2 Bakonzi 16:1-20
16 Na mbula ya zomi na nsambo ya Peka mwana ya Remalia, Ahaze+ mwana ya Yotame mokonzi ya Yuda akómaki mokonzi.
2 Ahaze azalaki na mbula ntuku mibale (20) ntango abandaki koyangela, mpe ayangelaki mbula zomi na motoba na Yerusaleme; mpe asalaki te oyo ezali sembo na miso ya Yehova Nzambe na ye lokola Davidi nkɔkɔ na ye.+
3 Mpe azalaki kotambola na nzela ya bakonzi ya Yisraele,+ mpe alekisaki kutu mwana na ye mbeka na mɔtɔ,+ na kolanda makambo oyo eyinamá+ ya bikólo oyo Yehova abenganaki mpo na bana ya Yisraele.
4 Mpe azalaki se kopesa mbeka mpe kobimisa milinga ya mbeka na bisika oyo etombwaná+ mpe na bangomba mike+ mpe na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa.+
5 Na ntango yango nde Rezine+ mokonzi ya Siri mpe Peka+ mwana ya Remalia, mokonzi ya Yisraele bayelaki Yerusaleme na etumba mpe bazingaki Ahaze, kasi bakokaki kobunda te.+
6 Na ntango yango, Rezine mokonzi ya Siri azongisaki Elate+ epai ya Edome, nsima na yango, alongolaki Bayuda na Elate; bongo Baedome bakɔtaki na Elate mpe bafandá wana tii na mokolo ya lelo.
7 Bongo Ahaze atindelaki Tiglate-pilesere+ mokonzi ya Asiri bamemi-nsango, na maloba oyo: “Nazali mosaleli+ na yo mpe mwana na yo. Matá mpe bikisá+ ngai na lobɔkɔ ya mokonzi ya Siri mpe na lobɔkɔ ya mokonzi ya Yisraele, oyo bazali komata mpo na kobunda na ngai.”
8 Na yango, Ahaze azwaki palata mpe wolo oyo emonanaki na ndako ya Yehova mpe na bisika ya kobomba biloko ya motuya ya ndako ya mokonzi+ mpe atindelaki mokonzi ya Asiri kanyaka.+
9 Bongo mokonzi ya Asiri ayokelaki ye mpe mokonzi ya Asiri amataki na Damasi+ mpe azwaki yango+ mpe akendaki na bato na yango na mboka mopaya na Kire,+ mpe abomaki Rezine.+
10 Na nsima, Mokonzi Ahaze+ akendaki kokutana na Tiglate-pilesere+ mokonzi ya Asiri na Damasi, mpe amonaki etumbelo+ oyo ezalaki na Damasi. Bongo Mokonzi Ahaze atindelaki nganga-nzambe Uriya plan ya etumbelo yango mpe modɛlɛ na yango, na kolanda biloko nyonso oyo basalelaki yango.+
11 Mpe nganga-nzambe Uriya+ atongaki etumbelo yango.+ Liboso mokonzi Ahaze auta na Damasi, nganga-nzambe Uriya asalaki yango na kolanda nyonso oyo eutaki na Damasi, oyo Mokonzi Ahaze atindaki.
12 Ntango mokonzi autaki na Damasi, mokonzi amonaki etumbelo yango; mpe mokonzi abandaki kopusana pene na etumbelo+ yango mpe kopesa makabo likoló na yango.+
13 Mpe akobaki kobimisa milinga+ ya likabo na ye ya kotumba+ mpe ya likabo na ye ya mbuma,+ mpe kosopa likabo na ye ya masanga+ mpe komwangisa makila ya bambeka na ye ya boyokani likoló ya etumbelo yango.
14 Mpe etumbelo ya motako+ oyo ezalaki liboso ya Yehova, alongolaki yango liboso ya ndako, na esika oyo yango ezalaki kati na etumbelo na ye ná ndako ya Yehova,+ mpe atyaki yango na ngámbo ya nɔrdi ya etumbelo na ye.
15 Mpe Mokonzi Ahaze apesaki ye—nganga-nzambe Uriya+—mitindo ete: “Bimisá milinga ya likabo ya kotumba ya ntɔngɔ+ na etumbelo ya monene, mpe likabo ya mbuma ya mpokwa,+ likabo ya kotumba ya mokonzi+ ná likabo na ye ya mbuma, likabo ya kotumba ya bato nyonso ya mokili, ná likabo na bango ya mbuma ná makabo na bango ya masanga; mpe okomwangisa makila nyonso ya likabo ya kotumba mpe makila nyonso ya mbeka likoló na yango. Kasi etumbelo ya motako, nakotala oyo nakosala yango nsima.”
16 Mpe nganga-nzambe Uriya+ asalaki na kolanda mitindo nyonso oyo Mokonzi Ahaze apesaki.+
17 Lisusu, Mokonzi Ahaze akatakataki+ manzanza na mipanzi+ ya bashario+ mpe alongolaki basaani+ likoló na yango; mpe mbu,+ akitisaki yango, alongolaki yango likoló ya bangɔmbɛ ya motako+ oyo ezalaki na nse na yango mpe na nsima, atyaki yango likoló ya pavema ya mabanga.
18 Mpe esika oyo ezipamá—oyo bazalaki kosalela na sabata—oyo batongaki na ndako mpe na libándá ya esika mokonzi akɔtaka, alongolaki yango na ndako ya Yehova mpo na mokonzi ya Asiri.
19 Makambo mosusu oyo Ahaze asalaki ekomami te na buku+ ya makambo ya mikolo ya bakonzi ya Yuda?
20 Nsukansuka, Ahaze alalaki esika moko na bankɔkɔ na ye mpe akundamaki esika moko na bankɔkɔ na ye na Sité ya Davidi;+ mpe Hizikiya+ mwana na ye abandaki koyangela na esika na ye.