2 Bakonzi 17:1-41
17 Na mbula ya zomi na mibale ya Ahaze mokonzi ya Yuda, Hoshea+ mwana ya Ela akómaki mokonzi ya Yisraele na Samaria+ na boumeli ya mbula libwa.
2 Mpe akobaki kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova, kasi lokola bakonzi ya Yisraele oyo bazalaki liboso na ye te.+
3 Shalmanesere+ mokonzi ya Asiri+ amataki mpo na kobunda na ye, mpe Hoshea akómaki mosaleli na ye mpe abandaki kofuta ye mpako.+
4 Kasi mokonzi ya Asiri ayaki koyeba ete Hoshea azali kosalela ye likita,+ na ndenge atindelaki So mokonzi ya Ezipito+ bamemi-nsango mpe ayelaki mokonzi ya Asiri mpako te, lokola na bambula ya kala. Na yango, mokonzi ya Asiri akangisaki ye mpe atikaki ye na ndako ya bolɔkɔ, bakangi ye na bikangeli.+
5 Mpe mokonzi ya Asiri amataki kobundisa mokili yango mobimba mpe amataki na Samaria mpe azingaki+ yango mbula misato.
6 Na mbula ya libwa ya Hoshea, mokonzi ya Asiri azwaki Samaria+ mpe na nsima, amemaki Yisraele na mboka mopaya+ na Asiri mpe afandisaki bango na Hala+ mpe na Habore, pene na ebale Gozane+ mpe na bingumba ya Bamede.+
7 Mpe esalemaki bongo mpo bana ya Yisraele basalelaki Yehova Nzambe na bango lisumu,+ ye oyo abimisaki bango na mokili ya Ezipito na lobɔkɔ ya Farao mokonzi ya Ezipito,+ mpe babandaki kobanga banzambe mosusu;+
8 mpe bazalaki se kotambola na mitinda+ ya bikólo oyo Yehova abenganaki liboso ya bana ya Yisraele, mpe na mitinda oyo bakonzi ya Yisraele basalaki;
9 mpe bana ya Yisraele bakómaki koluka makambo oyo ezali malamu te na miso ya Yehova Nzambe na bango+ mpe bazalaki se komitongela bisika oyo etombwaná+ na kati ya bingumba na bango nyonso, banda na linɔ́ngi+ ya basinzili tii na engumba oyo ebatelami makasi;
10 mpe bazalaki se kotɛlɛmisa makonzí ya losambo+ mpe banzete ya losambo,+ likoló ya ngomba moke+ nyonso oyo etombwaná mpe na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa;+
11 mpe kuna, na bisika nyonso oyo etombwaná, bazalaki se kobimisa milinga ya mbeka lokola bikólo+ oyo Yehova amemaki na mboka mopaya mpo na bango, mpe bazalaki se kosala makambo mabe mpo na kosilikisa+ Yehova;
12 Mpe bazalaki se kosalela bikeko ya bosɔtɔ,+ oyo mpo na yango Yehova alobaki na bango boye: “Bokosala likambo oyo te”;+
13 mpe Yehova azalaki se kokebisa+ Yisraele+ ná Yuda+ na nzela ya basakoli+ na ye nyonso mpe momoni-bimonaneli+ nyonso, ete: “Bóbaluka, bótika banzela na bino ya mabe+ mpe bótosa mitindo+ na ngai, mitinda+ na ngai, na kolanda mobeko+ nyonso oyo napesaki bankɔkɔ+ na bino mpe oyo natindelaki bino na nzela ya basaleli na ngai basakoli”;+
14 mpe bayokaki te kasi bazalaki se kokómisa mitó na bango makasi*+ lokola mitó ya bankɔkɔ na bango oyo bandimelaki+ Yehova Nzambe na bango te;
15 mpe bazalaki koboya malako na ye mpe kondimana+ na ye oyo asalaki ná bankɔkɔ na bango mpe makundoli+ na ye oyo akebisaki bango na yango, mpe bakómaki kolanda bikeko ya mpamba+ mpe bango moko bakómaki mpamba,+ ɛɛ, mpo bamekolaki bikólo oyo ezalaki zingazinga na bango, oyo mpo na yango Yehova apesaki bango mitindo ete básala lokola bango te;+
16 Mpe bazalaki se kotika mibeko+ nyonso ya Yehova Nzambe na bango mpe bamisalelaki bikeko ya ebende oyo enyangwisami,+ bana-ngɔmbɛ mibale,+ mpe basalaki nzete moko ya losambo+ mpe babandaki kogumbamela limpinga nyonso ya likoló+ mpe kosalela Baala;+
17 mpe bazalaki kolekisa bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi mbeka na mɔtɔ+ mpe kosakola makambo oyo ebombaná+ mpe koluka bilembo ya makambo oyo ekoya,+ mpe bazalaki se komitɛka+ mpo na kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova, mpo na kosilikisa+ ye;
18 Na yango, Yehova asilikelaki+ Yisraele makasi, bongo alongolaki bango na miso na ye.+ Atikaki ata moko te, kaka libota ya Yuda yango moko.+
19 Ata Yuda mpe batosaki te mibeko ya Yehova Nzambe na bango,+ kasi bakómaki kotambola na mitinda oyo Yisraele+ bango moko basalaki.
