2 Bakonzi 19:1-37
19 Mpe esalemaki boye: ntango kaka Mokonzi Hizikiya+ ayokaki yango, na mbala moko apasolaki bilamba na ye+ mpe alataki ngɔtɔ+ mpe akɔtaki na ndako ya Yehova.+
2 Lisusu, atindaki Eliakime,+ oyo azalaki kokamba bato ya ndako, Shebena+ oyo azalaki sɛkrɛtɛrɛ ná mikóló ya banganga-nzambe, balati ngɔtɔ bakei epai ya mosakoli Yisaya+ mwana ya Amoze.+
3 Mpe balobaki na ye boye: “Talá oyo Hizikiya alobi: ‘Mokolo oyo ezali mokolo ya mpasi,+ ya mpamela+ mpe ya kotyolama mpenza;+ mpo bana bakómi pene na kobima na libumu,+ kasi makasi ya kobota ezali te.+
4 Mbala mosusu, Yehova Nzambe na yo akoyoka+ maloba nyonso ya Rabashake, oyo nkolo na ye mokonzi ya Asiri atindaki mpo na kotumola+ Nzambe ya bomoi, mpe akosɛnga ye azongisa mpenza monɔkɔ mpo na maloba oyo Yehova Nzambe na yo ayoki.+ Mpe bondelá+ mpo na bato oyo batikali.’”+
5 Na yango, basaleli ya Mokonzi Hizikiya bakɔtaki epai ya Yisaya.+
6 Bongo Yisaya alobaki na bango: “Talá oyo bokoloba na nkolo na bino: ‘Talá oyo Yehova alobi:+ “Kobanga te+ maloba oyo oyoki, oyo basaleli ya mokonzi ya Asiri balobi mpo na kofinga ngai.+
7 Talá nazali kotya elimo+ moko kati na ye, mpe akoyoka nsango+ moko mpe akozonga na mokili na ye; mpe nakokweisa ye mpenza na mopanga na mokili na ye moko.”’”+
8 Nsima na yango, Rabashake+ azongaki mpe akutaki mokonzi ya Asiri azali kobundisa Libina;+ mpo ayokaki ete alongwe na Lakishi.+
9 Ayokaki balobi mpo na Tiraka mokonzi ya Etiopi ete: “Talá abimi kobunda na yo.” Na yango, atindelaki lisusu Hizikiya bamemi-nsango,+ na maloba oyo:
10 “Talá oyo bokoloba na Hizikiya mokonzi ya Yuda: ‘Nzambe na yo oyo ozali kotyela motema akosa yo te+ ete: “Yerusaleme+ ekopesama na lobɔkɔ ya mokonzi ya Asiri te.”+
11 Talá! Yo moko oyoki oyo bakonzi ya Asiri basalaki mikili nyonso, ndenge babebisaki yango;+ bongo yo nde okobika?+
12 Banzambe+ ya bikólo oyo bankɔkɔ na ngai babebisaki, babikisaki nde bikólo yango, ɛɛ, Gozane,+ Harane,+ Rezefe ná bana ya Edene+ oyo bazalaki na Tele-asare?+
13 Wapi mokonzi ya Hamate+ ná mokonzi ya Arpade+ ná mokonzi ya bingumba ya Sefarvaime, Hena ná Iva?’”+
14 Bongo Hizikiya azwaki mikanda na lobɔkɔ ya bamemi-nsango mpe atángaki yango,+ nsima na yango, Hizikiya amataki na ndako ya Yehova mpe atandaki yango liboso ya Yehova.+
15 Mpe Hizikiya abandaki kobondela+ liboso ya Yehova mpe koloba boye: “Ee Yehova Nzambe ya Yisraele,+ oyo ofandi likoló ya bakeruba,+ kaka yo moko nde ozali Nzambe ya solo ya makonzi+ nyonso ya mabele.+ Yo nde osalaki likoló+ ná mabele.+
16 Sembolá litoi na yo, Ee Yehova, mpe yoká.+ Fungolá miso na yo,+ Ee Yehova, mpe talá, mpe yoká maloba oyo Senakeribe atindi mpo na kotumola+ Nzambe ya bomoi.
17 Ya solo, Ee Yehova, bakonzi ya Asiri babebisi bikólo ná mokili na bango.+
18 Mpe bazikisaki banzambe na bango na mɔtɔ, mpo bazali banzambe te,+ kasi mosala ya mabɔkɔ ya moto,+ nzete mpe libanga; bongo babebisaki yango.
19 Mpe sikoyo, Ee Yehova Nzambe na biso,+ tobondeli yo, bikisá biso+ na lobɔkɔ na ye, mpo makonzi nyonso ya mabele báyeba ete kaka yo moko, Ee Yehova, nde ozali Nzambe.”+
20 Mpe Yisaya mwana ya Amoze atindelaki Hizikiya bato, na maloba oyo: “Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi:+ ‘Nayoki+ libondeli+ oyo obondeli ngai mpo na Senakeribe mokonzi ya Asiri.
