1 Samwele 17:1-58
17 Bongo Bafilistia+ bayanganisaki bakaa na bango mpo na etumba. Ntango bayanganaki na Soko+ ya Yuda, batyaki kaa kati na Soko mpe Azeka,+ na Efese-damime.+
2 Nzokande Saulo ná mibali ya Yisraele bayanganaki mpe batyaki kaa na lobwaku ya patatalu ya Ela,+ mpe basalaki bituluku ya etumba mpo na kokutana na Bafilistia.
3 Mpe Bafilistia batɛlɛmaki na ngomba, na ngámbo oyo, mpe Bayisraele batɛlɛmaki na ngomba, na ngámbo oyo kuna, lobwaku na katikati na bango.
4 Mpe elombe moko mobundi abandaki kobima na bakaa ya Bafilistia, nkombo na ye Goliate,+ autaki na Gate,+ molai na ye ezalaki mapeko motoba bakisá zerete moko.+
5 Mpe alataki ekɔti ya motako na motó na ye, mpe alataki kazaka ya bibende oyo ezalaki na mwa bibende ekanganakanganá lokola mposo ya mbisi, mpe kilo ya motako ya kazaka+ yango ezalaki shekele nkóto mitano (5 000).
6 Mpe likoló ya makolo na ye, azalaki na manzanza ya motako oyo ebatelaka makolo mpe azalaki na likɔnga+ moke ya motako na mokɔngɔ.
7 Mpe nzete ya likɔnga na ye ezalaki monene lokola nzete ya kolíngela nsinga oyo basali-bilamba basalelaka,+ mpe ebende ya likɔnga na ye ezalaki na kilo ya shekele nkama motoba (600); mpe momemi nguba ya monene azalaki kotambola liboso na ye.
8 Na nsima, atɛlɛmaki mpe abandaki kobelela bato ya milɔngɔ ya etumba ya Yisraele+ mpe koloba na bango boye: “Mpo na nini bozali kobima kosala bituluku ya etumba? Ngai nazali Mofilistia mpe bino bozali basaleli+ ya Saulo, boye te? Bómiponela mobali moko, mpe akita epai na ngai.
9 Soki akokoka kobunda na ngai mpe soki akoboma ngai, tokokóma basaleli na bino. Kasi soki ngai nakoki ye mpe nabomi ye, bino bokokóma basaleli na biso, mpe bokosalela biso.”+
10 Mpe Mofilistia yango alobaki lisusu boye: “Lelo, ngai nazali kotumola+ bato ya milɔngɔ ya etumba ya Yisraele. Bópesa ngai mobali moko, tóbunda!”+
11 Ntango Saulo+ mpe Yisraele mobimba bayokaki maloba ya Mofilistia wana, bayokaki nsɔmɔ mpe babangaki mingi.+
12 Nzokande, Davidi azalaki mwana ya Moefrata+ wana, na Beteleme ya Yuda, nkombo na ye Yese. Mpe azalaki na bana mibali mwambe.+ Mpe na mikolo ya Saulo, mobali yango asilaki kokóma mobange kati na bato.
13 Mpe bana mibali misato ya liboso ya Yese bakendaki. Balandaki Saulo na etumba,+ mpe bankombo ya bana yango misato oyo bakendaki na etumba ezalaki Eliabe+ mwana ya liboso, mpe ya mibale Abinadabe,+ mpe ya misato Shama.+
14 Davidi azalaki leki+ na bango nyonso, mpe bana misato ya liboso balandaki Saulo.
15 Mpe Davidi azalaki kokende epai ya Saulo mpe kozonga kobatela bampate+ ya tata na ye na Beteleme.
16 Mpe Mofilistia yango azalaki se kopusana liboso na ntɔngɔntɔngɔ mpe na mpokwa, mpe azalaki kotɛlɛma, asalaki bongo mikolo ntuku minei (40).
17 Na nsima, Yese alobaki na mwana na ye Davidi ete: “Nabondeli yo, memelá bandeko na yo efa oyo ya mbuma oyo batumbi+ mpe mampa zomi oyo, mpe memelá yango bandeko na yo nokinoki na kaa.
18 Bongo biteni zomi oyo ya fromaje, okomemela mokonzi ya bato nkóto (1 000);+ lisusu, oluka koyeba soki bandeko na yo bazali malamu,+ mpe ozwa elembo moko epai na bango.”
19 Na ntango yango, Saulo ná bango, ná mibali mosusu nyonso ya Yisraele bazalaki na lobwaku ya patatalu ya Ela,+ bazalaki kobunda na Bafilistia.+
20 Na yango, Davidi alamukaki ntɔngɔntɔngɔ mpe atikaki bampate na mabɔkɔ ya mobateli, amemaki biloko yango mpe akendaki ndenge Yese apesaki ye mitindo.+ Ntango akómaki na lopango ya kaa,+ limpinga ya basoda ezalaki kobima mpo na kokende na esika ya etumba,+ mpe bagangaki mpo na etumba.
