2 Bakonzi 24:1-20

24  Na mikolo na ye, Nebukadenezare+ mokonzi ya Babilone amataki, bongo Yehoyakime akómaki mosaleli na ye+ mbula misato. Kasi abalukelaki ye mpe atombokelaki ye.  Mpe Yehova abandaki kotindela ye bituluku ya bapunzi ya Bakaladea,+ bituluku ya bapunzi ya bato ya Siri, bituluku ya bapunzi ya Bamoabe+ mpe bituluku ya bapunzi ya Baamone; mpe azalaki kotinda bango na Yuda mpo bábebisa yango, na kolanda liloba oyo Yehova alobaki+ na nzela ya basaleli na ye basakoli.  Kaka na etinda ya Yehova nde likambo yango ekómelaki Yuda, mpo alongola+ yango na miso na ye mpo na masumu ya Manase,+ na kolanda nyonso oyo ye asalaki;  mpe lisusu mpo na makila ya moto oyo azali na likambo te+ oyo ye asopaki, bongo atondisaki Yerusaleme na makila ya bato oyo bazali na likambo te, mpe Yehova andimaki kolimbisa te.+  Makambo mosusu ya Yehoyakime+ mpe nyonso oyo asalaki ekomami te na buku+ ya makambo ya mikolo ya bakonzi ya Yuda?  Nsukansuka, Yehoyakime alalaki esika moko na bankɔkɔ na ye,+ mpe mwana na ye Yehoyakine abandaki koyangela na esika na ye.  Mpe mokonzi ya Ezipito abimaki lisusu ata mokolo moko te+ na mokili na ye,+ mpo mokonzi ya Babilone azwaki nyonso oyo ezalaki ya mokonzi ya Ezipito,+ banda na lobwaku ya mokɛli+ ya Ezipito tii na ebale Efrate.+  Yehoyakine+ azalaki na mbula zomi na mwambe ntango abandaki koyangela, mpe ayangelaki sanza misato na Yerusaleme.+ Mpe nkombo ya mama na ye Nehushita mwana ya Elenatane ya Yerusaleme.  Mpe akobaki kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova, na kolanda nyonso oyo tata na ye asalaki.+ 10  Na ntango yango, basaleli ya Nebukadenezare mokonzi ya Babilone bamataki na Yerusaleme, bongo bazingaki engumba.+ 11  Mpe Nebukadenezare mokonzi ya Babilone ayaki kobundisa engumba yango, wana basaleli na ye bazalaki kozinga yango.+ 12  Nsukansuka, Yehoyakine mokonzi ya Yuda abimaki epai ya mokonzi ya Babilone,+ ye ná mama na ye,+ ná basaleli na ye, bankumu na ye ná bakapita ya ndako na ye; mpe mokonzi ya Babilone azwaki ye na mbula ya mwambe+ banda akómaki mokonzi. 13  Na nsima, abimisaki wana biloko nyonso ya motuya ya ndako ya Yehova mpe biloko ya motuya ya ndako ya mokonzi,+ mpe akatakataki bisaleli nyonso ya wolo+ oyo Salomo mokonzi ya Yisraele asalaki na tempelo ya Yehova, ndenge Yehova alobaki. 14  Mpe amemaki na mboka mopaya+ Yerusaleme mobimba ná bankumu+ nyonso ná bilombe nyonso mpe mibali ya nguya+—amemaki bato nkóto zomi (10 000) na mboka mopaya—mpe lisusu moto nyonso oyo ayebi malamu misala ya mabɔkɔ+ ná motongi nyonso ya bifelo ya makasi ya libateli. Ata moto moko te atikalaki, longola kaka bato mpamba+ kati na bato ya mokili. 15  Bongo amemaki Yehoyakine+ na mboka mopaya, na Babilone;+ mpe amemaki mama ya mokonzi,+ basi ya mokonzi, bakapita ya ndako+ na ye mpe bato minene ya mokili, alongolaki bango na Yerusaleme akei na bango na mboka mopaya, na Babilone. 16  Mpe bilombe nyonso, bato nkóto nsambo (7 000), bato oyo bayebi malamu misala ya mabɔkɔ ná batongi ya bifelo ya makasi ya libateli, bato nkóto moko (1 000), mibali nyonso ya nguya oyo babundaka etumba, mokonzi ya Babilone amemaki bango na mboka mopaya, na Babilone.+ 17  Lisusu, mokonzi ya Babilone+ akómisaki Matania, ndeko ya tata na ye,+ mokonzi na esika na ye. Na nsima, apesaki ye nkombo mosusu: Zidikiya.+ 18  Zidikiya+ azalaki na mbula ntuku mibale na moko (21) ntango abandaki koyangela, mpe ayangelaki mbula zomi na moko na Yerusaleme. Mpe nkombo ya mama na ye Hamutale+ mwana ya Yirimia ya Libina. 19  Mpe akobaki kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova, na kolanda nyonso oyo Yehoyakime asalaki.+ 20  Mpamba te, mpo na nkanda+ ya Yehova, likambo yango esalemaki na Yerusaleme mpe na Yuda, tii alongolaki bango na miso na ye.+ Mpe Zidikiya abandaki kotombokela mokonzi ya Babilone.+

Maloba na nse