21 Talá liloba oyo Yehova alobi mpo na ye:“Ngɔndɔ, mwana mwasi ya Siona, atyoli yo,+ asɛki yo.+Mwana mwasi ya Yerusaleme+ aningisi motó+ nsima na yo.
22 Nani oyo otumoli+ mpe ofingi?+Mpe nani oyo otombweli mongongo+ na yoMpe ozali kotombwela miso na likoló?+Mosantu ya Yisraele!+
23 Na nzela ya bamemi-nsango+ na yo, otumoli Yehova mpe ozali koloba ete:+‘Na ebele ya makalo na ngai ya bitumba, ngai moko+—Nakomata mpenza tii na nsɔngɛ ya bitúká ya ngombangomba,+Bansukansuka ya Libá;+Mpe nakokata basɛdrɛ+ na yango ya milai, banzete na yango ya jenevriye+ ya kitoko mingi.Mpe nakokɔta na esika na yango ya kofanda ya nsuka, zamba ya elanga na yango ya banzete ya mbuma.+
24 Ngai moko nakotimola mpenza mpe nakomɛla mai ya mokili ya bapaya,Mpe na makolo na ngai, nakokaukisa banzela nyonso ya mai ya Nile ya Ezipito.’+
25 Oyoká te?+ Banda ntango ya kalakala, yango nde nakosala.+Banda mikolo eleká, nabongisá mokano yango.+Sikoyo nakokokisa yango.+Mpe yo nde okokómisa mpamba bingumba oyo ebatelami makasi, ekokóma lokola mabondo ya bitiká.+
26 Mpe bato na yango bakolɛmba mabɔkɔ;+Bakoyoka mpenza nsɔmɔ mpe bakozala na nsɔni.+Bakokóma mpenza lokola matiti ya esobe mpe lokola matiti ya mobesu ya pɛtɛpɛtɛ,+Lokola matiti oyo ebimaka na nsamba,+ ntango yango ekauki na mopɛpɛ ya ɛsti.+
27 Mpe nayebi malamu+ ntango ofandaka nyɛɛ mpe ntango obimaka+ mpe ntango okɔtaka,Mpe ntango osilikelaka ngai,+
28 Mpamba te kosilika oyo ozali kosilikela ngai+ mpe koganga na yo emati tii na matoi na ngai.+Mpe nakotya mpenza ndɔbɔ na ngai na zolo na yo mpe ebende na ngai ya mbanga kati na mbɛbu na yo,+Mpe nakozongisa yo mpenza na nzela oyo oyei.”+
29 “‘Mpe oyo ekozala elembo mpo na yo:+ Mbula oyo bokolya biloko oyo ekokola, oyo euti na mbuma oyo ekweaki,+ mpe na mbula ya mibale, mbuma oyo ebimi yango moko; kasi na mbula ya misato, bólona milona,+ mpe bóbuka mbuma mpe bólona bilanga ya vinyo mpe bólya mbuma na yango.+
30 Mpe bato ya ndako ya Yuda oyo bakobika, baoyo bakotikala,+ bakobimisa mpenza misisa na nse mpe bakobota mbuma na likoló.+
31 Mpo bato oyo batikali bakobima+ na Yerusaleme, mpe baoyo bakobika bakouta na Ngomba Siona.+ Molende+ ya Yehova ya mampinga nde ekosala yango.
32 “‘Yango wana, talá oyo Yehova alobeli mokonzi ya Asiri:+ “Akokɔta na engumba oyo te,+ akobwakela yango mpe likula te,+ akobunda na yango na nguba mpe te, akotya mpe mwa ngomba ya mabele mpo na kozinga+ yango te.
33 Akozonga na nzela oyo ayaki, kasi akokɔta na engumba oyo te, yango nde liloba ya Yehova.+
34 Mpe nakobatela+ mpenza engumba oyo mpo na kobikisa yango mpo na ngai moko+ mpe mpo na Davidi mosaleli na ngai.”’”+
35 Mpe esalemaki boye: na butu yango, anzelu ya Yehova abimaki mpe abomaki bato nkóto nkama moko na ntuku mwambe na mitano (185 000) na kaa+ ya bato ya Asiri.+ Ntango bato balamukaki na ntɔngɔntɔngɔ, talá, bango nyonso bakufi, balali bibembe.+
36 Bongo Senakeribe+ mokonzi ya Asiri asimbaki nzela akei, azongi+ mpe akómaki kofanda na Ninive.+
37 Mpe esalemaki boye: ntango agumbamaki na ndako ya Nisroke+ nzambe na ye,+ bana na ye ya mibali, Adrameleke ná Sharezere, babomaki ye na mopanga,+ mpe bakimaki na mokili ya Ararate.+ Mpe Esare-hadone+ mwana na ye abandaki koyangela na esika na ye.