21 Bongo Yisraele mpe Bafilistia babandaki komibongisa, molɔngɔ ya etumba etalani na molɔngɔ ya etumba.
22 Na mbala moko, Davidi atikaki bisaka+ yango epai ya moto oyo azalaki kobatela bisaka+ mpe apotaki mbangu tii na esika ya etumba. Ntango akómaki, abandaki kotuna soki bandeko na ye bazali malamu.+
23 Ntango azalaki koloba na bango, talá, elombe mobundi yango, nkombo na ye Goliate,+ Mofilistia ya Gate,+ auti na milɔngɔ ya etumba ya Bafilistia azali komata mpe abandi koloba maloba ndenge moko na oyo alobaki liboso,+ mpe Davidi ayokaki yango.
24 Nde mibali nyonso ya Yisraele, ntango bamonaki mobali yango, talá, bakimaki ye mpe babangaki mingi.+
25 Mpe mibali ya Yisraele babandaki koloba boye: “Bomoni mobali oyo azali komata? Azali komata nde mpo na kotumola+ Yisraele. Mpe ekosalema mpenza boye: moto oyo akoboma ye, mokonzi akokómisa ye mozwi, akopesa ye bomɛngo mingi, mpe akopesa ye mwana na ye ya mwasi,+ mpe akopesa ndako ya tata na ye bonsomi na kati ya Yisraele.”+
26 Bongo Davidi abandaki koloba na mibali oyo batɛlɛmaki pene na ye ete: “Bakosala nini na moto oyo akoboma Mofilistia+ wana mpe akolongola Yisraele nsɔni?+ Mpo esutu+ ya Mofilistia oyo azali nani mpo atumola+ milɔngɔ ya etumba ya Nzambe ya bomoi?”+
27 Bongo bato yango balobaki na ye maloba ndenge moko na oyo balobaki liboso ete: “Ndenge wana nde bakosala na moto oyo akoboma ye.”
28 Mpe yaya na ye Eliabe+ ayokaki ndenge azali koloba na mibali yango, mpe nkanda ya Eliabe engalelaki Davidi,+ bongo alobaki boye: “Mpo na nini okiti awa? Bongo otiki nani abatela mwa ndambo ya bampate wana na esobe?+ Ngai nayebi malamu lofundo na yo mpe mabe ya motema na yo,+ mpamba te okiti awa kaka mpo na kotala etumba.”+
29 Na yango Davidi alobaki boye: “Nasali nini sikoyo? Natuni kaka kotuna te?”+
30 Bongo alongwaki pene na ye, abalukaki epai ya moto mosusu mpe alobaki liloba ndenge moko na oyo alobaki liboso,+ mpe bato bapesaki lisusu eyano ndenge moko na oyo ya liboso.+
31 Bongo maloba oyo Davidi alobaki bayokaki yango, mpe bakendaki koloba yango liboso ya Saulo. Na yango, abengisaki ye.
32 Mpe Davidi alobaki na Saulo boye: “Motema ya moto ata moko te elɛmba na kati na ye.+ Mosaleli na yo ye moko akokende mpe akobunda mpenza na Mofilistia oyo.”+
33 Kasi Saulo alobaki na Davidi ete: “Okokoka te kobunda na Mofilistia oyo,+ mpo ozali naino mwana,+ kasi ye azali mobali ya etumba banda bomwana na ye.”
34 Mpe Davidi alobaki lisusu na Saulo boye: “Mosaleli na yo akómaki mobateli ya mpate na etonga ya tata na ye, mpe nkɔsi+ moko eyaki, ná urse moko, mpe mokomoko na yango ememaki mpate moko ya etonga.
35 Mpe nabimaki, nalandaki yango, nabomaki yango+ mpe nabikisaki mpate na monɔkɔ na yango. Ntango eyelaki ngai, nasimbaki yango na mandefu na yango, nabɛtaki yango mpe nabomaki yango.
36 Ezala nkɔsi, ezala mpe urse, mosaleli na yo abomaki yango; esutu ya Mofilistia+ oyo asengeli mpe kokóma lokola moko na yango, mpo atumoli+ milɔngɔ ya etumba+ ya Nzambe ya bomoi.”+
37 Na nsima Davidi abakisaki ete: “Yehova, oyo abikisaki ngai na nkɔsi mpe na urse, ye nde akobikisa ngai na lobɔkɔ ya Mofilistia oyo.”+ Na yango, Saulo alobaki na Davidi boye: “Kende, mpe tiká ete Yehova ye moko azala na yo.”+
38 Bongo Saulo alatisaki Davidi bilamba na ye, mpe alatisaki ye ekɔti ya motako na motó, na nsima alatisaki ye kazaka ya bibende.
39 Na nsima, Davidi akangisaki mopanga na ye na loketo likoló ya bilamba na ye mpe abandaki kokende kasi akokaki te, mpo amesanaki na yango te. Nsukansuka, Davidi alobaki na Saulo boye: “Nakoki kokende na biloko oyo te, mpo namesani na yango te.” Bongo Davidi alongolaki yango.+
40 Mpe azwaki lingenda na ye na lobɔkɔ mpe aponaki na lobwaku ya mokɛli mabanga mitano oyo eleki sɛlisɛli mpe atyaki yango na libenga na ye ya mobateli ya mpate, na esika na ye ya kotya biloko, mpe azalaki na bilingongo+ na lobɔkɔ na ye. Mpe abandaki kopusana pene na Mofilistia yango.
