Mpe bato mosusu kati na bato mpamba+ ya mokili, mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi atikaki bango bázala basali-bilanga ya vinyo mpe bato oyo bazali kotindama na makasi na mosala.+
13 Mpe makonzí+ ya motako oyo ezalaki na ndako ya Yehova, mpe bashario+ mpe mbu+ ya motako oyo ezalaki na ndako ya Yehova, Bakaladea babukabukaki yango mpe bamemaki motako na yango na Babilone.+
14 Mpe bazwaki bambɛki, bapau, biloko ya koboma mɔtɔ, bakɔpɔ ná bisaleli+ nyonso ya motako oyo bazalaki kosalela na mosala.
15 Mpe mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi azwaki biloko ya kotya mɔtɔ mpe mabakuli ya wolo+ ya solosolo mpe ya palata+ ya solosolo.
16 Nzokande makonzí mibale, mbu wana moko mpe bashario oyo Salomo asalaki mpo na ndako ya Yehova, kilo ya motako ya bisaleli yango nyonso ekokaki koyebana te.+
17 Likonzí mokomoko ezalaki na bolai ya mapeko zomi na mwambe,+ mpe motó+ oyo ezalaki likoló na yango ezalaki ya motako; mpe bolai ya motó yango ezalaki mapeko misato; mpe eloko oyo basalá lokola monyama mpe bambuma ya grenade+ likoló ya motó, ezingi yango, nyonso wana ezalaki ya motako; mpe likonzí ya mibale ezalaki na biloko ndenge moko na oyo wana, likoló ya eloko oyo basalá lokola monyama.
18 Lisusu, mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi azwaki Seraya+ nganga-nzambe mokonzi, Sefania+ nganga-nzambe ya mibale ná bakɛngɛli misato ya baporte;+
19 mpe azwaki na engumba kapita moko ya ndako ya mokonzi oyo azalaki kopesa mibali ya etumba mitindo, mpe mibali mitano kati na baoyo bazalaki kokɔta epai ya mokonzi, baoyo bamonanaki na engumba; mpe sɛkrɛtɛrɛ ya mokonzi ya basoda, ye oyo azalaki koyanganisa bato ya mokili, mpe bato ntuku motoba (60) kati na bato ya mokili oyo bamonanaki na engumba;+
20 mpe na nsima, Nebuzaradane+ mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi azwaki bango+ mpe amemaki bango epai ya mokonzi ya Babilone na Ribla.+
21 Mpe mokonzi ya Babilone abɛtaki+ bango mpe abomaki bango na Ribla, na mokili ya Hamate.+ Ndenge wana nde Yuda elongwaki na mabele na yango ekei mboka mopaya.+
22 Bato+ oyo batikalaki na mokili ya Yuda, baoyo Nebukadenezare mokonzi ya Babilone atikaki, atyaki likoló na bango Gedalia+ mwana ya Ahikame+ mwana ya Shafane.+
23 Ntango bakonzi nyonso ya mampinga ya basoda,+ bango ná bato na bango, bayokaki ete mokonzi ya Babilone atye Gedalia, na mbala moko bayaki epai ya Gedalia, na Mizipa;+ ezalaki Yishimaele mwana ya Netania, Yohanane mwana ya Karea, Seraya mwana ya Tanumete Monetofa mpe Yaazania mwana ya Momaakate, bango ná bato na bango.
24 Na nsima, Gedalia alapelaki bango mpe bato na bango ndai+ mpe alobaki na bango boye: “Bóbanga kozala basaleli ya Bakaladea te. Bófanda na mokili mpe bósalela mokonzi ya Babilone, mpe makambo na bino ekotambola malamu.”+
25 Mpe esalemaki boye: na sanza ya nsambo,+ Yishimaele+ mwana ya Netania mwana ya Elishama ya libota ya mokonzi ayaki, ná bato zomi elongo na ye, mpe babɛtaki Gedalia,+ bongo akufaki, ná Bayuda ná Bakaladea oyo bazalaki elongo na ye na Mizipa.+
26 Nsima na yango, bato nyonso, banda na moto moke tii na moto monene, mpe bakonzi ya mampinga ya basoda batɛlɛmaki mpe bakɔtaki na Ezipito;+ mpo babangaki Bakaladea.+
27 Mpe esalemaki boye: na mbula ya ntuku misato na nsambo (37) ya komemama ya Yehoyakine+ mokonzi ya Yuda na mboka mopaya, na sanza ya zomi na mibale, na mokolo ya ntuku mibale na nsambo (27) ya sanza yango, Evile-merodake+ mokonzi ya Babilone, na mbula oyo akómaki mokonzi, atombolaki motó+ ya Yehoyakine mokonzi ya Yuda mpe abimisaki ye na ndako ya bolɔkɔ;
28 mpe abandaki koloba na ye makambo ya malamu, mpe na nsima, atombolaki kiti na ye ya bokonzi koleka bakiti ya bakonzi oyo bazalaki elongo na ye na Babilone.+
29 Mpe alongolaki bilamba na ye ya bolɔkɔ;+ mpe azalaki kolya limpa+ ntango nyonso liboso na ye, mikolo nyonso ya bomoi na ye.
30 Mpo na pɔsɔ+ na ye, bazalaki kopesa ye ntango nyonso pɔsɔ oyo ezalaki kouta epai ya mokonzi, mokolo na mokolo, ndenge esengeli, mikolo nyonso ya bomoi na ye.