1 Timote 1:1-20
1 Paulo, ntoma+ ya Kristo Yesu na etinda ya Nzambe+ Mobikisi+ na biso mpe ya Kristo Yesu, elikya na biso,+
2 epai ya Timote,+ mwana na ngai+ ya solosolo na kati ya kondima:
Boboto monene, motema mawa, kimya ya Nzambe Tata mpe ya Kristo Yesu Nkolo na biso ezala na yo.+
3 Kaka ndenge nalendisaki yo ete otikala na Efese ntango ngai nalingaki kokende na Masedonia,+ nazali mpe kosala yango sikoyo, mpo opesa bamosusu mitindo+ báteya mateya ya ndenge mosusu te,+
4 mpe bátya likebi te na masapo ya lokuta+ mpe na milɔngɔ ya bankɔkɔ, oyo ezali na litomba te,+ kasi oyo ebimisaka nde mituna oyo ekotinda na kolukaluka mpamba na esika ya kozwa eloko moko oyo euti na Nzambe oyo ekolendisa kondima.
5 Ya solo, ntina ya etinda oyo ezali mpo tózala na bolingo+ oyo euti na motema ya pɛto+ mpe na lisosoli ya malamu+ mpe na kondima oyo ezali na bokosi te.+
6 Lokola bamosusu batiki makambo wana mpe bamipesi+ na bilobaloba mpamba,+
7 balingi kozala bateyi+ ya mibeko,+ kasi bazali kokanga ntina te ya makambo oyo bazali koloba to ya makambo oyo bazali komonisa na mpiko mpenza ete ezali solo.
8 Sikoyo toyebi ete Mibeko ezali malamu+ soki moto azali kosalela yango na ndenge oyo esengeli+
9 mpe ayebi ete babimisaka mibeko mpo na moyengebene te, kasi mpo na bato oyo babukaka mibeko+ mpe bato ya motó makasi,+ bato oyo batyolaka Nzambe mpe basumuki, bato oyo bazangá motema boboto,+ mpe bato oyo batyolaka biloko mosantu, bato oyo babomaka batata mpe bato oyo babomaka bamama, babomi-bato,
10 bato ya pite,+ mibali oyo balalaka na mibali, miyibi oyo bazwaka bato na makasi bakei na bango, bato ya lokuta, bato oyo balapaka ndai ya lokuta,+ mpe mpo na likambo nyonso oyo ezali kotɛmɛla+ mateya oyo epesaka litomba+
11 na kolanda nsango malamu ya nkembo ya Nzambe ya esengo,+ oyo bapesaki ngai.+
12 Nazali kotɔnda Kristo Yesu Nkolo na biso, oyo apesaki ngai nguya, mpo amonaki ngai sembo+ na ndenge apesaki ngai mosala,+
13 atako liboso nazalaki kofinga mpe konyokola+ mpe nazalaki moto ya lofundo.+ Nzokande, bayokelaki ngai mawa,+ mpo nazalaki na boyebi te+ mpe nazalaki kosala na kondima te.
14 Kasi nazwaki boboto monene ya Nkolo na biso mingi mpenza+ ná kondima ná bolingo na boyokani na Kristo Yesu.+
15 Liloba oyo ezali sembo mpe ebongi mpenza kondimama+ ete Kristo Yesu ayaki na mokili mpo na kobikisa basumuki.+ Na kati na bango ngai moto ya liboso mpenza.+
16 Nzokande, bayokelaki ngai mawa+ mpo, na nzela na ngai moto ya liboso mpenza, Kristo Yesu alakisa motema molai na ye mobimba, mpo nazala ndakisa ya baoyo bakondimela+ ye mpo na bomoi ya seko.+
17 Sikoyo, Mokonzi ya seko,+ oyo akoki kopɔla te,+ oyo amonanaka te,+ ye Nzambe kaka moko,+ azwa lokumu ná nkembo libela na libela.+ Amen.
18 Mwana na ngai, Timote, nazali kopesa yo etinda+ oyo: na boyokani na bisakweli+ oyo elobelaki yo, mpo ete na nzela na yango okoba kobunda etumba ya malamu;+
19 obatela kondima mpe lisosoli ya malamu,+ oyo bamosusu babwaki+ mpe kondima na bango ebebi lokola masuwa oyo epanzani.+
20 Himene+ ná Alezandre+ bazali na kati ya bato yango, mpe napesi bango na Satana+ mpo disiplini eteya bango ete báfingaka Nzambe te.+