41 Mpe Mofilistia yango abandaki koya, azalaki se kopusana penepene na Davidi, mpe moto oyo azalaki komema nguba ya monene azalaki liboso na ye.
42 Sikoyo, ntango Mofilistia atalaki mpe amonaki Davidi, abandaki kotyola+ ye, mpamba te azalaki mwana+ moke mpe nzoto motane,+ mpe na bonzenga.+
43 Bongo Mofilistia yango alobaki na Davidi ete: “Ngai nazali nde mbwa+ mpo oyela ngai na mangenda?” Na yango, Mofilistia wana alakelaki Davidi mabe na nkombo ya banzambe na ye.+
44 Mpe Mofilistia yango alobaki lisusu na Davidi boye: “Yo yaká awa, bongo nakopesa bandɛkɛ ya likoló mpe banyama ya zamba mosuni na yo.”+
45 Bongo Davidi alobaki na Mofilistia boye: “Ozali koyela ngai na mopanga, na likɔnga mpe na likɔnga+ moke, kasi ngai, nazali koya epai na yo na nkombo ya Yehova ya mampinga,+ Nzambe ya milɔngɔ ya etumba ya Yisraele, oyo yo otumoli.+
46 Na mokolo ya lelo, Yehova akokaba yo na lobɔkɔ na ngai,+ mpe nakoboma yo mpenza mpe nakolongola yo motó; mpe na mokolo ya lelo, nakopesa bibembe ya kaa ya Bafilistia na bandɛkɛ ya likoló mpe na banyama ya zamba oyo ezali na mabele;+ mpe bato ya mabele mobimba bakoyeba ete ezali na Nzambe moko, oyo azali Nzambe ya Yisraele.+
47 Mpe lisangá oyo mobimba ekoyeba ete ezali na mopanga te, to na likɔnga te nde Yehova abikisaka,+ mpamba te etumba ezali ya Yehova,+ mpe akopesa bino na lobɔkɔ na biso.”+
48 Bongo esalemaki boye: Mofilistia yango atɛlɛmaki, azalaki kaka koya mpe kopusana penepene mpo na kokutana na Davidi, mpe Davidi abandaki kosala noki mpe kopota mbangu na esika ya etumba mpo na kokutana na Mofilistia wana.+
49 Na nsima, Davidi akɔtisaki lobɔkɔ na ye na libenga na ye, azwaki libanga moko kuna mpe abwakaki yango, bongo abɛtaki+ Mofilistia yango na elongi, mpe libanga ekɔtaki na kati ya elongi na ye, mpe akweaki elongi na nse.+
50 Bongo Davidi, na bilingongo mpe libanga moko, alekaki Mofilistia wana na makasi, akweisaki Mofilistia mpe abomaki ye; kasi mopanga ezalaki na lobɔkɔ ya Davidi te.+
51 Mpe Davidi akobaki kopota mbangu mpe ayaki kotɛlɛma likoló ya Mofilistia yango. Na nsima, azwaki mopanga+ na ye, abendaki yango na libenga na yango mpe abomaki ye mpenza na ntango akataki ye motó na mopanga yango.+ Mpe Bafilistia bamonaki ete elombe na bango akufi, bongo bakimaki.+
52 Na mbala moko, mibali ya Yisraele mpe ya Yuda batɛlɛmaki mpe bagangaki mpe balandaki+ Bafilistia kino na lobwaku,+ tii na baporte ya Ekrone,+ mpe Bafilistia oyo bazokaki bampota ya liwa bazalaki kokweakwea na nzela, banda na Shaaraime+ kino na Gate, mpe tii na Ekrone.
53 Bongo nsima ya kolanda Bafilistia na mbamba, bana ya Yisraele bazongaki mpe bapunzaki+ bakaa na bango.
54 Na nsima, Davidi azwaki motó+ ya Mofilistia yango mpe amemaki yango na Yerusaleme, mpe bibundeli na ye, akɔtisaki yango na hema na ye.+
55 Sikoyo, ntango Saulo amonaki ndenge Davidi azalaki kobima mpo na kokutana na Mofilistia wana, alobaki na Abinere,+ mokonzi ya basoda ete: “Abinere, mwana+ oyo azali mwana ya nani?”+ Na yango Abinere alobaki boye: “Lokola molimo na yo ezali solo na bomoi, Ee mokonzi, nayebi ata moke te!”
56 Bongo mokonzi alobaki boye: “Yo moko tuná soki elenge mobali wana azali mwana ya nani.”
57 Na yango, ntango kaka Davidi azongaki nsima ya koboma Mofilistia yango, Abinere azwaki ye mpe amemaki ye liboso ya Saulo, ná motó+ ya Mofilistia na lobɔkɔ na ye.
58 Sikoyo, Saulo alobaki na ye ete: “Elenge mobali, yo mwana ya nani?” Mpe Davidi alobaki boye: “Mwana ya mosaleli na yo Yese,+ moto ya Beteleme.”+