1 Timote 5:1-25

5  Kopamela mokóló na maloba makasi te.+ Kasi bondelá ye lokola tata, bilenge mibali lokola bandeko mibali,  basi oyo bazali mikóló+ lokola bamama, bilenge basi lokola bandeko basi+ na makanisi ya pɛto mpenza.  Kumisá basi oyo mibali bakufá oyo bazali mpenza na moto ya kosalisa bango te.+  Kasi soki mwasi moko oyo mobali akufá azali na bana to bana ya bana, bango báyekola kosalela ezaleli ya kokangama na Nzambe libosoliboso na ndako+ na bango moko mpe bákoba kozongisela baboti+ na bango ná bankɔkɔ na bango bolamu oyo basengeli kozongisela bango, mpo yango endimami na miso ya Nzambe.+  Sikoyo mwasi oyo azali mpenza mwasi oyo mobali akufá mpe atikalá mabɔkɔ mpamba+ atyeli Nzambe elikya+ mpe atingamaka na malɔmbɔ mpe na mabondeli butu moi.+  Kasi oyo amipesá na bisengo ya nzoto+ akufá+ atako azali na bomoi.  Yango wana, kobá kopesa mitindo oyo,+ mpo báfundama na likambo te.+  Ya solo, soki moto azali te kopesa bato na ye,+ mpe mingimingi bato ya ndako na ye,+ biloko oyo basengeli na yango, awangani+ kondima+ mpe azali mabe koleka moto oyo azali na kondima te.  Mwasi oyo mobali akufá oyo bakokoma nkombo na ye mpo asalisama, mbula na ye ezala na nse ya mbula ntuku motoba (60) te, azalaki mwasi ya mobali kaka moko,+ 10  azala mwasi oyo bapeseli ye litatoli mpo na misala ya malamu,+ soki abɔkɔlaki bana,+ soki ayambaki bapaya,+ soki asukolaki makolo ya basantu,+ soki asalisaki baoyo bazalaki na bolɔzi,+ soki alandaki na molende mpenza mosala nyonso ya malamu.+ 11  Nzokande, boyá bilenge basi oyo mibali bakufá, mpo ntango bamposa na bango ya kosangisa nzoto eyei komitya na katikati na bango ná Kristo,+ balingaka kobala, 12  bazali kokwea na likambo mpo batyoli liloba na bango ya liboso oyo etali kondima.+ 13  Kaka na ntango yango mpe balingaka lisusu kosala mosala te, batambolatambolaka na bandako; ɛɛ, basalaka mosala te, mpe bazali bato ya bilobaloba mpe bamikɔtisaka na makambo ya bato,+ balobelaka makambo oyo basengeli kolobela te. 14  Yango wana, nalingi ete bilenge basi oyo mibali bakufá bábala,+ bábota bana,+ bákamba ndako, mpo na kopesa motɛmɛli nzela ya kofinga te.+ 15  Kutu, bamosusu bapɛngwi mpo na kolanda Satana. 16  Soki mwasi moko mondimi azali na bandeko na ye oyo bazali basi oyo mibali bakufá, ye asalisa bango,+ mpe lisangá emema mokumba wana te. Bongo lisangá esalisa basi oyo mibali bakufá oyo bazali mpenza na moto ya kosalisa bango te.+ 17  Bankulutu oyo bazali kokamba+ na ndenge ya malamu mpenza bátángama bato babongi na lokumu mbala mibale,+ mingimingi mpenza baoyo bazali kosala mosala makasi ya koloba mpe ya koteya.+ 18  Mpo likomami ezali koloba ete: “Osengeli kokanga ngɔmbɛ monɔkɔ te ntango ezali kotutatuta mbuma”;+ lisusu: “Mosali asengeli kozwa lifuti na ye.”+ 19  Kondima te likambo oyo bafundi na yango nkulutu, longola kaka na monɔkɔ ya batatoli mibale to misato.+ 20  Pamelá+ na miso ya bato nyonso baoyo bazali na momeseno ya kosala lisumu,+ mpo bamosusu mpe bábanga.+ 21  Nazali kopesa yo mitindo mpenza liboso ya Nzambe mpe ya Kristo Yesu+ mpe ya baanzelu oyo baponamá ete obatela makambo oyo na makanisi mabe te, ntango ozali kosala makambo, kopona elongi ya moto te.+ 22  Kotyela moto mabɔkɔ+ nokinoki te;+ kosangana mpe na masumu ya bato te;+ zalá ntango nyonso pɛto.+ 23  Komɛla lisusu mai te, kasi salelá nde mwa vinyo+ moke mpo na estoma na yo mpe bamaladi oyo obɛlabɛlaka. 24  Masumu ya bato mosusu emonanaka polele,+ ezali komema mbala moko na lisambisi, kasi masumu ya bato mosusu eyaka komonana polele na nsima.+ 25  Ndenge moko mpe misala ya malamu emonanaka polele,+ mpe ata soki ezali komonana polele te ekobombama te.+

Maloba na nse