1 Petro 3:1-22

3  Ndenge moko mpe,+ bino basi, bómikitisaka+ liboso ya mibali na bino moko, mpo, soki bamosusu batosaka liloba te,+ bázwama+ na maloba te kasi na etamboli ya basi na bango,+  mpo bamoni na miso na bango moko etamboli na bino ya pɛto+ ná limemya na bino makasi.  Mpe monzɛlɛ na bino ezala oyo ya libándá te na kokanga nsuki+ mpe na kolata biloko kitoko ya wolo+ to kolata bilamba ya likoló,  kasi ezala nde bomoto oyo ebombaná,+ oyo ya motema, na molato oyo epɔlaka te+ ya elimo ya kimya mpe ya boboto,+ oyo ezali na motuya monene na miso ya Nzambe.  Mpo ndenge wana nde, na ntango ya kala, basi basantu oyo bazalaki kolikya epai ya Nzambe bazalaki kobongisa nzoto, bazalaki komikitisa liboso ya mibali na bango,  ndenge Sara azalaki kotosa Abrahama mpe kobenga ye “nkolo.”+ Mpe bino bokómi bana na ye, soki bokobi kosala malamu mpe bozali kobanga ata eloko moko ya nsɔmɔ te.+  Ndenge moko mpe+ bino mibali, bókoba kofanda na bango na boyebi,+ bópesaka bango lokumu+ mpo bazali mbɛki oyo eleki pɛtɛɛ, oyo ya bomwasi, mpo bozali mpe bazwi-ya-libula+ ya boboto monene ya bomoi elongo na bango, mpo mabondeli na bino ekangisama nzela te.+  Mpo na kosukisa, bino nyonso bózalaka na likanisi moko,+ bómityaka na esika ya bamosusu, bózalaka na bolingo ya bondeko, bato oyo bayokelaka bamosusu mawa mpenza,+ bato ya komikitisa,+  bózongisaka mabe na mabe te+ to kofinga na kofinga te,+ kutu bino bópambolaka,+ mpo babengaki bino bólanda nzela yango, mpo bózwa libula ya lipamboli. 10  Mpo, “moto oyo alingi kosepela na bomoi mpe komona mikolo ya malamu,+ apekisa lolemo+ na ye koloba makambo ya mabe mpe mbɛbu na ye koloba makambo ya bokosi,+ 11  kasi akima oyo ezali mabe+ mpe asala oyo ezali malamu; aluka kimya mpe alanda yango.+ 12  Mpo miso+ ya Yehova ezali kotala bayengebene, mpe matoi na ye ezali koyoka lilɔmbɔ na bango;+ kasi elongi ya Yehova ezali kotɛmɛla baoyo basalaka makambo ya mabe.”+ 13  Ya solo, nani moto akosala bino mabe soki bozali kosala oyo ezali malamu na molende?+ 14  Kasi ata soki bosengeli konyokwama mpo na boyengebene, bozali bato ya esengo.+ Nzokande, eloko oyo bango babangaka, bino bóbanga yango te,+ bóbulungana mpe te.+ 15  Kasi bósantisa Kristo na mitema na bino mpo azali Nkolo,+ bómibongisa ntango nyonso mpo na koloba+ liboso ya moto nyonso oyo atuni bino ntina ya elikya oyo bozali na yango, kasi bósalaka bongo na boboto+ mpe na limemya makasi. 16  Bózala na lisosoli ya malamu,+ mpo, na likambo oyo bazali kolobela bino mabe, baoyo bazali kotyola etamboli malamu na bino mpo bozali bayekoli ya Kristo+ báyoka nsɔni.+ 17  Mpo eleki malamu konyokwama mpo bozali kosala malamu,+ soki mokano ya Nzambe elingi bongo, na esika ete bónyokwama mpo bozali kosala mabe.+ 18  Ɛɛ, Kristo mpenza akufaki mbala moko mpo na libela mpo na masumu,+ moyengebene moko mpo na bato oyo bazangi boyengebene,+ mpo amema bato epai ya Nzambe.+ Abomamaki na nzoto,+ kasi azongisamaki na bomoi na elimo.+ 19  Ndenge wana nde akendaki kosakwela bilimo oyo ezali na bolɔkɔ,+ 20  oyo kala batosaki te+ ntango motema molai ya Nzambe+ ezalaki kozela na mikolo ya Noa, ntango masuwa ezalaki kotongama,+ oyo na kati na yango bato moke, elingi koloba, milimo mwambe, babikaki na mai.+ 21  Eloko oyo ekokani na yango ezali mpe sikoyo kobikisa bino,+ elingi koloba, batisimo, (ezali te kolongolama ya mbindo ya nzoto, kasi nde kosɛnga Nzambe lisosoli ya malamu,)+ na nzela ya lisekwa ya Yesu Kristo.+ 22  Azali na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe,+ mpo akendaki na likoló; mpe baanzelu+ ná bakonzi ná nguya nyonso batyamaki na nse ya bokonzi na ye.+

Maloba na nse