1 Yoane 3:1-24

3  Bótala motindo ya bolingo+ oyo Tata amoniseli biso, mpo tóbengama bana ya Nzambe;+ mpe tozali bongo. Yango wana mokili+ eyebaka biso te, mpo eyebi ye te.+  Bandeko ya bolingo, sikoyo tozali bana ya Nzambe,+ kasi ndenge tokozala emonisami naino polele te.+ Toyebi ete ntango ye akomonisama,+ biso tokozala lokola ye,+ mpamba te tokomona ye ndenge azali.+  Mpe moto nyonso oyo azali na elikya yango oyo etyami epai na ye amipɛtolaka,+ ndenge mpenza moto wana azali pɛto.+  Moto nyonso oyo asalaka lisumu+ azali mpe kobuka mibeko,+ mpe na yango lisumu+ nde kobuka mibeko.  Boyebi mpe ete moto wana amonisamaki mpo na kolongola masumu na biso,+ mpe lisumu moko te+ ezali na kati na ye.  Moto nyonso oyo azali kotikala na bomoko+ elongo na ye asalaka lisumu te;+ moto moko te oyo asalaka lisumu asilá komona ye to koyeba ye.+  Bana, moto akosa bino te; moto oyo asalaka makambo ya boyengebene azali moyengebene, ndenge moto wana mpe azali moyengebene.+  Moto oyo asalaka lisumu auti na Zabolo, mpamba te Zabolo azali kosala lisumu banda na ebandeli.+ Ezali mpo na ntina oyo nde Mwana ya Nzambe amonisamaki polele,+ elingi koloba, mpo na kobukabuka misala ya Zabolo.+  Moto nyonso oyo abotami na Nzambe asalaka lisumu te,+ mpo momboto na Ye efandi na kati ya moto yango, mpe asalaka lisumu te, mpo abotami na Nzambe.+ 10  Bana ya Nzambe ná bana ya Zabolo bayebanaka na likambo oyo: Moto nyonso oyo asalaka makambo ya boyengebene+ te auti na Nzambe te, ndenge moko mpe moto oyo azali kolinga ndeko na ye te.+ 11  Mpo oyo ezali nsango boyokaki banda na ebandeli:+ ete tólinganaka;+ 12  ezala te lokola Kaina, oyo autaki na moto mabe mpe abomaki+ ndeko na ye. Mpe abomaki ye mpo na nini? Mpo misala na ye moko ezalaki mabe,+ kasi oyo ya ndeko na ye ezalaki ya boyengebene.+ 13  Bandeko, bókamwa te soki mokili ezali koyina bino.+ 14  Toyebi ete tolongwe na liwa tokómi na bomoi,+ mpo tolingaka bandeko.+ Moto oyo alingaka te azali kofanda na kati ya liwa.+ 15  Moto nyonso oyo azali koyina+ ndeko na ye azali mobomi,+ mpe boyebi ete mobomi+ moko te azali na bomoi ya seko na kati na ye.+ 16  Na likambo oyo nde toyebi bolingo,+ mpo moto wana akabaki molimo na ye mpo na biso;+ mpe biso tosengeli kokaba milimo na biso mpo na bandeko na biso.+ 17  Kasi moto nyonso oyo azali na biloko ya kobikela ya mokili oyo+ mpe amoni ndeko na ye azali kokelela+ mpe atako bongo akangeli ye mpenza motema,*+ ndenge nini bolingo ya Nzambe ekoki kofanda na kati na ye?+ 18  Bana, tólingaka,+ na maloba te mpe na lolemo te,+ kasi na misala+ mpe na solo.+ 19  Na likambo oyo nde tokoyeba ete touti na solo,+ mpe tokondimisa mitema na biso liboso na ye 20  na likambo nyonso oyo mitema na biso ezali kokweisa biso,+ mpo Nzambe azali monene koleka mitema na biso mpe ayebi makambo nyonso.+ 21  Bandeko ya bolingo, soki mitema na biso ezali kokweisa biso te, tozali koloba polele mpe na bosembo liboso ya Nzambe;+ 22  mpe nyonso oyo tosɛngaka, tozwaka yango epai na ye,+ mpo tozali kotosa mibeko na ye mpe tozali kosala makambo oyo esepelisaka ye.+ 23  Ɛɛ, mobeko na ye yango oyo: ete tóndima nkombo ya Mwana na ye Yesu Kristo+ mpe tólinganaka,+ kaka ndenge apesaki biso mobeko. 24  Lisusu, moto oyo azali kotosa mibeko na ye azali kotikala na bomoko elongo na ye, mpe ye na bomoko elongo na moto wana;+ mpe na likambo yango tozali koyeba ete ye atikali na bomoko elongo na biso,+ mpo na elimo+ oyo apesaki biso.

Maloba na nse

To, “akangeli ye porte ya motema mawa na ye.”