1 Petro 5:1-14
5 Yango wana, nazali kopesa bankulutu oyo bazali na kati na bino elendiseli oyo, mpo ngai mpe nazali nkulutu+ elongo na bango mpe motatoli+ ya bampasi ya Kristo, ɛɛ oyo akozwa mpe nkembo oyo ekomonana:+
2 Bóbatela+ etonga ya Nzambe+ oyo bapesi na mabɔkɔ na bino, bósala yango na kotindikama te, kasi na motema moko;+ ezala te na kolinga litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe,+ kasi na motema ya esengo;
3 bómikómisa te bakonzi+ ya baoyo bazali libula ya Nzambe,+ kasi bókóma nde bandakisa ya etonga.+
4 Mpe ntango mobateli ya mpate mokonzi+ akomonana polele, bokozwa motole ya nkembo+ oyo ebebaka te.+
5 Ndenge moko mpe, bino bilenge, bómikitisaka+ liboso ya mikóló. Nzokande bino nyonso bólata ezaleli ya komikitisa na kati na bino,+ mpo Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.+
6 Yango wana, bómikitisa na nse ya lobɔkɔ ya nguya ya Nzambe, mpo atombola bino na ntango oyo ekoki;+
7 ntango bozali kobwakela ye mitungisi+ na bino nyonso, mpo atyelaka bino likebi.+
8 Bóbatela makanisi na bino, bókebaka.+ Monguna na bino, Zabolo, azali kotambola epai na epai lokola nkɔsi oyo ezali koganga mpe koluka kolya moto.+
9 Kasi bótɛmɛla ye,+ bózala makasi na kondima, bóyeba ete bampasi ya ndenge wana ezali mpe kokómela lisangá mobimba ya bandeko na bino na mokili.+
10 Kasi, nsima ya konyokwama mwa ntango moke,+ Nzambe ya boboto monene nyonso, oyo abengaki bino na nkembo+ na ye ya seko na bomoko+ na Kristo, ye moko akosilisa kobongisa bino, akotɛlɛmisa bino ngwi,+ akokómisa bino makasi.+
11 Ye azala na nguya+ libela na libela. Amen.
12 Nakomeli bino na mwa maloba moke,+ na nzela ya Silvano,+ ndeko ya sembo, ndenge nazwaka ye, mpo nalendisa mpe natatola na molende ete boboto monene oyo Nzambe amoniseli bino ezali likambo ya solo; bótɛlɛma ngwi na kati na yango.+
13 Ye oyo azali na Babilone,+ mwasi* oyo aponami lokola bino, atindeli bino mbote, ndenge moko mpe Marko+ mwana na ngai.
14 Bópesana mbote na lipwɛpwɛ ya bolingo.+
Kimya ezala na bino nyonso oyo bozali na bomoko na Kristo.+
Maloba na nse
^ “Mwasi” ekoki kozala lisangá moko oyo ezalaki na Babilone.