20 Na yango, Yehova abwakaki momboto+ nyonso ya Yisraele mpe azalaki komonisa bango mpasi mpe kopesa bango na lobɔkɔ ya bapunzi, kino abwakaki bango, bálongwa liboso na ye.+
21 Mpo alongolaki Yisraele na ndako ya Davidi, mpe bakómisaki Yeroboame mwana ya Nebate mokonzi; mpe Yeroboame+ apɛngwisaki Yisraele bátika kolanda Yehova, mpe atindaki bango básala lisumu moko monene.+
22 Mpe bana ya Yisraele bakómaki kotambola na masumu nyonso oyo Yeroboame asalaki.+ Balongwaki na yango te,
23 kino Yehova alongolaki Yisraele na miso na ye,+ ndenge alobaki na nzela ya basaleli na ye nyonso, basakoli.+ Na yango, Yisraele elongwaki na mabele na yango ekendá na mboka mopaya na Asiri tii na mokolo ya lelo.+
24 Na nsima, mokonzi ya Asiri amemaki bato ya Babilone,+ ya Kuta, ya Ava,+ ya Hamate+ mpe ya Sefarvaime+ mpe afandisaki bango na bingumba ya Samaria+ na esika ya bana ya Yisraele; mpe babandaki kozwa Samaria mpe kofanda na bingumba na yango.
25 Mpe esalemaki boye: ntango babandaki kofanda kuna, babangaki+ Yehova te. Na yango, Yehova atindaki bankɔsi+ kati na bango, mpe ekómaki koboma bango.
26 Bongo batindelaki mokonzi ya Asiri maloba ete: “Bato ya bikólo oyo omemi bapaya mpe oyo ofandisi na bingumba ya Samaria, bayebi losambo ya Nzambe ya mokili yango te, yango wana azali kotinda bankɔsi kati na bango;+ mpe talá! ezali koboma bango, mpamba te ezali ata na moto moko te oyo ayebi losambo ya Nzambe ya mokili yango.”
27 Bongo mokonzi ya Asiri apesaki mitindo boye: “Bótinda kuna nganga-nzambe+ moko oyo bolongolaki kuna mpe bomemaki na mboka mopaya, mpo akende mpe afanda kuna mpe ateya bango losambo ya Nzambe ya mokili yango.”
28 Na yango, nganga-nzambe moko oyo bazwaki na Samaria bakei na ye na mboka mopaya ayaki kofanda na Betele,+ mpe akómaki koteya bango ndenge basengeli kobanga Yehova.+
29 Nzokande, ekólo na ekólo esalaki nzambe na yango,+ oyo batyaki na ndako ya bisika oyo etombwaná oyo Basamaria basalaki, ekólo na ekólo, na bingumba na yango esika bazalaki kofanda.
30 Mpe bato ya Babilone basalaki Sukote-benote, mpe bato ya Kute+ basalaki Nergale, mpe bato ya Hamate basalaki Ashima.
31 Baava+ basalaki Nibaze mpe Tartake; Basefarvaime+ bazalaki kotumbela banzambe ya Sefarvaime, Adrameleke ná Anameleke, bana na bango na mɔtɔ.+
32 Mpe bakómaki kobanga Yehova mpe kati na bato, bamityelaki banganga-nzambe+ ya bisika oyo etombwaná mpe bakómaki kosalela bango na ndako ya bisika oyo etombwaná.
33 Bakómaki kobanga Yehova,+ kasi bazalaki nde kosambela+ banzambe na bango moko, na kolanda losambo ya bikólo epai balongolaki bango mpo báya na bango na mboka mopaya.+
34 Tii na mokolo ya lelo bazali kosala na kolanda ndenge bazalaki kosambela kala.+ Moto moko te azalaki kobanga Yehova+ mpe moto moko te azalaki kosala na kolanda mitinda na ye mpe bikateli na ye ya lisambisi+ mpe mobeko+ mpe mitindo+ oyo Yehova apesaki bana ya Yakobo,+ oyo ye apesaki nkombo Yisraele;+
35 nzokande Yehova asalaki kondimana+ ná bango mpe apesaki bango mitindo ete: “Bosengeli te kobanga banzambe mosusu,+ mpe bosengeli te kogumbamela bango to kosalela bango to kopesa bango mbeka.+
36 Kasi Yehova, oyo abimisaki bino na mokili ya Ezipito na nguya monene mpe na lobɔkɔ oyo esembolami,+ Ye nde bokobanga,+ mpe ye nde bokogumbamela,+ mpe ye nde bokopesa mbeka.+
37 Mpe malako,+ bikateli ya lisambisi,+ mobeko ná mitindo oyo ye akomelaki bino,+ bokokeba ete bósalela yango ntango nyonso;+ mpe bosengeli te kobanga banzambe mosusu.
38 Mpe kondimana oyo nasali ná bino, bosengeli kobosana yango te;+ mpe bosengeli te kobanga banzambe mosusu.+
39 Kasi bokobanga nde Yehova+ Nzambe na bino, mpo ye nde akobikisa bino na lobɔkɔ ya banguna na bino nyonso.”+
40 Mpe batosaki te, kasi bazalaki kosala na kolanda losambo na bango ya kala.+
41 Mpe bikólo yango bakómaki kobanga Yehova,+ kasi bazalaki kosalela nde bikeko na bango oyo eyemami. Tii na mokolo ya lelo, bana na bango mpe bana ya bana na bango bazali kosala kaka ndenge bankɔkɔ na bango basalaki.
Maloba na nse
^ Lil., “bazalaki se kokómisa bankingo na bango makasi.”