2 Bakonzi 21:1-26

21  Manase+ azalaki na mbula zomi na mibale ntango abandaki koyangela, mpe ayangelaki mbula ntuku mitano na mitano (55) na Yerusaleme. Mpe nkombo ya mama na ye Hefiziba.  Mpe asalaki oyo ezali mabe na miso ya Yehova,+ na kolanda makambo oyo eyinamá ya bikólo+ oyo Yehova abenganaki liboso ya bana ya Yisraele.  Bongo atongaki lisusu bisika oyo etombwaná oyo tata na ye Hizikiya abebisaki,+ mpe atɛlɛmiselaki Baala bitumbelo mpe asalaki nzete ya losambo, ndenge Ahaba+ mokonzi ya Yisraele asalaki; mpe abandaki kogumbamela+ limpinga nyonso ya likoló+ mpe kosalela yango.+  Mpe atongaki bitumbelo na ndako ya Yehova,+ oyo Yehova alobaki mpo na yango ete: “Nakotya nkombo na ngai na Yerusaleme.”+  Mpe lisusu atongelaki limpinga nyonso ya likoló+ bitumbelo na mapango mibale ya ndako ya Yehova.+  Mpe alekisaki mwana na ye mbeka na mɔtɔ,+ asalaki misala ya maji,+ alukaki bilembo ya makambo oyo ekoya mpe atyaki bato oyo basololaka na bilimo+ ná bato oyo basalaka mosala ya kosakola makambo oyo ekoya.+ Asalaki makambo mingi mpenza ya mabe na miso ya Yehova, mpo na kosilikisa ye.  Lisusu, atyaki ekeko oyo eyemami+ ya nzete ya losambo oyo asalaki na ndako+ oyo Yehova alobaki na Davidi mpe na mwana na ye Salomo ete: “Na ndako oyo mpe na Yerusaleme, oyo naponi kati na mabota nyonso ya Yisraele, nakotya nkombo na ngai mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+  Mpe nakosala lisusu te ete lokolo ya Yisraele eyengayenga mpe elongwa na mabele oyo napesaki bankɔkɔ na bango,+ soki bakebi ete básala na kolanda mitindo nyonso oyo napesaki bango,+ ɛɛ, na kolanda mobeko nyonso oyo mosaleli na ngai Moize apesaki bango.”  Mpe bayokaki te,+ kasi Manase azalaki se kobenda bango na mayele mpo básala mabe+ koleka bikólo+ oyo Yehova asilisaki nyɛɛ liboso ya bana ya Yisraele. 10  Mpe Yehova azalaki se koloba na nzela ya basaleli na ye basakoli+ ete: 11  “Lokola Manase+ mokonzi ya Yuda asali makambo wana oyo eyinamá,+ asali makambo mabe koleka nyonso oyo Baamore+ oyo bazalaki liboso na ye basalaki, kutu atindi Yuda asala lisumu+ na bikeko na ye ya bosɔtɔ. 12  Yango wana, talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Talá, nazali koyeisela Yerusaleme+ ná Yuda mpasi oyo moto soki ayoki, matoi na ye nyonso ekoyoka mpasi.+ 13  Mpe ya solo, nakosembolela Yerusaleme nsinga ya komeka+ oyo basalelaki mpo na komeka Samaria,+ mpe nivo oyo basalelaki mpo na ndako ya Ahaba;+ mpe nakosukola+ mpenza Yerusaleme ndenge moto asukolaka kibakuli oyo ezangá mabɔkɔ, asukoli yango mpe abaloli yango.+ 14  Mpe nakosundola mpenza batikali+ ya libula na ngai+ mpe nakopesa bango na lobɔkɔ ya banguna na bango, mpe bakokóma mpenza biloko ya kopunza mpe ya kobɔtɔla mpo na banguna na bango nyonso,+ 15  mpo basali oyo ezali mabe na miso na ngai mpe bazali kosilikisa ngai banda mokolo oyo bankɔkɔ na bango babimaki na Ezipito tii na mokolo ya lelo.’”+ 16  Mpe longola lisumu oyo atindaki Yuda básala na ndenge bazalaki kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova,+ Manase asopaki lisusu makila mingi mpenza ya bato oyo bazalaki na likambo te,+ kino atondisaki Yerusaleme banda nsuka tii nsuka. 17  Makambo mosusu ya Manase mpe nyonso oyo asalaki mpe lisumu oyo asalaki ekomami te na buku+ ya makambo ya mikolo ya bakonzi ya Yuda? 18  Nsukansuka, Manase alalaki esika moko na bankɔkɔ na ye+ mpe akundamaki na elanga ya ndako na ye, na elanga ya Uza;+ mpe mwana na ye Amone abandaki koyangela na esika na ye. 19  Amone+ azalaki na mbula ntuku mibale na mibale (22) ntango abandaki koyangela, mpe ayangelaki mbula mibale+ na Yerusaleme. Mpe nkombo ya mama na ye Meshulemete mwana ya Haruze moto ya Yoteba. 20  Mpe azalaki kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova, ndenge tata na ye Manase asalaki.+ 21  Mpe azalaki kotambola na banzela nyonso oyo tata na ye atambolaki,+ mpe akobaki kosalela bikeko ya bosɔtɔ+ oyo tata na ye asalelaki mpe akobaki kogumbamela yango. 22  Bongo atikaki Yehova+ Nzambe ya bankɔkɔ na ye, mpe atambolaki na nzela ya Yehova te.+ 23  Nsukansuka, basaleli ya Amone basalelaki ye likita mpe babomaki mokonzi+ na ndako na ye moko. 24  Kasi bato ya mokili babomaki bato nyonso oyo basalelaki Mokonzi Amone likita.+ Na nsima, bato ya mokili bakómisaki mwana na ye Yosiya+ mokonzi na esika na ye. 25  Makambo mosusu oyo Amone asalaki ekomami te na buku+ ya makambo ya mikolo ya bakonzi ya Yuda? 26  Bongo bakundaki ye na lilita na ye, na elanga ya Uza;+ mpe mwana na ye Yosiya+ abandaki koyangela na esika na ye.

Maloba na nse