2 Bakonzi 11:1-21

11  Nzokande Atalia+ mama ya Ahazia+ amonaki ete mwana na ye asili kokufa. Bongo atɛlɛmaki mpe abomaki bana nyonso ya mokonzi.+  Kasi Yehosheba+ mwana mwasi ya mokonzi Yehorame, ndeko ya Ahazia, azwaki Yehoashe+ mwana ya Ahazia mpe ayibaki ye; alongolaki ye na kati ya bana ya mokonzi oyo basengelaki kobomama, ɛɛ, ye ná mwasi oyo azalaki komɛlisa ye, akɔtisaki bango na shambrɛ ya kati esika balalaka, mpe babombaki+ ye mosika na miso ya Atalia, mpe abomamaki te.  Mpe azalaki ye ná mwasi yango na kati ya ndako ya Yehova, na esika ya kobombama, mbula motoba, wana Atalia azalaki koyangela mokili.+  Mpe na mbula ya nsambo, Yehoyada+ atindaki bato bázwa bakonzi ya bato nkama nkama kati na Bakari+ oyo bazalaki kokɛngɛla mokonzi, mpe kati na bapoti-mbangu,+ mpe amemaki bango epai na ye na ndako ya Yehova; mpe asalaki kondimana+ ná bango mpe alapisaki bango ndai+ na ndako ya Yehova; nsima na yango, amonisaki bango mwana ya mokonzi.  Mpe apesaki bango lisusu mitindo na maloba oyo: “Talá likambo bokosala: moko ya bituluku na bino misato ekoya na sabata mpe ekobatela malamu ndako ya mokonzi;+  mpe moko ya bituluku yango misato ekozala na Porte+ ya Moboko, mpe moko ya bituluku yango misato ekozala na porte nsima ya bapoti-mbangu; mpe bokobatela malamu ndako,+ bato na bato na ngala na bango.  Mpe bituluku mibale kati na bino oyo esengeli kobima nyonso na sabata ekotikala, mpe basengeli kobatela malamu ndako ya Yehova, mpo na bolamu ya mokonzi.  Mpe bosengeli kozinga mokonzi bipai nyonso, moto na moto na bibundeli na ye na lobɔkɔ; mpe moto nyonso oyo akokɔta na milɔngɔ akobomama. Mpe bókoba kozala elongo na mokonzi ntango azali kobima mpe ntango azali kokɔta.”  Mpe bakonzi ya bato nkama nkama+ basalaki na kolanda mitindo nyonso oyo nganga-nzambe Yehoyada apesaki. Na yango, bazwaki, moto na moto, bato na ye oyo bazalaki kokɔta na sabata,+ elongo na baoyo bazalaki kobima na sabata, mpe na nsima bakɔtaki epai ya nganga-nzambe Yehoyada. 10  Bongo nganga-nzambe apesaki bakonzi ya bato nkama nkama makɔnga mpe banguba ya zolongano ya Mokonzi Davidi, oyo ezalaki na ndako ya Yehova.+ 11  Mpe bapoti-mbangu+ batɛlɛmaki kaka, moto na moto na bibundeli na ye na lobɔkɔ, banda na ngámbo ya lobɔkɔ ya mobali ya ndako kino na ngámbo ya lobɔkɔ ya mwasi ya ndako, pene na etumbelo+ mpe pene na ndako, bipai nyonso penepene na mokonzi. 12  Na nsima, abimisaki mwana+ ya mokonzi libándá mpe alatisaki ye motole+ mpe atyaki Litatoli+ likoló na ye; bongo bakómisaki ye mokonzi+ mpe batyaki ye mafuta.+ Mpe babandaki kobɛta mabɔkɔ+ mpe koloba: “Mokonzi azala na bomoi!”+ 13  Ntango Atalia ayokaki lokito ya bato bazali kopota mbangu, na mbala moko ayaki epai ya bato na ndako ya Yehova.+ 14  Bongo amonaki, mpe talá, mokonzi ye wana atɛlɛmi pene na likonzí+ lokola momeseno, mpe bakapita ná bakelelo+ penepene na mokonzi, mpe bato nyonso ya mokili yango bazali kosepela+ mpe koyula bakelelo. Na mbala moko, Atalia+ apasolaki bilamba na ye mpe abandaki koganga: “Likita mabe! Likita mabe!”+ 15  Kasi nganga-nzambe Yehoyada apesaki bakonzi ya bato nkama nkama mitindo, baoyo batyamaki kati na limpinga ya basoda,+ mpe alobaki na bango boye: “Bólongola ye na milɔngɔ, mpe moto nyonso oyo akolanda ye, abomama na mopanga!”+ Mpo nganga-nzambe alobaki ete: “Abomama na ndako ya Yehova te.” 16  Na yango, bakangaki ye mpe bakendaki na ye na esika bampunda ekɔtaka+ na ndako ya mokonzi,+ mpe babomaki ye kuna.+ 17  Bongo Yehoyada asalaki kondimana+ kati na Yehova+ ná mokonzi+ mpe bato, mpo bámonisa ete bazali bato ya Yehova; mpe lisusu kati na mokonzi ná bato.+ 18  Nsima na yango, bato nyonso ya mokili bayaki na ndako ya Baala mpe bakweisaki bitumbelo na ye;+ mpe babukaki mpenza bikeko na ye,+ mpe babomaki Matane,+ nganga-nzambe ya Baala, liboso ya bitumbelo yango.+ Mpe nganga-nzambe atyaki bakɛngɛli mpo na kobatela ndako ya Yehova.+ 19  Lisusu, azwaki bakonzi ya bato nkama nkama mpe Bakari+ oyo bazalaki kokɛngɛla mokonzi mpe bapoti-mbangu+ ná bato nyonso ya mokili mpo bákamata mokonzi na ndako ya Yehova, bákita na ye; mpe balekaki malɛmbɛmalɛmbɛ na nzela ya porte+ ya bapoti-mbangu tii na ndako ya mokonzi; mpe afandaki na kiti+ ya bakonzi. 20  Mpe bato nyonso ya mokili bakobaki kosepela;+ mpe engumba ekómaki na kimya; mpe babomaki Atalia na mopanga na ndako ya mokonzi.+ 21  Yehoashe+ azalaki na mbula nsambo ntango abandaki koyangela.+

Maloba na nse