2 Bakonzi 23:1-37

23  Na nsima, mokonzi atindaki bato mpe bayanganisaki epai na ye mikóló nyonso ya Yuda mpe Yerusaleme.+  Nsima na yango, mokonzi amataki na ndako ya Yehova, ná mikóló nyonso ya Yuda mpe bato nyonso ya Yerusaleme elongo na ye, ná banganga-nzambe,+ basakoli ná bato nyonso, banda na moto moke tii na moto monene;+ mpe abandaki kotánga+ na matoi na bango maloba nyonso ya buku+ ya kondimana+ oyo ezwamaki na ndako ya Yehova.+  Mpe mokonzi atɛlɛmaki kaka pene na likonzí,+ mpe sikoyo asalaki kondimana+ liboso ya Yehova, mpo bálanda+ Yehova mpe bátosa mitindo+ na ye, matatoli+ na ye ná malako+ na ye na motema+ mobimba mpe na molimo+ mobimba mpo na kokokisa maloba ya kondimana yango, oyo ekomami na buku yango.+ Bongo bato nyonso bandimaki kondimana yango.+  Mpe mokonzi atindaki lisusu nganga-nzambe monene Hilikiya+ mpe banganga-nzambe oyo balandi ye mpe bakɛngɛli ya baporte+ bábimisa na tempelo ya Yehova bisaleli nyonso oyo basalelá Baala,+ nzete ya losambo+ mpe limpinga nyonso ya likoló.+ Na nsima, atumbaki yango libándá ya Yerusaleme na mikala ya bilanga ya lobwaku ya Kidrone+ mpe akendaki na putulu na yango na Betele.+  Mpe alongolaki banganga-nzambe ya banzambe-bapaya, oyo bakonzi ya Yuda batyaki mpo bábimisaka milinga ya mbeka na bisika oyo etombwaná na kati ya bingumba ya Yuda mpe na bisika oyo ezali zingazinga ya Yerusaleme, ná baoyo bazalaki kobimisela Baala+ milinga ya mbeka, mpo na moi mpe mpo na sanza mpe mpo na maboke ya minzoto ya zodiake mpe mpo na limpinga nyonso ya likoló.+  Lisusu, abimisaki na ndako ya Yehova nzete ya losambo+ mpe amemaki yango libándá ya Yerusaleme, na lobwaku ya mokɛli ya Kidrone, mpe atumbaki yango+ na lobwaku ya mokɛli ya Kidrone mpe atutatutaki yango tii ekómaki putulu mpe abwakaki putulu yango likoló ya lilita+ ya bana ya bato.  Lisusu, akweisaki bandako ya mibali oyo bazali bandumba+ ya tempelo na ndako ya Yehova, esika basi bazalaki kotongela nzete ya losambo bahema mike.  Na nsima, azwaki banga-nga-nzambe nyonso na bingumba ya Yuda mpe ayaki na bango, mpo akómisa bisika oyo etombwaná epai banganga-nzambe babimisaki milinga ya mbeka bisika oyo ebongi te na losambo, banda na Geba+ kino na Beere-sheba;+ mpe akweisaki bisika oyo etombwaná ya baporte oyo ezalaki na esika ya kokɔta na porte ya Yosua, kapita ya engumba, oyo ezalaki na lobɔkɔ ya mwasi ntango moto azali kokɔta na porte ya engumba.  Kasi banganga-nzambe+ ya bisika oyo etombwaná bazalaki koya te na etumbelo ya Yehova na Yerusaleme, kasi bazalaki kolya bagato oyo ezangi levire+ elongo na bandeko na bango. 10  Mpe akómisaki Tofete,+ oyo ezali na lobwaku ya bana ya Hinome,+ esika oyo ebongi te na losambo, mpo moto moko te alekisa mwana na ye ya mobali to mwana na ye ya mwasi mbeka na mɔtɔ+ mpo na Moleke.