2 Bakonzi 22:1-20
22 Yosiya+ azalaki na mbula mwambe ntango abandaki koyangela, mpe ayangelaki mbula ntuku misato na moko (31) na Yerusaleme. Mpe nkombo ya mama na ye Yedida mwana ya Adaya moto ya Bozekate.+
2 Mpe asalaki oyo ezali sembo na miso ya Yehova+ mpe atambolaki na nzela nyonso ya nkɔkɔ na ye Davidi,+ mpe apɛngwaki te na lobɔkɔ ya mobali to na lobɔkɔ ya mwasi.+
3 Mpe esalemaki boye: na mbula ya zomi na mwambe ya Mokonzi Yosiya, mokonzi atindaki Shafane+ mwana ya Azaliya mwana ya Meshulame oyo azalaki sɛkrɛtɛrɛ, na ndako ya Yehova mpe alobaki:
4 “Kende epai ya nganga-nzambe monene+ Hilikiya,+ mpe asangisa mbongo+ nyonso oyo bazali koya na yango na ndako ya Yehova,+ oyo bakɛngɛli ya baporte+ bazwi epai ya bato;
5 mpe bátya yango na lobɔkɔ ya baoyo bazali kosala mosala,+ bato oyo batyamá, na ndako ya Yehova, mpo bápesa yango bato oyo bazali kosala mosala, baoyo bazali na ndako ya Yehova mpo na kobongisa bisika oyo esali minkaka na bifelo ya ndako,+
6 bato oyo bayebi malamu misala ya mabɔkɔ, batongi, bamasɔ, mpe mpo na kosomba banzete ná mabanga oyo bakatá mpo na kobongisa ndako.+
7 Kasi basengeli te kotuna bango ndenge bazali kosalela mbongo oyo ezali kotyama na lobɔkɔ na bango,+ mpo bazali kosala mosala na bosembo.”+
8 Na nsima, nganga-nzambe monene Hilikiya+ alobaki na Shafane+ oyo azalaki sɛkrɛtɛrɛ+ ete: “Nazwi buku mpenza ya mobeko+ na ndako ya Yehova.” Bongo Hilikiya apesaki Shafane buku yango, mpe ye abandaki kotánga yango.
9 Na nsima Shafane oyo azalaki sɛkrɛtɛrɛ akɔtaki epai ya mokonzi mpe apesaki mokonzi eyano mpe alobaki boye: “Basaleli na yo babimisi mbongo oyo ezwamaki na ndako, mpe bazali kotya yango na lobɔkɔ ya basali ya mosala, baoyo batyamá, na ndako ya Yehova.”+
10 Mpe Shafane oyo azalaki sɛkrɛtɛrɛ ayebisaki mokonzi lisusu boye: “Nganga-nzambe Hilikiya apesi ngai buku+ moko.” Mpe Shafane abandaki kotánga yango liboso ya mokonzi.
11 Mpe esalemaki boye: ntango kaka mokonzi ayokaki maloba ya buku yango ya mobeko, na mbala moko apasolaki bilamba na ye.+
12 Na nsima, mokonzi apesaki mitindo na nganga-nzambe Hilikiya, na Ahikame+ mwana ya Shafane, na Akabore mwana ya Mikaya, ná Shafane oyo azalaki sɛkrɛtɛrɛ mpe na Asaya+ mosaleli ya mokonzi ete:
13 “Bókende, bótuna+ Yehova mpo na ngai mpe mpo na bato mpe mpo na Yuda mobimba na ntina etali maloba ya buku oyo bamoni; mpamba te nkanda makasi ya Yehova+ oyo epeleli biso ezali monene, mpo bankɔkɔ na biso+ bayokaki maloba ya buku oyo te, mpo básala na kolanda nyonso oyo ekomami mpo na biso.”+
14 Na yango, nganga-nzambe Hilikiya, Ahikame, Akabore, Shafane ná Asaya bakendaki epai ya mosakoli+ Huluda mwasi ya Shalume mwana ya Tikiva mwana ya Harase, mobateli ya bilamba,+ wana mwasi yango azalaki kofanda na Yerusaleme na kartye ya mibale; mpe babandaki koloba na ye.+
15 Bongo ye alobaki na bango boye: “Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi:+ ‘Bóyebisa mobali oyo atindi bino epai na ngai boye:
16 “Talá oyo Yehova alobi: ‘Talá, nazali koyeisa mpasi+ na esika oyo mpe na bato oyo bafandi wana,+ ɛɛ, maloba+ nyonso ya buku oyo mokonzi ya Yuda atángi;+
17 mpamba te batiki ngai mpe bakei kobimisela banzambe+ mosusu milinga ya mbeka mpo na kosilikisa ngai na misala nyonso ya mabɔkɔ na bango,+ mpe nkanda na ngai epeleli esika oyo lokola mɔtɔ oyo ekobomama te.’”’+
18 Mpe mpo na mokonzi ya Yuda oyo atindi bino mpo na kotuna Yehova, talá oyo bokoyebisa ye: ‘Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: “Mpo na maloba oyo oyoki,+
19 lokola motema+ na yo ezalaki makasi te mpe omikitisi+ liboso ya Yehova ntango oyoki makambo oyo nalobeli esika oyo mpe bato oyo bafandi wana, ete ekokóma eloko ya kokamwa mpe elakeli mabe,+ mpe lokola opasoli+ bilamba na yo mpe obandi kolela liboso na ngai, ngai, ɛɛ ngai, nayoki,” yango nde liloba ya Yehova.+
20 “Yango wana, talá, nazali koyanganisa+ yo na bankɔkɔ na yo, mpe ya solo okoyanganisama na malita na yo na kimya,+ mpe miso na yo ekomona te mpasi oyo nazali koyeisa na esika oyo.”’” Mpe bamemelaki mokonzi eyano.