1 Timote 3:1-16
3 Liloba oyo ezali sembo.+
Soki moto azali koluka kosala mosala ya mokɛngɛli,+ azali na mposa ya mosala moko ya malamu mingi.
2 Yango wana, mokɛngɛli asengeli kozala moto oyo azali na likambo te ya kofundama na yango,+ mobali ya mwasi kaka moko, moto oyo alekisaka ndelo te+ na bizaleli na ye, moto ya makanisi malamu,+ moto ya makambo na molɔngɔ,+ moyambi bapaya,+ moto oyo ayebi koteya,+
3 molangwi-masanga te mpe aswanaka na bato te,+ abɛtaka bato te,+ moto ya makambo makasimakasi te,+ moto oyo alingá bitumba te,+ moto oyo alingá mbongo te,+
4 moto oyo akambaka ndako na ye moko na ndenge ya malamu mpenza,+ oyo azali na bana oyo bazali na botosi mpe bazwaka makambo na lisɛki te;+
5 (ya solo, soki moto ayebi kokamba ndako na ye moko te, ndenge nini akobatela lisangá ya Nzambe?)
6 azala mondimi ya sika te,+ noki avimba na lolendo+ mpe azwa etumbu oyo bakatelá Zabolo.+
7 Lisusu, asengeli mpe kozala moto oyo bato ya libándá bazali kolobela ye malamu,+ mpo akwea te na nsɔni mpe na motambo+ ya Zabolo.
8 Basaleli na misala+ mpe basengeli kozala bato oyo bazwaka makambo na lisɛki te, bato ya minɔkɔ mibale te, bato oyo bamipesá na vinyo te, bázala te bato ya lokoso oyo balukaka kozwa litomba na ndenge ya mabe,+
9 bábatelaka sekele mosantu+ ya kondima na lisosoli ya pɛto.+
10 Lisusu, bámekama+ liboso mpo na koyeba soki bakoki, na nsima bázala basaleli, soki bafundami ata na likambo moko te.+
11 Basi mpe basengeli kozala bato oyo bazwaka makambo na lisɛki te, oyo bakoselaka bato makambo te,+ oyo balekisaka ndelo te+ na bizaleli na bango, bato ya sembo na makambo nyonso.+
12 Basaleli na misala bázala mibali ya mwasi kaka moko,+ bato oyo bakambaka bana na bango mpe bato ya ndako na bango na ndenge ya malamu mpenza.+
13 Mpo mibali oyo bazali kosala mosala na ndenge ya malamu mpenza bazali kozwa esika ya lokumu,+ koloba polele mpe na bosembo+ mpo na kondima oyo bandimeli Kristo Yesu.
14 Nazali kokomela yo makambo oyo, atako nazali kolikya koya epai na yo nsima ya mwa ntango moke,+
15 kasi soki nayei noki te, mpo oyeba ndenge osengeli komitambwisa na ndako ya Nzambe,+ oyo ezali lisangá ya Nzambe ya bomoi, likonzí mpe eloko oyo esimbi+ solo.
16 Ya solo, sekele mosantu+ ya ezaleli oyo ya kokangama na Nzambe ezali mpenza monene: ‘Amonanaki polele na nzoto,+ atángamaki moyengebene na elimo,+ abimelaki baanzelu,+ basakolaki ye na bikólo,+ bandimelaki ye na mokili,+ azwamaki na likoló na nkembo.’+