+ 11  Lisusu, apekisaki ete bampunda oyo bakonzi ya Yuda bapesaki moi ekɔta lisusu te na ndako ya Yehova na nzela ya esika ya kolya+ ya Natane-meleke, kapita ya ndako ya mokonzi, oyo ezalaki na baveranda; mpe atumbaki makalo ya moi+ na mɔtɔ. 12  Mpe bitumbelo oyo ezalaki likoló ya nsamba ya shambrɛ ya likoló+ ya Ahaze, oyo bakonzi ya Yuda basalaki, mpe bitumbelo+ oyo Manase asalaki na mapango mibale ya ndako ya Yehova, mokonzi akweisaki yango, nsima na yango, atutatutaki yango kuna, mpe abwakaki putulu na yango na lobwaku ya mokɛli ya Kidrone. 13  Mpe bisika oyo etombwaná oyo ezalaki kotalana+ na Yerusaleme, oyo ezalaki na lobɔkɔ ya mobali ya Ngomba ya Libebi, oyo Salomo+ mokonzi ya Yisraele atongelaki Ashitorete+ eloko ya bosɔtɔ ya Basidone, Kemoshe+ eloko ya bosɔtɔ ya Moabe, mpe Milikome+ eloko oyo eyinamá ya bana ya Amone, mokonzi akómisaki yango bisika oyo ebongi te na losambo. 14  Mpe abukabukaki+ makonzí ya losambo mpe lisusu akataki banzete ya losambo, mpe atondisaki bisika na yango na mikuwa ya bato. 15  Mpe lisusu, etumbelo oyo ezalaki na Betele,+ esika oyo etombwaná oyo Yeroboame+ mwana ya Nebate asalaki, ye oyo atindaki Yisraele básala lisumu,+ ata etumbelo yango ná esika oyo etombwaná, abukaki yango. Na nsima, atumbaki esika yango oyo etombwaná; atutatutaki yango tii ekómaki putulu mpe atumbaki nzete yango ya losambo. 16  Ntango Yosiya abalukaki, amonaki malita oyo ezalaki wana na ngomba. Bongo atindaki bato bázwa mikuwa na malita yango mpe atumbaki+ yango likoló ya etumbelo yango, mpo akómisa yango esika oyo ebongi te na losambo, na kolanda liloba ya Yehova+ oyo moto ya Nzambe ya solo asakolaki,+ ye oyo asakolaki makambo yango. 17  Na nsima alobaki ete: “Libanga ya lilita oyo nazali komona kuna ezali nini?” Bongo bato ya engumba balobaki na ye: “Ezali lilita+ ya moto ya Nzambe ya solo oyo autaki na Yuda+ mpe oyo asakolaki makambo oyo osali etumbelo ya Betele.”+ 18  Bongo alobaki boye: “Bótika ye apema.+ Moto atungisa mikuwa na ye te.” Na yango, batikaki mikuwa na ye elongo na mikuwa ya mosakoli+ oyo autaki na Samaria. 19  Mpe lisusu, Yosiya alongolaki bandako+ nyonso ya bisika oyo etombwaná oyo ezalaki na bingumba+ ya Samaria, oyo bakonzi+ ya Yisraele batongaki mpo na koyokisa nkanda,+ mpe asalelaki yango ndenge moko na misala nyonso oyo asalaki na Betele.+ 20  Na yango, abomaki likoló ya bitumbelo banganga-nzambe+ nyonso ya bisika oyo etombwaná oyo bazalaki wana mpe atumbaki mikuwa ya bato likoló na yango.+ Na nsima, azongaki na Yerusaleme. 21  Bongo mokonzi apesaki bato nyonso mitindo ete: “Bósala elekeli+ mpo na Yehova Nzambe na bino ndenge ekomami na buku oyo ya kondimana.”+ 22  Mpamba te elekeli ya boye naino esalemá te banda mikolo ya basambisi oyo basambisaki Yisraele,+ to na mikolo nyonso ya bakonzi ya Yisraele mpe bakonzi ya Yuda.+ 23  Kasi na mbula ya zomi na mwambe ya Mokonzi Yosiya, elekeli yango esalemaki mpo na Yehova na Yerusaleme.