1 Timote 2:1-15

2  Yango wana, libosoliboso nazali kolendisa ete malɔmbɔ, mabondeli,+ kosɛngɛla bamosusu, kopesa matɔndi, esalemaka mpo na bato ya ndenge nyonso,+  mpo na bakonzi+ mpe baoyo nyonso bazali na bibonga minene;+ mpo tókoba kozala na bomoi ya kimya mpe ya mobulu te na bomoi na ezaleli ya kokangama mobimba na Nzambe mpe na lisɛki te.+  Yango ezali malamu mpe endimami+ na miso ya Mobikisi na biso, Nzambe,+  oyo mokano na ye ezali ete bato ya ndenge nyonso+ bábika+ mpe bázwa boyebi ya sikisiki+ ya solo.+  Mpo ezali na Nzambe kaka moko,+ mpe moyokanisi+ kaka moko na kati ya Nzambe+ ná bato,+ moto moko, Kristo Yesu,+  oyo amipesaki ye moko lisiko oyo ekokani mpo na bato nyonso+—wana nde likambo oyo esengeli kotatolama na ntango na yango mpenza.  Batyaki ngai mosakoli mpe ntoma+ mpo na litatoli+ yango—nazali koloba solo,+ nazali kokosa te—mpo na koteya bikólo+ kondima+ mpe solo.  Yango wana, nalingi ete na esika nyonso mibali bábondelaka, bátombolaka mabɔkɔ ya sembo,+ na nkanda+ te mpe ntembe te.+  Nalingi mpe ete basi bábongisaka nzoto na bango na molato ya malamu, bálekisaka ndelo te+ mpe bázala na makanisi malamu, kasi na midɛlɛ ya kokanga nsuki te mpe na wolo to na mayaka to na bilamba ya ntalo makasi te,+ 10  kasi na ndenge oyo ebongi na basi oyo balobaka ete babangaka Nzambe,+ elingi koloba, na misala ya malamu.+ 11  Mwasi afanda nyɛɛ mpe ayekola na komikitisa mpenza.+ 12  Nazali kopesa mwasi nzela ya koteya te,+ to ya kozala na bokonzi likoló ya mobali te,+ kasi nde ya kofanda nyɛɛ. 13  Mpo Adama asalemaki liboso, Eva na nsima.+ 14  Lisusu, Adama akosamaki te,+ kasi mwasi akosamaki+ mpenza mpe abukaki mobeko.+ 15  Nzokande, basi bakobatelama na lisalisi ya kobota bana,+ soki bakangami na kondima mpe na bolingo mpe na kosantisama elongo na makanisi malamu.+

Maloba na nse