1 Petro 4:1-19
4 Yango wana, lokola Kristo anyokwamaki na nzoto,+ bino mpe bólɛngɛla makanisi na bino ndenge wana;+ mpo moto oyo anyokwami na nzoto atiki masumu,+
2 mpo alekisa ntango oyo etikali ya bomoi na ye ya bomoto,+ mpo na kokokisa bamposa ya bato lisusu te, kasi nde mokano ya Nzambe.+
3 Mpo ntango+ oyo esili koleka ekoki bongo oyo bino bosalaki mokano ya bikólo+ ntango botambolaki na misala ya etamboli ya nsɔni,+ na bamposa makasi, na kolekisa ndelo na vinyo,+ na bafɛti ya lokoso, na komɛla mingi, mpe na losambo mabe ya bikeko.+
4 Lokola bozali komikɔtisa elongo na bango lisusu te na libulu wana ya pɔtɔpɔtɔ ya bomoi ya mbindo,+ bazali kobulungana mpe kofinga bino.+
5 Kasi bato yango bakozongisa monɔkɔ epai ya moto+ oyo alingi kosambisa baoyo bazali na bomoi mpe baoyo bakufá.+
6 Ya solo, ezali mpo na ntina wana nde nsango malamu esakolamaki mpe epai ya bakufi,+ mpo, na miso ya bato, básambisama na makambo oyo ezali komonana libándá+ kasi bázala na bomoi na elimo+ na miso ya Nzambe.
7 Kasi nsuka ya makambo nyonso ekómi pene.+ Yango wana, bózala bato ya makanisi malamu+ mpe bózala na bokɛngi, bóbondelaka mpenza.+
8 Likambo eleki ntina mpenza, bólinganaka makasi,+ mpo bolingo ezipaka ebele ya masumu.+
9 Bóyambanaka na koimaima te.+
10 Na kotalela lolenge oyo moto na moto azwi likabo, bósalela yango mpo na kosalelana lokola bakapita malamu ya boboto monene ya Nzambe oyo emonisami na ndenge mingi.+
11 Soki moto azali koloba, aloba lokola nde ezali maloba mosantu+ ya Nzambe; soki moto azali kosalela bamosusu,+ asalela bango lokola moto oyo azali kotalela kaka makasi oyo Nzambe azali kopesa;+ mpo ete na makambo nyonso Nzambe azwa nkembo+ na nzela ya Yesu Kristo. Nkembo+ mpe nguya ezali ya ye libela na libela. Amen.
12 Bandeko ya bolingo, bómitungisa te mpo na mɔtɔ oyo ezali na kati na bino, oyo ezali kopela mpo na komeka bino,+ lokola nde likambo ya kokamwa ezali kokwela bino.
13 Kutu, bókoba nde kosepela+ mpo bozali komona mpasi oyo Kristo amonaki,+ mpo bósepela mpe bótonda na esengo mingi ntango nkembo na ye ekomonana.+
14 Soki bazali kofinga bino mpo na nkombo ya Kristo,+ bozali bato ya esengo,+ mpo elimo ya nkembo, ɛɛ elimo ya Nzambe, ezali kofanda likoló na bino.+
15 Nzokande, moko te na kati na bino anyokwama+ mpo azali mobomi-bato to moyibi to mosali-mabe to mpo azali moto oyo amikɔtisaka+ na makambo ya bato.
16 Kasi soki azali konyokwama+ mpo azali mokristo, ayoka nsɔni te,+ kasi akoba nde kopesa Nzambe nkembo na ndenge azali na nkombo yango.
17 Mpo oyo nde ntango oyo etyamá mpo lisambisi ebanda na ndako ya Nzambe.+ Nzokande soki ebandi libosoliboso na biso,+ bongo baoyo batosaka nsango malamu ya Nzambe te bakosuka ndenge nini?+
18 “Mpe soki moyengebene azali kobika na mpasi,+ moto oyo atyolaka Nzambe mpe mosumuki akomonana wapi?”+
19 Yango wana, tiká mpe baoyo bazali konyokwama na boyokani na mokano ya Nzambe bákoba kotika milimo na bango na mabɔkɔ ya Mozalisi moko ya sembo awa bazali kosala oyo ezali malamu.+