+ 24  Mpe lisusu, bato oyo basololaka na bilimo+ ná bato oyo basalaka mosala ya kosakola makambo oyo ekoya,+ baterafime,+ bikeko ya bosɔtɔ+ ná biloko nyonso ya bosɔtɔ+ oyo ebimaki na mokili ya Yuda mpe na Yerusaleme, Yosiya akɔmbɔlaki yango, mpo na kokokisa mpenza maloba ya mobeko+ oyo ekomamaki na buku+ oyo nganga-nzambe Hilikiya azwaki na ndako ya Yehova.+ 25  Mpe mokonzi moko te azalaki liboso na ye oyo akokanaki na ye, oyo azongelaki+ Yehova na motema na ye mobimba, na molimo+ na ye mobimba mpe na makasi na ye nyonso ya bomoi, na kolanda mobeko nyonso ya Moize; mpe mokonzi moko te abimaki nsima na ye oyo akokanaki na ye. 26  Atako bongo, Yehova atikaki te nkanda na ye makasi ya kongala, oyo engalelaki Yuda+ mpo na makambo ya kosilikisa oyo Manase atindaki bango básilikisa ye.+ 27  Kasi Yehova alobaki ete: “Nakolongola mpe Yuda+ na miso na ngai,+ ndenge nalongolaki Yisraele;+ mpe nakobwaka mpenza engumba oyo naponá, ɛɛ Yerusaleme, mpe ndako oyo nalobá ete: ‘Nkombo na ngai ekozala wana.’”+ 28  Makambo mosusu ya Yosiya mpe nyonso oyo asalaki ekomami te na buku+ ya makambo ya mikolo ya bakonzi ya Yuda? 29  Na mikolo na ye, Farao Neko+ mokonzi ya Ezipito amataki epai ya mokonzi ya Asiri penepene na ebale Efrate,+ mpe Mokonzi Yosiya akendaki kokutana na ye;+ kasi abomaki Yosiya+ na Megido,+ ntango kaka amonaki ye. 30  Na yango, basaleli na ye bamemaki ye ebembe na likalo longwa na Megido mpe bakendaki na ye na Yerusaleme+ mpe bakundaki ye na lilita na ye. Na nsima, bato ya mokili yango bazwaki Yehoahaze+ mwana ya Yosiya mpe batyaki ye mafuta mpe bakómisaki ye mokonzi na esika ya tata na ye. 31  Yehoahaze+ azalaki na mbula ntuku mibale na misato (23) ntango abandaki koyangela, mpe ayangelaki sanza misato na Yerusaleme. Mpe nkombo ya mama na ye Hamutale+ mwana ya Yirimia ya Libina. 32  Mpe abandaki kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova, na kolanda nyonso oyo bankɔkɔ na ye basalaki.+ 33  Mpe Farao Neko+ akangaki ye+ na Ribla+ na mokili ya Hamate, mpo na kopekisa ye ayangela na Yerusaleme, na nsima akatelaki mokili yango lomande+ ya talanta nkama moko (100) ya palata+ mpe talanta moko ya wolo.+ 34  Lisusu, Farao Neko akómisaki Eliakime+ mwana ya Yosiya mokonzi na esika ya tata na ye Yosiya mpe apesaki ye nkombo mosusu: Yehoyakime; mpe azwaki Yehoahaze mpe na nsima, akendaki na ye na Ezipito, mpe nsukansuka, akufaki kuna.+ 35  Mpe Yehoyakime apesaki Farao palata+ ná wolo. Kasi afutisaki mokili mpako,+ mpo na kopesa palata ndenge Farao apesaki mitindo. Afutisaki bato ya mokili palata mpe wolo na kolanda mpako+ ya moto na moto, mpo na kopesa yango Farao Neko. 36  Yehoyakime+ azalaki na mbula ntuku mibale na mitano (25) ntango abandaki koyangela, mpe ayangelaki mbula zomi na moko na Yerusaleme.+ Mpe nkombo ya mama na ye Zebida mwana ya Pedaya moto ya Ruma. 37  Mpe akobaki kosala oyo ezali mabe+ na miso ya Yehova, na kolanda nyonso oyo bankɔkɔ na ye basalaki.+

Maloba na nse