2 Bakonzi 1:1-18
1 Mpe nsima ya liwa ya Ahaba,+ Moabe+ abandaki kotombokela+ Yisraele.
2 Na ntango yango, Ahazia akweaki+ longwa na kiyungulu ya lidusu ya shambrɛ na ye ya likoló,+ na Samaria mpe abɛlaki. Bongo atindaki bamemi-nsango mpe alobaki na bango boye: “Bókende kotuna+ Baala-zebube+ nzambe ya Ekrone+ soki nakobika na maladi oyo.”+
3 Mpe anzelu+ ya Yehova alobaki na Eliya Motishebe ete:+ “Tɛlɛmá, matá kokutana na bamemi-nsango ya mokonzi ya Samaria mpe lobá na bango boye: ‘Ezali mpo Nzambe+ azali te na Yisraele nde bozali kokende kotuna Baala-zebube nzambe ya Ekrone?
4 Na yango, talá oyo Yehova alobi: “Okokita te na mbeto oyo omati, mpo okokufa solo.”’”+ Bongo Eliya akendaki.
5 Ntango bamemi-nsango bazongaki epai na ye, na mbala moko, alobaki na bango boye: “Mpo na nini bozongi?”
6 Bongo balobaki na ye ete: “Moto moko ayaki kokutana na biso, alobi na biso boye: ‘Bókende, bózonga epai ya mokonzi oyo atindi bino mpe bosengeli koloba na ye boye: “Talá oyo Yehova alobi:+ ‘Ezali mpo Nzambe azali te na Yisraele nde ozali kotinda bato bátuna Baala-zebube nzambe ya Ekrone? Na yango, okokita te na mbeto oyo omati, mpo okokufa solo.’”’”+
7 Bongo alobaki na bango ete: “Moto oyo ayaki kokutana na bino mpe alobaki na bino maloba oyo azalaki ndenge nini?”
8 Bongo balobaki na ye boye: “Moto moko boye na elamba ya nsuki ya nyama,+ akangi mokaba ya mposo ya nyama na loketo.”+ Na mbala moko, ye alobaki ete: “Ezali Eliya Motishebe.”
9 Mpe atindelaki ye mokonzi ya bato ntuku mitano (50) ná bato na ye ntuku mitano.+ Ntango amataki epai na ye, talá! ye wana afandi na nsɔngɛ ya ngomba. Bongo alobaki na ye boye: “Moto ya Nzambe ya solo,+ mokonzi alobi: ‘Kitá.’”
10 Kasi Eliya apesaki eyano mpe alobaki na mokonzi ya bato ntuku mitano (50) boye: “Soki nazali moto ya Nzambe, mɔtɔ+ euta na likoló, ekita mpe elya yo ná bato na yo ntuku mitano.” Bongo mɔtɔ eutaki na likoló, ekiti mpe elei ye ná bato na ye ntuku mitano.+
11 Bongo atindelaki ye lisusu mokonzi mosusu ya bato ntuku mitano (50) ná bato na ye ntuku mitano.+ Ye mpe ayanolaki mpe alobaki na ye boye: “Moto ya Nzambe ya solo, talá oyo mokonzi alobi: ‘Kitá noki.’”+
12 Kasi Eliya apesaki eyano mpe alobaki na bango boye: “Soki nazali moto ya Nzambe ya solo, mɔtɔ euta na likoló, ekita mpe elya yo ná bato na yo ntuku mitano (50).” Bongo mɔtɔ ya Nzambe eutaki na likoló, ekiti mpe elei ye ná bato na ye ntuku mitano.
13 Mpe atindaki lisusu mokonzi ya misato ya bato ntuku mitano (50) ná bato na ye ntuku mitano.+ Kasi mokonzi yango ya misato ya bato ntuku mitano amataki, ayaki mpe atyaki mabɔlɔngɔ na nse+ liboso ya Eliya mpe abandaki kobondela+ ye mpo amonisela ye boboto mpe alobaki na ye: “Moto ya Nzambe ya solo, nabondeli yo, tiká molimo+ na ngai mpe molimo ya basaleli na yo oyo ntuku mitano ezala na motuya+ na miso na yo.
14 Talá! mɔtɔ euti na likoló, ekiti mpe elei+ bakonzi mibale ya bato ntuku mitano (50) oyo bayaki liboso na ngai ná bato na bango ntuku mitano ntuku mitano, kasi sikoyo, tiká molimo na ngai ezala na motuya na miso na yo.”
15 Na yango, anzelu ya Yehova alobaki na Eliya ete: “Kitá elongo na ye. Kobanga ye te.”+ Bongo atɛlɛmaki mpe akitaki elongo na ye epai ya mokonzi.
16 Na nsima, alobaki na ye boye: “Talá oyo Yehova alobi: ‘Kotinda oyo otindi bamemi-nsango+ bátuna Baala-zebube nzambe ya Ekrone,+ ezali mpo Nzambe ata moko te azali na Yisraele, oyo bakoki kotuna liloba na ye? Yango wana, okokita te na mbeto oyo omati, mpo okokufa solo.’”
17 Mpe nsukansuka akufaki+ ndenge Eliya alobaki, na kolanda liloba+ ya Yehova; bongo Yehorame*+ abandaki koyangela na esika na ye, na mbula ya mibale ya Yehorame+ mwana ya Yehoshafate mokonzi ya Yuda, mpamba te ye azalaki na mwana te.
18 Makambo mosusu oyo Ahazia+ asalaki, ekomami te na buku+ ya makambo ya mikolo ya bakonzi ya Yisraele?
Maloba na nse
^ Elingi koloba, ndeko ya Ahazia.