1 Samwele 8:1-22

8  Mpe esalemaki boye: ntango kaka Samwele akómaki mobange, atyaki+ bana na ye basambisi ya Yisraele.  Nkombo ya mwana na ye ya mobali ya liboso Yoele,+ mpe nkombo ya mwana na ye ya mobali ya mibale Abiya;+ bazalaki kosambisa na Beere-sheba.  Nde bana na ye batambolaki na banzela na ye te,+ kasi bazalaki kolinga kolanda litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe+ mpe bazalaki kondima kanyaka+ mpe kopɛngwisa lisambisi.+  Na nsima, bankumu nyonso ya Yisraele+ bayanganaki mpe bayaki epai ya Samwele na Rama  mpe balobaki na ye boye: “Talá! Yo okómi mobange, kasi bana na yo batamboli na banzela na yo te. Sikoyo, tyelá biso mokonzi+ mpo asambisaka biso lokola bikólo nyonso.”  Kasi likambo yango emonanaki mabe na miso ya Samwele na ndenge balobaki ete: “Pesá biso mokonzi asambisaka biso,” mpe Samwele abandaki kobondela Yehova.+  Bongo Yehova alobaki na Samwele boye:+ “Yoká mongongo ya bato oyo na makambo nyonso oyo bazali koloba na yo;+ mpamba te baboyi yo te, kasi baboyi nde ngai nazala mokonzi+ na bango.  Na kolanda makambo nyonso oyo basalaki banda mokolo nabimisaki bango na Ezipito+ tii na mokolo ya lelo, ndenge bazalaki se kotika ngai+ mpe kosalela banzambe mosusu,+ ndenge yango nde bazali kosala yo.  Sikoyo, yoká mongongo na bango. Nde, osengeli kokebisa bango polele, mpe osengeli koyebisa bango lotomo ya mokonzi oyo akoyangela bango.”+ 10  Bongo Samwele ayebisaki bato oyo bazalaki kosɛnga ye mokonzi maloba nyonso ya Yehova. 11  Mpe alobaki boye: “Lotomo+ ya mokonzi oyo akoyangela bino ekozala boye: Akozwa bana na bino ya mibali+ mpe akokómisa bango bato na ye ya makalo+ mpe akokɔtisa bango na molɔngɔ ya basoda na ye oyo batambolaka na mpunda,+ mpe bamosusu bakopota mbangu liboso ya makalo na ye;+ 12  mpe akomityela bakonzi ya bato nkóto nkóto+ mpe bakonzi ya bato ntuku mitano ntuku mitano,+ mpe bamosusu mpo na kosalela ye bilanga+ mpe kobukela ye mbuma+ mpe kosalela ye bibundeli+ mpe biloko ya makalo na ye.+ 13  Mpe akozwa bana na bino ya basi mpo básalaka malasi mpe bálambaka mpe bátumbaka mampa.+ 14  Mpe akokamata bilanga na bino mpe bilanga na bino ya vinyo+ mpe bilanga na bino ya olive,+ akozwa oyo eleki kitoko, mpe akopesa yango basaleli na ye. 15  Mpe akozwa moko ya bandambo zomi ya mbuma ya bilanga na bino ya mbuma mpe ya bilanga na bino ya vinyo,+ mpe akopesa yango bakapita ya ndako na ye+ mpe basaleli na ye. 16  Mpe akozwa basaleli na bino ya mibali mpe basaleli na bino ya basi mpe bitonga na bino oyo eleki kitoko, mpe bampunda na bino, mpe akosalela bango na mosala na ye.+ 17  Akozwa moko ya bandambo zomi ya bitonga na bino ya bampate,+ mpe bino, bokokóma basaleli na ye. 18  Mpe na mokolo yango, bokolela mpenza mpo na mokonzi na bino,+ oyo bino moko boponi, kasi Yehova akopesa bino eyano te na mokolo yango.”+ 19  Ata bongo, bato baboyaki koyoka mongongo ya Samwele+ mpe balobaki ete: “Te, mokonzi nde ayangela biso. 20  Biso mpe tosengeli kokóma lokola bikólo nyonso,+ mpe mokonzi na biso asambisaka biso mpe abimaka liboso na biso mpo na kobunda bitumba na biso.” 21  Bongo Samwele ayokaki maloba nyonso ya bato; na nsima, alobaki yango na matoi ya Yehova.+ 22  Mpe Yehova alobaki na Samwele boye: “Yoká mongongo na bango, mpe tyelá bango mokonzi ayangela bango.”+ Na yango, Samwele alobaki na mibali ya Yisraele ete: “Bókende, moto na moto na engumba na ye.”

Maloba na nse